Moninga
Bilenge Babundi
Sanza ya Mwambe 2024


“Bilenge Babundi.,” Moninga, Sanza ya Mwambe 2024, 26–27.

Etinda ya sanza ya Moninga , Sanza ya mwambe 2024

Bilenge Babundi.

Elilingi
Bato bazali kokunda bibundeli na bango na libulu

Bililingi na Andrew Bosley

Bato oyo Amona mpe bandeko na ye ya mibali bateyaki balingaki kolanda Yesu Klisto. Bakundaki bibundeli na bango mpe balakaki Nzambe ete bakobunda mokolo moko lisusu te.

Elilingi
Etuluku moko ya bilenge mibali bapusani pene na ndako moko epayi wapi mikolo bazali kosolola

Kasi mbala moko basengelaki kobatela mabota na bango. Batata oyo bakundaki bibundeli na bango balingaki te kobuka elaka na bango na Nzambe. Na bongo bana na bango bamilengelaki mpo na kobunda na esika na bango. Babengamaki bilenge babundi nkoto mibale. Stripling elimboli “elenge.”

Elilingi
Elenge mobali azali kosambela elongo na mama na ye ntango bilenge mibali misusu basangani na bibundeli

Bilenge Babundi batikala kobunda te yambo na bitumba. Kasi bamama na bango balengelaki bango mpe bateyaki bango kotya motema na Nzambe.

Elilingi
Elamani kokambaka bilenge babundi na botamboli; elenge mobali moko azali kosalisa elenge mosusu oyo azoki atambola

Baponaki Elamani azala mokambi na bango. Bazalaki na mpiko, mpe Nzambe asungaki bango. Bango nyonso bazokaki, kasi basalisanaki moko na mosusu. Nzambe akumisaki bondimi na bango, mpe bango nyonso babikaki.

Kopakola Langi na Lokasa

Makomi ekoki kosalisa ngai mikolo nyonso

Elilingi
Bopakoli langi ya bililingi ya Buku ya Mormon oyo ezali kobima na nkasa ya buku moko ya polele

Elili na Adam Koford

Lisolo nini ya makomi olingaka?

Bimisa na lokasa