Mpo ya Bokasi ya Bilenge
Lolenge nini tokoki kozala na bomoko soki tozali banso ya kokesena mpenza?
Sanza ya zomi 2024


“Lolenge nini tokoki kozala na bomoko soki tozali banso ya kokesena mpenza?,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya zomi 2024.

Etinda ya sanza ya Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya zomi 2024

Lolenge nini tokoki kozala na bomoko soki tozali banso ya kokesena mpenza?

Elilingi
bakopo oyo ezali na mbanzi likolo na yango

Biso nyonso tokeseni. Kasi Nkolo alingi biso “tozala moko” (Malongi mpe Mayokani 38:27). Tala mwa mabongisi ya bomoko oyo basakoli mpe bantoma bateyaki biso:

Tozali na bomoko kati na Yesu Klisto, nsango malamu na Ye, mpe na Eklezia na Ye. “Ezali bobele kati mpe na nzela ya bosembo ya moto na moto na mpe bolingo na biso ya Yesu Klisto nde tokoki kotia elikya kozala moto moko.”

Bomoko esengaka bolingo. “Ata kutu na bokeseni ya minoko mpe bonkoko ya mimeseno kitoko mpe oyo enetolaka, tosengeli kozala na mitema oyo ekangami na bomoko mpe na bolingo.”

Bomoko ezali bokokani te. “Bomoko mpe bokeseni ezali botelemeli te. Tokoki kokokisa bomoko monene lokola tozali kolendisa mopepe ya bosangisi bato banso mpe limemya mpo na bokeseni.” “Bomoko esengi bokokani te, kasi esengi koyokana.”

Bomoko esengaka kotika boweli mpe bokaniseli bato mabe. “Ezali na esika mpo na moto nyonso. Nzokande, ezali na esika moko te mpo na bokaniseli mabe, bokweyisi, to boweli ya lolenge kani.”

Bimisa na lokasa