Bosangisi ya Yisalaele oyo Epalanganaki
Tozali kosunga kosangisa baponami ya Nkolo na bangambo mibale ya elamba.
Balingami na ngai ya mibali mpe basi botondi mpo na bondimi na bino, bomipesi na bino mpe bolingo na bino. Tozali kokabola mokumba monene mpo na kozala oyo Nkolo alingi biso tozala mpe kosala nini ye alingi biso tosala. Tozali kati ya lingomba monene—bosangisi ya Yisalaele Epalangana. Nazali koloba malongi maye lelo mpo na ntina na moango ya seko ya Nzambe.
Liyokani ya Abalayama
Na kala, Nkolo apambolaki Tata Abalayama na elaka ya kosala bana na ye bato baponama.1 Kolandisama na liyokani liye lizali na kati ya makomi. Na kati ezalaki mpe na bilaka ete Mwana ya Nzambe asengelaki koya na nzela ya molongo ya Abalayama, ete mabele mousu esengelaki kokoma ya bango, ete bamboka mpe bikolo ya mabele esengelaki kopambolama na nzela ya nkona na ye, mpe koleka.2 Atako mambi mosusu ya liyokani liye lisili kokokisama, Buku ya Mormon eteyaka biso ete liyokani ya Abalayama ekokokisama bobele na mikolo miye ya nsuka!3 Ebeti lisusu nsete ete tozali na kati ya bato ya liyokani ya Nkolo.4 Ya biso ezali libaku malamu ya kozala bato na kati ya bokokisi ya bilaka biye. Ntango malamu kani oyo ya kozala na bomoi!
Yisalaele Ekomi Bapalangani
Lokola bakitani ya Abalayama, bikolo ya Yisalaele ya kala ezalaki na ndingisa ya kozwa likoki ya bonganganzambe mpe mapamboli ya nsango malamu, kasi na mbalakaka bato batombokaki. Babomaki baprofeta mpe bapesamaki etumbu epai ya Nkolo. Bikolo zomi bamemamaki na bowumbu na Asulia. Kuna bakomaki ya kobunga na makomi ya mokili. (Kasi, bikolo zomi ebungaki te na miso ya Nkolo.) Bikolo mibale bitikalaki kokoba mwa ntango mokuse mpe nsima, likolo ya botomboki na bango, bakangamaki na bowumbu na Babilona.5 Ntango bazongaki, balingamaki makasi na Nkolo, kasi lisusu batosaki Ye te. Babwakisaki mpe batiolaki Ye. Tata ya bolingo kasi ya mpasi na motema alapaki ndayi, “Nakopanza bino kati ya bapaganu,”6 mpe yango Ye asalaki—kati na bikolo binso.
Yisalaele Esengeli Kosangisama
Elaka ya Nzambe mpo na bosangisi ya Yisalaele oyo epalanganaki ezalaki ekateli.7 Yisaya, ndakisa, amonaki ete na mikolo mya nsuka Nkolo akontinda “bapanzi nsango na lombango” epai ya bato oyo “bapalanganaki mpe balongolamaki.”8
Elaka ya bosangisi oyo ebandaki uta ntango babandaki kokoma makomi, ekokokisama kaka lokola masakoli ya bopalangani ya Yisalaele ekokisamaki.9
Eklezia ya Yesu Klisto na Midi yaa Ntango mpe Bopengwi
Liboso ya kobakama na Ye na ekulusu, Nkolo Yesu Klisto atiaki Eklezia na Ye. Ezalaki na bapostolo, baprofeta, bantuku nsambo, bateyi, mpe bongo na bongo.10 Mpe Molakisi atindaki bayekoli na Ye na kati ya mokili mpo na koteya liloba na Ye.11
Nsima ya mwa ntango Eklezia oyo etiamaki na Nkolo ekweyaki na kati ya bozangi molimo. Mateya na Ye ebongolamaki; makuli na Ye ebongwanaki. Bopengwi Monene eyaki lokola Paulo asakolaki, oyo ayebaki ete Nkolo akoya lisusu te “loba kaka soki bokwei eyei yambo.”12
Bopengwi Monene oyo elandaki ndakisa oyo esukisaki eleko moko oyo ewutaki koleka. Ya yambo mpenza ezalaki na ntango ya Abalayama. Nsima eleko ya Enoka, Nowa, Abalayama, Mose mpe basusu eyaki koleka. Profeta moko na moko azalaki na etinda uta na Nzambe mpo na koteya bonzambe mpe malongi ya Nkolo Yesu Klisto. Na bileko nyonso mateya maye masengelaki kosunga bato. Kasi kozanga botosi na bango esukaki na bopengwi. Boye, bileko nyonso oyo elekaki ezalaki kosuka na ntango mpe esika. Ezalaki kosuka na ntango mpo ete eleko moko na moko esukaki na bopengwi. Ezalaki kosuka na esika mpo ndelo na yango ezwaki kaka eteni moko ya mokili.
Bozongisi ya Makambo Manso
Boye bozongisa ya makambo nyonso esengisamaki. Nzambe tata mpe Yesu Klisto babengaki profeta Joseph Smith mpo ete azala profeta ya eleko eye. Banguya nyonso ya bonzambe ya bileko oyo bilekaki ezongisamaki na nzela na ye.13 Eleko oyo ya litondi ya bantango ekokaki kosuka te na ntango to esika. Esengelaki kosuka na bopengwi te, mpe esengeli kotondisa mokili.14
Bosangisi ya Yisalaele—Eteni ya Motuya ya Bozongisi ya Makambo Manso
Lokola Petelo mpe Paulo basakolaki, makambo manso esengelaki kozongisama na eleko oyo. Yango wana, oyo esengelaki koya, lokola eteni ya bozongisi oyo ezali, bozeli ya ntango molai ya Bosangisi Yizalaele oyo epalanganaki.15 Ezali eloko ya yambo oyo esengeli kosalema mpo na Bozongi ya Mibale ya Nkolo.16
Malongi oyo ya bosangisi ezali moko ya mateya ya motuya ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka. Nkolo asakolaki: “napesi bino elembo … ete nakosangisa uta bopalangani na bango ya ntango molai, bato na ngai, O ndako ya Yisalaele mpe nakotia lisusu kati na bango Siona na ngai.”17 Bobimi ya Buku ya Mormon ezali elembo mpo na mokili mobimba oyo Nkolo abandaki kosangisa Yisalaele mpe kokokisa mayokani asalaki na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo.18 Tozali kaka koteya malongi oyo te, kasi tozali kosala kati na yango. Tozali kosala yango ntango tozali kosunga kosangisa baponami ya Nkolo na ngambo mibale ya elamba.
Buku ya Mormon ezali na kati kati ya mosala oyo. Ezali kosakola malongi ya bosangisi.19 Esalaka ete bato bayekola maye matali Yesu Klisto, bandimela nsango malamu na Ye, mpe baya na Eklezia na ye. Solo mpenza, soki Buku ya Mormon ezalaki te, elaka ya bosangisi Yisalaele ekokaki kozala te.20
Mpo na biso nkombo ya lokumu ya Abalayama ezali na ntima monene. Etangami na milongo mingi ya makomi ya Bozongisi koleka na milongo nyonso ya Biblia.21 Abalayama akangisami na bandimi nyonso ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka.22 Nkolo andimisi lisusu liyokani ya Abalayama na na mikolo na biso na nzela ya Profeta Joseph Smith.23 Na kati ya tempelo tokozwa mapamboli na biso ya nsuka, lokola nkona ya Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo.24
Eleko ya Litondi ya Bantango
Eleko ya litondi ya bantango emonisamaki yambo na Nzambe lokola ntango ya bosangisi, nyonso mibale na lola mpe na mabele. Petelo ayebaki ete nsima ya eleko ya bopengwi, bozongisi esengelaki koya. Ye, oyo azalaki na Nkolo likolo ya Ngomba ya Mbongwana, asakolaki:
“Yango wana boyambola, mpe bobongwana, mpo ete masumu na bino elongolama, ntango bileko ya bopemi ekoya uta liboso ya Nkolo; …
“Baoyo lola esengeli koyamba kino bantango ya bozongisi ya makambo manso, oyo Nzambe alobaki na monoko ya baprofeta na ye ya bule uta ebandeli ya mokili.”25
Na bantango ya lelo Bapostolo Petelo, Yakobo, mpe Yoane batindamaki na Nkolo na “bafungola ya bokonzi na [Ye], mpe eleko ya nsango malamu mpo na bantango ya nsuka,” na oyo Ye “asangisaki na bomoko makambo manso, nyonso mibale oyo ezali na lola mpe oyo ezali na mabele.”26
Na mobu 1830 Profeta Joseph Smith ayekolaki etali mopesi nsango ya lola na nkombo ya Eliasi oyo azalaki na bafungola ya kokokisa “bozongisi ya makambo manso.”27
Mibu motoba nsima Tempelo ya Kirtland ekulisamaki. Nsima ya kondima ndako ya bule wana na Nkolo, bapesi nsango ya lola bayaki na bafungola ya bonganganzambe. Mose abimaki28 ”mpe apesaki … bafungola ya bosangisi Yisalaele uta na biteni minei ya mabele, mpe bokambi ya bikolo zomi uta na mabele ya nordi.
“Nsima na yango, Eliasi abimaki, mpe apesaki eleko ya nsango malamu ya Abalayama, kolobaka yango epai na biso mpe nkona na biso nkola nyonso nsima bakopambwama.”29
Nsima profeta Eliya ayaki mpe asakolaki, “Tala, ntango ya litondi ekomi, oyo elobamaki na monoko ya Malaki—kotatolaka ete ye [Eliya] asengelaki kotindama, yambo na mokolo monene mpe ya nkembo ya Nkolo ekoma—mpo na kozongisa mitema ya batata epai ya bana, mpe mitema ya bana epai ya batata, na bobangi ete mabele mobimba ebetama te na libabe.”30
Makambo oyo esalemaki na sanza ya minei 3, 1836,31 mpe boye ekokisaki lisakoli ya Malaki.32 Bafungola ya bule ya eleko oyo ezongisamaki.33
Bosangisi ya Milimo na Ngambo Mosusu ya Elamba
Likambo ya mawa, libiangi ya “boya epai ya Klisto”34 ekoki lisusu kopesama na basusu oyo bakufa na bozangi koyeba nsango malamu.35 Eteni ya bolengelami na bango esengaka bokasi ya basusu awa na mabele. Tosangisaka bitambo ya mambi ya bankoko, kokela mikanda ya mangomba ya libota, mpe kosala mosala ya tempelo na esika na bango mpo na kosangisa bato kati na Nkolo mpe kati na mabota na bango.36
Mpo na kosala na kati ya Bosangisi: Bomipesi na Liyokani
Awa na mabele, mosala na misionele ezali ntina koleka mpo na kosangisa Yisalaele. Nsango malamu esengelaki kolongolama yambo “bampate ebunga ya Yisalaele.”37 Lokola mbano, basali ya Nkolo bakendaki kosakola Bozongisi. Na bikolo mingi bamisionele na biso balukaki baoyo babunga ya Yialaele; bakendaka na bokila na bango “kati ya mabulu ya mabanga”; mpe bazwaki bango lokola na ntango ya kala.38
Boponi ya koya epai ya Klisto ezali te likambo ya esika ya moto afandi; ezali likambo ya bomipesi ya moto ye moko. Bato bakoki “Koyeba Nkolo”39 ata soki balongwe te na bisika bafandi. Ya solo mpenza, na mikolo ya yambo ya Eklezia, mbongwana mbala mingi elimbolaki kolongwa mboka. Kasi sikawa bosangisi esalemaka na ekolo moko na moko. Nkolo asakolaki botongi ya Siona40 na bokonzi moko na moko esika eye apesaki Basantu na Ye mbotama na bango mpe bonkoko na bango. Makomi esakolaki yambo ete bato “bakosangana na ndako na mabele ya libula na bango, mpe bakotiama na mabele na bango nyonso ya elaka.”41 “Bikolo nyonso ezali esika ya bosangani mpo na bato na yango moko.”42 Esika ya bosangani ya Basantu ya Brazilia ezali na Brazilia; esika ya bosangani ya Basantu ya Nigeria ezali na Nigeria; esika ya bosangani ya Basantu ya Koré ezali na Korea; mpe bongo na bongo. Siona ezali “bato ya mitema peto.”43 Siona ezali esika nyonso eye Basantu bafandi. Mabilisi, bopanzi nsango, mpe mangomba ezali sikawa mpo na bandimi nyonso bazala na makoki ya koyoka malongi, bafungola, kozwa makuli mpe mapamboli ya nsango malamu, kotala te esika bafandi.
Bogateli na molimo etalaka ntango lolenge moto azali kotambuisa bomoi na ye, esika moto afandi te. Basantu na mabele nyonso bazali lolenge moko na oyo etali mapamboli ya Nkolo.
Mosala oyo ya Nzambe ya Nguya ezali solo. Azali na bomoi. Yesu azali Klisto. Oyo ezali Eklezia na Ye, ezongisama mpo na kokokisa lobi ekoya ya bonzambe, mpe lisusu elaka ya bosangisi Yisalaele. Mokonzi Gordon B. Hinckley azali profeta ya Nzambe lelo. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.