Buku mpe Mbiangi
22. Kopesa mpo na Bosenga ya ntango mpe Kotonga Bomikoki


“22. Kopesa mpo na bamposa ya ntango mpe kotonga bomikoki,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“22. Kopesa mpo na Bamposa ya Ntango mpe Kotonga Bomikoki,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
mobali azali kotambola

22.

Kopesa mpo na Bosenga ya ntango mpe Kotonga Bomikoki

22.0

Boyingisi

Bandimi ya Eklezia bayokana “komema mikumba ya moko basusu, … kolela na baye bazali kolela… , mpe kobondisa baye batelemi na mposa ya libondisi” (Moziya 18:8–9).

Bandimi ya Eklezia bapesami toli ya kolendisa bomikoki na bangomei na nzela ya mosala ya makasi mpe na lisungi ya Nkolo. Bomikoki ezali makoki, bomipesi, mpe bokasi ya kopesa lisungi ya molimo mpe ya ntango ya bomoi mpo na moto ye moko mpe libota.


BOKASI YA MOTO YE MOKO MPE YA LIBOTA


22.1

Kotonga Bomikoki

Na lisungi uta na Nkolo, bandimi bakotonga bomikoki na banzela maye malandi:

  • Kokolisa bokasi ya molimo, nzoto, mpe mayoki

  • Kozwa boyekoli ya kelasi mpe mosala

  • Kokolisa bomilengeli ya ntango.

22.1.4

Bomilengeli ya Ntango

Makomi eteyi ntina ya kozala ya komilengela (tala Ezekiele 38:7; Malongi mpe Mayokani 38:30). Bandimi bapesami toli ya kokoma bato basili komilengela mpo ete bakoka kosalisa bangomei, mabota na bango, mpe basusu na bantango ya bosenga.

Bandimi bakokolisa bomilengeli ya misolo na:

  • Kofutaka moko na zomi na makabo (tala Malaki 3:8–12).

  • Kofuta mpe koboya banyongo na lolenge ekoki kosalama.

  • Kolengela mpe kobika na kati ya bidje.

  • Kobomba mpo na mikolo mikoya.

  • Kozwa boyekoli ya kelasi elongobani mpo na kosunga bango basalisa bangomei mpe mabota na bango (tala 22.3.3).

Komilengela ebakisi lisusu kosala mwango moko mpo na lolenge ya kosalisa na babosenga ya ebandeli na ntango ya likama. Bandimi balendisami na kotonga nyonso mibale na ntango ya mokuse mpe ntango ya molayi ya bopesi bilei, mai, mpe biloko mosusu ya ntina.

22.2

Kosalisa Baye Bazali na Bosenga ya Ntango mpe ya Mayoki

Bayekoli ya Nkolo Bateyami na “kolinga … mpe kosalela moko mosusu” mpe na “Kosunga baye bazali kati na bosenga ya … lisalisi” (Moziya 4:15–16). Bandimi basalaka makasi ya komona basusu lokola Mobikisi amonaka bango, kososolaka ya bango bokasi mpe bamposa moko. Bosenga oyo ekoki kosangisa bilei, bilamba, ndako, kelasi, mosala, bokolongono ya nzoto, mpe bolamu ya mayoki.

22.2.1

Magazini ya Nkolo

Makini nyonso mazali na Eklezia mpo na kosunga baye bazali na bamposa ya ntango ebengami magazine ya Nkolo (tala Malongi mpe Mayokani 82:18–19). Yango esangisi makabo ya bandimi ya ntango, talanta, mawa, biloko , mpe ya makoki ya mbongo.

Magazini ya Nkolo ezalaka na palwasi nyonso mpe likonzi. Bakambi bakoki mbala mingi kosunga bato mpe mabota kozwa biyano na babosenga na bango na kolandaka boyebi, makoki, mpe misala epesami na bandimi ya palwasi mpe likonzi.

22.2.2

Mobeko ya Kokila mpe Makabo ya Kokila

Nkolo atiaki mobeko ya kokila mpe Makabo ya kokila mpo na kopambola bato na Ye ya kopesa bango nzela ya kosalisa baye kati na bosenga. Bandimi bapusana penepene na Nkolo mpe bakokola na makasi ya molimo ntango bazali kobika mobeko ya kokila. (Tala Yisaya 58:6–12; Malaki 3:8–12.)

Kokila ekoki kosalema ntango inso. Nzokande, bandimi na momesano batalaka mokolo ya Saba ya yambo na sanza lokola mokolo ya kokila. Mokolo ya kolika mingi mingi ezali na maye malandi:

  • Losambo,

  • Kovanda kozangaka kolia mpe komela mpo na eleko moko ya bangonga 24 ( soki nzoto ekoki)

  • Kopesa likabo ya kokila ya motema ya kokaba

Likabo ya kokila ezali likabo ya kosunga baye kati na bosenga. Ntango bandimi bakilaka, babiangami kofuta likabo moko oyo ekokani soki moke lolenge moko na motuya ya bilei eliami te.

Bandimi bakoki kopesa likabo na bango ya kokila mpe kokokisa moko na zomi mpe lolenge mosusu ya makabo na episikopo to moko ya basungi na ye. Na bisika misusu, bakoki lisusu kosala ya bango Likabo na interneti.


BOKASI YA BAKAMBI


22.3

Nzela mpo na Kotonga Bomikoki mpe Lisalisi na Baye kati na Bosenga

22.3.1

Koluka Baye kati na Bosenga

Episikopo azali na mokumba ya bule ya koluka mpe kosalisa baye kati na bosenga (tala Malongi mpe Mayokani 84:112). Basusu oyo bazali na mokumba monene na kosunga episikopo na mokumba oyo ezali:

  • Bandeko mibali mpe basi ya lisalisi.

  • Bokambi ya lingomba ya bamama basungi mpe lisanga likoki ya bampaka.

  • Basungi ya episikopo.

  • Bandimi misusu ya lisanga ya palwasi.

22.3.2

Kosunga Bandimi Bamitala mpe Bayanola na Bosenga ya Ntango Mokuse

Bandimi basali makasi kokokisa babosenga ya ebendeli na nzela ya bokasi na bangomei mpe uta na libota monene. Soki oyo ekoki te, bandimi bakoki kosenga lisungi uta na bisika misusu lokola:

  • Mbulamatadi mpe makoki ya lisanga ya bato (tala 22.12).

  • Lisungi ya Eklezia.

Lisungi ya Eklezia ekoki kosangisa lisungi mpo na ntango mokuse lokola bilei, biloko ya kotisa bopeto, bilamba, ndako, to biloko mosusu ya ntina koleka. Episikopo akoki kosalela makabo ya kokila koyanola na bosenga oyo. Esika wapi komande ya baepisikopo ezali, baepisikopo mingimingi basalelaka yango mpo na kopesa Bilei mpe biloko misusu ya ebandeli (tala “Bishops’ Orders and Referrals” kati na Leader and Clerk Resources [LCR]).

22.3.3

Kosunga Bandimi Batonga Bomikoki ya Ntango Molayi

Bandimi bakoki kozala na mposa ya lisungi ya ntango molayi mpo na kosilisa mikakatano ya ntango molayi. Kotanga kelasi, boyekoli ya misala ya ntango mokuse, to biloko misusu ekoki kosunga bango batonga bomikoki mpe kopesa mpo na babosenga ya ntango molayi.

Mwango ya Bomikoki esungaka bandimi bayeba bokasi mpe bamposa na bango. Ekosunga bango lisusu komona makoki to mikanda ya kosalela. Mwango oyo esengeli esalelama ngonga inso lisungi ya Eklezia esengelami.

22.3.4

Kosalisa Baye Bazali na Bosenga ya Mayoki

Bandimi mingi bakutanaka na mikakatano ya mayoki. Bandeko mibali mpe basi ya lisalisi mpe bakambi ya palwasi bakoki kozala eloko ya lisungi na bandimi bazali na mikakatano.

22.4

Mibeko mpo na Kopesa Lisungi ya Eklezia

Na lisungi ya Nkolo, bandimi bakoluka mpona kopesa bangomei mpe mabota na bango.

Lisungi ya Eklezia ezali na ntina ya kosunga bandimi bakolisa lipanda, boumbu te. Lisungi nyonso epesami esengeli elendisa bandimi na bokasi na bango ya kokoma bamikoki.

22.4.1

Kolendisa Mokumba ya Moto mpe ya Libota

Bakambi bateyaka ete bato mpe mabota bazali na mokumba ya liboso mpo na bolamu na bangomei ya ntango, mayoki, mpe ya molimo.

Liboso ya kopesa lisungi ya Eklezia, episikopo (to mokambi mosusu to mondimi ye atindi) akotala na mondimi makoki nini bakosalela mpo na kokokisa bamposa na bangomei.

22.4.2

Kopesa Lisungi ya Ntango mpo na Bosenga ya Ntina

Ntina ya lisungi ya Eklezia ezali kokokisa mpo na ntango moke bamposa ya ebandeli ntango bandimi bazali kosala makasi mpo na kokoma bamikoki.

Baepisikopo basengeli basalela bososoli malamu mpe baluka bokambami ya molimo ntango bazali kokana motuya mpe molayi ya lisungi epesami. Basengeli bazala na motema mawa mpe bokabi ntango bazali kokela te kiboumbo.

22.4.3

Kopesa Makoki to Misala na esika ya Mosolo

Soki ekoki kosalema, episikopo asengeli koboya bopesi ya misolo. Na esika, asengeli kosalela makabo ya kokila to komande ya episikopo mpo na kopesa bandimi biloko ya kolia to misala. Bandimi bakoki sima kosalela misolo na bangomeimpo na kofuta bosenga misusu.

Ntango yango ekoki te, episikopo akoki kosalisa na kosalelaka makabo ya kokila mpo na kofuta bafaktire ya ntina (tala 22.5.2).

22.4.4

Kopesa Mosala mpe Mabaku ya Mosala

Baepisikopo bakobianga baye bazwi lisungi kosala mosala to kopesa maboko na monene ya makoki na bango. Yango esungaka bandimi babatela lokumu ya bomoto. Ekolisaka mpe lisusu makoki ya kozala omikoki.

22.4.5

Bomba Nsango na Ntina ya Lisungi ya Eklezia Sekele

Episikopo mpe bakambi misusu ya palwasi babombaka sekele bansango na ntina ya mondimi oyo akoki kozala na bosenga ya lisungi ya Eklezia. Yango ebatelaka kibomoto mpe lokumu ya bandimi.

22.5

Politiki mpo na Kopesa Lisungi ya Eklezia

Bakambi ya Eklezia basengeli kolanda politiki elakisami kati na eteni oyo ntango ya bopesi lisungi na nzela ya makabo ya kokila to komande ya episikopo mpo na biloko ya kolia mpe biloko misusu ya ebandeli.

22.5.1

Politiki Etali Bayambi ya Lisungi ya Eklezia

22.5.1.1

Lisungi na Bandimi ya Palwasi

Mingi mingi bandimi oyo bazwaka lisungi ya Eklezia basengeli babika kati ya mondelo ya palwasi mpe bazala na mokanda ya ezalela na bango lokola bandimi kati na palwasi. Lisungi ekoki kopesama mna kozangaka kotala soki mondimi asanganaka mbala na mbala na mayangani ya Eklezia to alandaka mibeko ya Eklezia.

22.5.1.2

Lisungi na Baepisikopo mpe bakambi ya Likonzi

Mokanda ya bondimami ekomama na mokambi ya likonzi esengisami yambo episikopo asalela makabo ya kokila to asenga biloko ya episikopo mpo na ye moko to libota na ye.

22.5.1.4

Lisungi na bato oyo Bazali te Bandimi ya Eklezia

Bato oyo bazali te bandimi ya Eklezia batindamaka mingi na masanga ya mboka mpo na lisungi ya bato ya esika bavandi. Na mabaku misusu, ntango akambami na Molimo, episikopo akoki kosunga bango na makobo ya kokila to komande ya episikopo.

22.5.2

Politiki na Esaleli ya Makabo ya Kokila

22.5.2.1

Lisungi ya Lopitalo to lisungi mosusu ya Bokongono

Etuka enene moko moko ya Eklezia etiaka ndelo na motuya endimami mpo na kosalela makabo ya kokila mpo na kofuta lopitalo, maladi ya mino, to maladi ya mutu.

Mpo na motuya endimama mpe malako, tala “Use of Fast Offerings for Medical Expenses.”

22.5.2.3

Bozongisi ya Likabo ya Kokila

Bandimi basengeli te kozongisa lisungi ya makabo ya kokila oyo bazwi uta na Eklezia.

22.5.2.4

Motuya ya Bosaleli Misolo ya Makabo ya Kokila ya Palwasi

Baepisikopo basengami te kosukisa lisungi ya makabo ya kokila ya bandimi ya palwasi na makabo ekongolami kati na palwasi.

22.5.3

Politiki na lolenge ya Kofuta

Soki ekoki kosalema, lifuti esengeli ekende mbala moko na mombongo oyo apesi biloko mpe misala.

22.5.4

Politiki ya Lifuti oyo Ekoki Kozala na Litomba ya Episikopo to Mokambi ya Likonzi

Ntango azali kopesa lisungi na bandimi na makabo ya kokila, episikopo asengeli te asalela misolo ya kofuta biloko to misala na lolenge ete ezala litomba na ye moko.

Soki lifuti ya likabo ya kokila mpo na mondimi moko ekoki kozala na litomba ya mokambi ya likonzi to mombongo azali kosala, Kondimama ya etuka enene esengisami.

22.6

Ntina ya Bakambi ya palwasi

22.6.1

Episikopo mpe Basungi na ye

Episikopo azali na etinda ya nzambe koluka mpe kosalisa baye bazali na babosenga ya ntango (tala Malongi mpe Mayokani 84:112). Apesaka mosala moye mingi na bokambi ya lingomba ya bamama basungi mpe lisanga likoki ya bampaka. Nzoka nde, misala misusu misalemi kaka na episikopo. Mpo na ndakisa, episikopo:

  • Akopesa lolenge, motango, mpe molayi ya lisungi ya ntango epesami.

  • Liisungi na likabo ya kokila endimama (tala 22.4 mpe 22.5) mpe biloko biye bisengisami na episikopo mpo na biloko ya kolia mpe biloko misusu ya ebandeli (tala 22.13).

  • Akotala lisusu ye moko mwango ya bomikoki ya bandimi. Akotinda bakambi basusu ya palwasi balandela mwango ndenge esengeli.

Episikopo mpe basungi na ye bazali na mikumba maye malandi:

  • Koteya mabongisi mpe mapamboli engebene na (1) Kosalisa baye bazali na bamposa ya ntango mpe mayoki (2) kotonga bomikoki (tala 22.1).

  • Koteya mobeko ya kokila mpe kolendisa bandimi bafuta makabo ya kokila na motem ya kokaba (tala 22.2.2).

  • Kolandela bosangisi mpe botangi ya makaabo ya kokila (tala 34.3.2).

22.6.2

Bakambi ya lingomba ya bamama basungi mpe lisanga likoki ya bampaka

Na nse ya bokambami ya episikopo, bakambi ya lingomba ya bamama basungi mpe ya lisanga likoki ya bampaka bazali na fungola ya lisalisi ya baye bazali na bosenga kati na palwasi (tala 8.2.2 mpe 9.2.2). Bakambi baye bateyaka bandimi ya palwasi na:

  • Kosalisaka baye bazali na bosenga

  • Kobika mobeko ya kokila

  • Kotonga bomikoki.

  • Kokolisa komilengela ya moto mpe ya libota.

22.6.3

Bandeko Mibali mpe Basi ya Lisalisi

Lisungi na bosenga ya bamposa ya molimo mpe ntango mingi mingi ebandaka na bandeko mibali mpe basi (tala 21.1). Bakopesa lapole ya bonsenga ya baye bazali kosalela na bakambi na bango ya lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya bamama basungi na masolo ya mosala ya lisalisi mpe na bantango inso. Bakoki kokabola bosenga oyo ezali sekele mbala moko na episikopo.

22.7

Mokumba ya Lisanga ya Palwasi

Mosala moko ya motuya ya lisanga ya palwasi ezali ya kosala mwango ya kosalisa baye bazali na bosenga mpe kosunga bango bakoma bato na bomikoki (tala 4.4). Baye bazwami na lisanga bakotia bamwango oyo na likolo ya bansango kouta na masolo ya mosala ya lisalisi mpe kouta na bokutani ya moto yemei na baye bazali na bosenga. Na kosololaka na ntina ya bosenga ya bandimi, lisanga ya bakambi ekotosa mposa ya moto nyonso oyo asengi batalela bosenga na ye na sekele.

22.8

Ntina ya Lisanga ya Bilenge ya Palwasi

Moko ya bantina ya lisanga ya bilenge ya palwasi ezali ya kosunga bilenge bakoma balandi babulisami ya Yesu Klisto (see 29.2.6).

Na nse ya bokambami ya episikopo mpe basungi na ye, lisanga ya bilenge ya palwasi bakosala bongisa nzela ya kosalela baye bazali na bosenga kati na palwasi na bango mpe na esika bavandi.

Bimisa na lokasa