2022
Bozela te! Bozala lokola Babateli mpate
Sanza ya zomi na mibale 2022


Bozela te! “Bozala lokola Babateli mpate,” Mpo ya Bokasi ya Bilenge, Sanza ya zomi na mibale 2022.

Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya zomi na mibale 2022

Luka 2:8–20

Bozela te! Bozala lokola Babateli mpate

Elilingi
babateli mpate

Na butu ya kimia mibu ebele eleki, babateli mpate bazalaki kobatela na bokebi bibwele na bango.

Elilingi
mpate

Babateli mpate bazalaki na mosala monene. Mpate esengelaki na bilei, mai mpe bobateli uta na makama.

Elilingi
anjelu

Na mbalakaka, anjelu moko abimaki!

“Bobanga te, mpo tala, namemeli bino bansango malamu ya esengo makasi. … Mpamba te na mokolo oyo abotameli bino … Mobikisi moko, oyo azali Klisto Nkolo”

Elilingi
anjelu

Anjelu ayebisaki babateli mpate bakomona mwana alingami na bilamba, alali na eliele na Beteleme.

Elilingi
lisanga ya bayembi ya banjelu

Lisanga ya bayembi ya banjelu etondaki na lola mpe basanganaki na anjelu mpo na kokumisa Nzambe.

“Nkembo epai ya Nzambe oyo aleki likolo, mpe o nse, boboto na bato banso.”

Elilingi
babateli mpate

“Tika tokende na Beteleme mpe tomona nini Nkolo asalaki ete toyeba.”

Elilingi
babateli mpate bazali kolandaka monzoto

babateli mpate bazelaki te. Yango ezalaki mpenza ntina koleka! Bango “bayaki na lombango” na Beteleme.

Elilingi
babateli mpate na eliele

Babateli mpate bamonaki Yesu alingami na bilamba, kolalaka na elielo, kaka lolenge anjelu alobaki.

Elilingi
mwana Yesu

Oyo azalaki Masiya oyo alakamaki mpo na koya mpe kozala Mobikisi mpe Mosikoli ya Mokili mpe komemela biso esengo ya solo!

Elilingi
babateli mpate

Babateli mpate bazalaki na esengo makasi! Bakabolaki maye bayokaki mpe bamonaki.

“Mobikisi ya mokili abotami!”

“Suka suka Masiya aye!”

Elilingi
elenge mobali azali koyekola makomi

Babateli mpate “bayaki na lombango” epai ya Yesu. Yo mpe okoki!

Okoki koyekola na ntina na Ye.

Elilingi
elenge mobali azali kokata matiti

Okoki kosunga Ye na kosalisaka basusu.

Elilingi
elenge mwasi azali kokabola Buku ya Mormon na elenge mobali

Okoki kotatola na ntina na Ye.

Bimisa na lokasa