2021
Bobimisi Ekokoba
Sanza ya misato 2021


“Bobimisi Ekokoba,” Mpo na Bokasi bwa Bilenge, Sanza ya misato 2021, 16.

Etinda Mpo na Bokasi bwa Bilenge Sanza ya misato 2021

Bobimisi Ekokoba

Uta na lisukulu ya likita linene ya sanza ya minei.

Elilingi
Limoni ya Yambo

Ndakisa na Ben Simonsen

Profeta Joseph Smith azwaki babobimisi ebele. Babobimisi ebele ezwamaki na Profeta Joseph bibatelami mpo na biso na kati na Malongi mpe Mayokani.

Lisusu, topambolami na bobimisi ekokoba na baprofeta na bomoi baoyo bazali “batindami basali na Nkolo, bapesamelami ndingisa ya koloba mpo na Ye.”1

Bobimisi ya moto ye moko ekoki mpe kozwama na baoyo banso na bomikitisi mpenza baluki bokambami uta na Nkolo. Ezali na motuya moko lokola bobimisi ya profeta.

Bobimisi ya moto ye moko efandisami na bosolo ya molimo ezwami uta na Molimo Mosantu. Molimo Mosantu azali mobimisi mpe motatoli ya bosolo nyonso, mingimingi oyo ya Mobikisi. Soki Molimo Mosantu te, tokoki te ya solo koyeba ete Yesu azali Klisto. Mosala na Ye ya liboso ezali kopesa litatoli ya Tata mpe ya Mwana mpe bankombo na Bango mpe nkembo na Bango.

Nalendisi bino ete bokambami na bobimisi ekoki kozwama na moko na moko na biso ntango tosali na bomikitisi mpenza na elanga ya vino ya Nkolo.

Losambo na ngai ya bomikitisi ezali ete moko na moko na biso akoluka bobimisi ekokoba mpo na kokamba bomoi na biso mpe kolanda Molimo lokola tozali kosambela Nzambe Tata mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

Litangi

  1. Hugh B. Brown, “Joseph Smith among the Prophets” (Sixteenth Annual Joseph Smith Memorial Sermon, Logan Institute of Religion, Sanza ya zomi na mibale 7, 1958), 7.

Bimisa na lokasa