2017
Komikundolaka Nkolo Mikolo Nyonso
October 2017


Bilenge

Komikundolaka Nkolo Mikolo Nyonso

Baninga, maponi, mosala ya ndako, TV—ezali na makambo ebele oyo esengaka mpo na bokebi na biso. Kasi poso nyonso, tolakaka Tata na Lola “ete [to] komikundola ntango nyonso [Mwana na Ye, Yesu Klisto]” (D&C 20:79).

Mokambi Eyring atei ete tokoki “kopona mikolo nyonso” oyo ekosunga biso tomikundola Mobikisi. Kanisa kosala pologalami sanza oyo mpo na komikundola Mobikisi mikolo nyonso koleka. Bokoki kosala calendrier mpe boyokani na eloko moko mokolo na mokolo mpo na kosala mokangano na Ye. Mokambi Eyring atalisi makambu lokola kotangaka makomi, kosambelaka na bondimi, mpe kosungaka Mobikisi mpe basusu. Ezali lisusu kokomaka, kokendaka mayangani ya Eklezia, koyokaka likita linene, kokendaka na tempelo, koyembaka banzembo—makambo ezali ebele ya kosala! Ntango tomikundoli Mobikisi mikolo nyonso, Mokambi Eyring alaki ete “mapamboli … ekoya malembe malembe mpe elenda … [mpe] ekobongola biso tokoma bayekoli ya solo ya Nkolo Yesu klisto.”

Bimisa na lokasa