Buku mpe Mbiangi
26. Mikanda ya Ndingisa mpo na Tempelo


“26. Mikanda ya ndingisa mpo na tempelo,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“26. Mikanda ya Ndingisa mpo na Tempelo,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
episikopo azali kosolola na moto moko

26.

Mikanda ya ndingisa mpo na Tempelo

26.0

Boyingisi

Bokoti na ndako ya Nkolo ezali libaku ya bule. Bakambi ya palwasi mpe likonzi balendisaka bandimi nyonso bazala ya kolongobana mpe bazala na mokanda ya ndingisa mpo na tempelo ya malamu atako bazali kobika te penepene na tempelo.

Bakambi ya Eklezia basalaka makasi mpo na komona ete baye banso bazali kokota na ndako ya Nkolo bazali ya kolongobana na kosalaka bongo (tala Nzembo 24:3–5).

Bandimi basengeli bazala na mokanda mpo na tempelo ya malamu mpo na kokota na tempelo.

Episikopo akokutana na mokambi ya likonzi soki azali na mituna na ntina ya mikanda ya tempelo oyo eyanolami te kati na mokapo eye. Mokambi ya likonzi akoki kosolola na bilo ya Bokambi ya Yambo na mituna.

26.1

Ndenge ya Mikanda ya Ndingisa mpo na Tempelo

Ezali na ndenge misato ya mokanda:

  1. Mokanda ya ndingisa mpo na tempelo ya bandimi bazwa dotasio te Mikanda miye mizali mpo na bandimi baye bazwi dotasio te oyo bakokangisama na baboti na bango to bakosala mabatisi to nkotisa mpo na bakufi. Epesami na Leader and Clerk Resources (LCR). Mpo na nsango mingi koleka, tala 26.4.

  2. Mokanda mpo na tempelo mpo na makuli ya bato na bomoi. Mikanda miye mizali mpo na bandimi bazali kozwa dotasio na bangomei to bazali kokangisama na molongani na bango. Mokanda mpo na makuli ya babomoi ekangama na mokanda ya mbala na mbala mpo na bandimi bazwa dotasio( elimbolami na nse).

  3. Mokanda mpo na tempelo mpo na bandimi bazwa dotasio. Mikanda miye mizali mpo na bandimi baye bazwaki liboso dotasio. Epesami na LCR. Epesi nzela na mondimi nyonso akota na makuli nyonso kati na tempelo mpo na bakufi. Esalelami lisusu ntango mondimi azwa dotasio akangisami na baboti to bana babomoi to bakufi. Mpo na kozwa nsango mingi koleka, tala 26.3.

26.2

Kobatela Mokanda ya Ndingisa mpo na Tempelo

26.2.1

Bakambi ya Bonganganzambe Kobatekalaka Mokanda ya ndingisa mpo na Tempelo

Bakambi ya bonganganzambe baye bazali na ndingisa ya kozwa buku ya mikanda ya ndingisa mpo na tempelo basengeli na bokebi kobatela yango.

Bakambi ya bonganganzambe bayeba lisusu ete bato bapesami ndingisa te bazwa bansango te na ntina ya mokanda mpo na tempelo kati na LCR.

26.2.2

Mikanda ya Ndingisa oyo Babungisi to Bayibi

Episikopo akosenga na bandimi bayebisa ye nokinoki soki mokanda na bango ebungi to eyibami. Ye to mosungi oyo atindami to kalaki akosalela LCR kolongola mokanda na nokinoki soki makoki ezali. Soki ebongiseli oyo ezali te, episikopo akobenga bilo ya tempelo mpo na kolongola mokanda oyo.

26.2.3

Bamemi ya Mokanda ya Ndingisa mpo na Tempelo oyo bazali kotosa mibeko ya Bolongobani

Soki episikopo alobi ete mondimi moko oyo azali na mokanda mpo na tempelo azali kotosa te mibeko ya bolongobani (tala 26.3), akosenga mokanda uta na mondimi yango. Akosalela LCR mpo na kolongola mokanda yango. Soki ebongiseli oyo ezali te, episikopo akobenga bilo ya tempelo mpo na kolongola mokanda oyo.

26.3

Malako Minene mpo na kopesa Mikanda ya Ndingisa mpo na Tempelo

Bakambi ya bonganganzambe bakoki kobimisa mokanda mpo na tempelo kaka soki mondimi ayanoli malamu na mituna esengeli.

Kati ya likonzi, moko ya bakambi ya likonzi to kalaka ya likonzi akopesa nzela na mokanda ya ndingisa mpo na tempelo mpo ete esala kati na LCR nsima ya kopesama. Kati na disitiliki, moko ya bakambi ya Misio to kalaka ya misio akosala ete mokanda yango esala. Mokanda mpo na mabatisi mpe nkotisa mpo na bakufi ekobanda kosala ntango ekomami na moko ya baepisikopo to na mokambi ya etape.

26.3.1

Masolo ya Mokanda mpo na Tempelo mpo na bandimi kati na Bapalwasi mpe Bitape

Kati na palwasi, episikopo to mosungi oyo atindami akomema masolo ya mokanda mpo na tempelo mpe akopesa mokanda na baye balongobani. Kati na etape, kaka mokambi ya etape akotambwusa masolo ya kopesa moto mokanda mpo na tempelo mpe ye moko kaka asengeli kopesa mikanda yango.

Na palwasi, episikopo yemei akosolola na bandimi oyo:

  • Bazali kozwa dotasio na bango moko (tala 27.1 mpe 27.2).

  • Bazali kokangisama na molongani (tala 27.3).

Na ntango ya makambo ya lombango ntango episikopo azali te, akoki kopesa ndingisa na moko ya bapesi toli na ye mpo na kotambwisa masolo yango.

Liboso ya kopesa mokanda ya ndingisa na libaku songolo na maye ekomami likolo, episikopo akotala lisusu mikanda ya moto wana lokola mondimi mpo na kotala soki ezali na nkoma te na ntina ya bopekisi na ezalela ya mondimi na Eklezia. Mpo na bandimi bazali kozwa dotasio na bango moko to baye bazali kokangisama na molongani, bango me basengeli kolakisa ete:

  • Libatisi mpe nkotisa ya moto ekomama na mokanda ya moto yango lokola mondimi.

  • Bandeko mibali bazwi Bonganganzambe ya Melekisedeki.

Nsima ya masolo na moko ya bakambi na episikopo to mokambi ya etape, moko ya bakambi ya likonzi akosolola na bandimi oyo bazali kofanda na ndelo ya likonzi. Moko ya bakambi ya Misio akomema lisolo ya mibale mpo na bandimi oyo bazali kofanda kati na disitiliki. Mokambi ya disitiliki akomema mosolo ya mokanda mpo na tempelo te kaka soki azwi ndingisa ya Bokambi ya Yambo.

26.3.2

Masolo ya Kozwa Mokanda ya Ndingisa mpo na Tempelo mpo na Bandimi ya Bisika Mosika

Bandimi basusu bavandaka na bamboka oyo esengaka ntalo mingi mpo na kosala mobembo to bakutanaka na mikakatano mpo na kokutana na moko ya bakambi ya likonzi to misio. Na mikakatano wana, mokambi ya tempelo akoki kosolola na moto yango mpe kotia maboko na mokanda ya ndingisa. Liboso ya komema masolo, akosolola na mokambi ya likonzi to ya misio. Episikopo, mopesi toli apesami nzela, to mokambi ya etape asengeli kosila kosolola na mondimi mpe kotia maboko na mokanda.

26.3.3

Kokamba Masolo ya Mokanda ya Boyingeli na Tempelo

Bakambi basengeli mpe te kobakisa to kolongola lisengami moko.

Masolo mpo na mokanda mpo na tempelo esengeli te ezala mbangombango Esengeni ezala lisolo ya sekele na moto ye moko. Nzokande, moto oyo bazali kotuna mituna akoki kobengisa mwasi, moboti, to mokolo mosusu azala wana.

26.4

Kopesa Mokanda mpo na Tempelo na Bandimi bazwi Dotatio te

26.4.1

Malako Minene

Mokanda mpo na tempelo epesami na bandimi bazwa dotasio te lolenge elandi:

  • Mpo na bandimi ya mibu 11 mpe bakolo basengeli kobatisama mpe kosala nkotisa mpo na bakufi. (Bilenge basi mpe bilenge mibali oyo bakuli babongi na mokanda mpo na tempelo kobanda na sanza ya yambo ya mobu bakokisi mibu 12)

  • Mpo na bandimi ya mbula 8 ti na 20 oyo basengeli kokangisama na baboti na bango. Mpo na kokangisama na baboti na bango, Bana mike na nse ya 8 bazali na mposa ya mokanda ya ndingis mpo na tempelo te (tala 26.4.4).

  • Mpo na bandimi ya mbula 8 ti na 20 mpo na kozala na bokangasi ya bandeko na bango ya basi mpe mibali, bandeko mibali mpe basi ya tata moko to mama koko na baboti na bango.

Bandimi oyo bazwaki dotatio bakoki kozwa ata mokanda te elimbolami na molongo eye.

Mondimi ya Eklezia mobali oyo azali mokolo kokoka mpo na kozwa bonganganzambe asengeli kokula na mosala ya bonganganzambe liboso ete azwa mokanda mpo na tempelo.

26.4.2

Mokanda mpo na Tempelo mo na Bandimi bazwi Libatisi Sika

Episikopo akosolola na bandimi ya sika oyo bazali na mbula ekoki mpo na kozwa mokanda ya ndingisa mpo na tempelo mpo na mabatisi mpe nkotisa ya bozweli kaka. Akomema masolo maye sima ya nkotisa ya mondimi, mingimingi sima ya mposo moko (tala 26.4.1). Mpo na bandeko mibali, masolo maye masengeli masalema lokola ndambo ya masolo mpo na kozwa Bonganganzambe ya Alona.

26.4.3

Mikanda mpo na Tempelo mpo na Mabatisi mpe Bankotisa Bobele mpo na Bakufi

Mikanda ya ndingisa mpo na tempelo oyo epesami mpo na mabatisi mpe nkotisa ya bozweli mpo na bakufi ekoki kosalema kaka mpo na ntina eye wana.

26.4.4

Mikanda mpo na tempelo mpo na bokangisi ya bana ya bomoi na baboti

Bandimi baye bazali na mibu 21 to mikolo bakoki kokangisama na baboti na bango to kotala bokangisi kaka soki bazali (1) bazwa dotasio mpe (2) bazali na mokanda elongobana ya ndingisa mpo na tempelo.

26.5

Kopesa Mikanda ya Ndingisa mpo na Tempelo na Mabaku Minene

26.5.1

Bandimi Bazali kozwa Dotasio na Bangomei

Bandimi balongobani baye bazali na mposa ya kozwa dotasio na bangomei bakoki kosala bongo ntango bakokisi masengami manso maye malandi:

  • Bazali soki moke na mibu 18.

  • Basilisa to bazali lisusu kokota kelasi ya secondere te, to oyo ekokani na yango.

  • Mbula mobimba eleki uta nkotisa na bango.

  • Bayoki mposa ya kozwa mpe kotosa mayokani na nzela ya bomoi na bango.

Na kobakisa, Bobali asengeli azwa Bonganganzambe ya Melekisedeki yambo ya kozwa dotasio na ye. Mpo na nsango na ntina ya bandimi bazali komilengela mpo na kozwa dotasio na bangomei, tala 25.2.8. Mpo na kozwa nsango mingi koleka na ntina ya nani akozwa dotasio, tala 27.2.1.

26.5.3

Elenge Misionele ya Bozongi Mosala ya Mosika na Ndako

Mokambi ya misio akotia mokolo mpe akopesa nzela na mokanda mpo na tempelo bongo ekosila motuya sanza misato uta na mokolo misionele azongi ndako.

Episikopo akosolola na bamisionele bazonga mpo na kopesa mokanda ya sika ya ndingisa mpo na tempelo penepene ya bosilisi ya sanza misato ya kosila ya ntango.

26.5.4

Bandimi baye bavandi te na palwasi moko mpo na mbula moko na moke

Episikopo to mopesi toli moko atindami akosolola na episikopo ya liboso yambo ya kotambwisa masolo ya kozwela mokanda ya ndingisa mpo na tempelo.

26.5.7

Bandimi Baye Bazali komikotola Lokola Basi-Mibali to Mibali-Basi

Mokambi ya likonzi asengeli asolola na Bokambi ya Etuka enene mpo na kotalela makambo ya moto na moto na motema mobimba mpe na bolingo ya boklisto (tala 38.6.23).

26.5.8

Bandimi Oyo Basali Lisumu ya Monene

Mondimi oyo asali lisumu ya monene akoki te kozwa mokanda ya ndingisa mpo na tempelo kino ye azala mobali to mwasi ayamboli (tala 32.6).

26.5.9

Bandimi baye bazongisamaki nsima ya kolongolama lokola mondimi to koboya ye moko kozala mondimi ya Eklezia

26.5.9.1

Bandimi Baye Bazwaki Dotasio Liboso Te

Bandimi baye bakoki te kopesama mokanda ya ndingisa mpo na kozwa dotasio na bango moko tii mbula moko mobimba nsima ya mokolo ya kozongisama na bango na Eklezia na nzela ya libatisi mpe nkotisa.

26.5.9.2

Bandimi Baye Bazwaki Dotasio Liboso

Bandimi baye bazwaki Dotasio liboso bakoki kozwa ata lolenge moko ya mokanda ya ndingisa te kino ya bango mapamboli ya tempelo ekozongisama na nzela ya makuli ya bozongisi mapamboli.

Bimisa na lokasa