Bavideo mpe Bilili
Buku ya Bilili ya Sango Malamu


Kosalela Buku Oyo

Bilili kati na buku oyo ebongisami na biteni motoba: Kondimana na Kala, Kondimana na Sika, Buku ya Molomoni, Lisolo ya Eklezia, Sango Malamu kati na Mosala, mpe Baprofeta ya Mikolo ya Nsuka. Bokoki kosalela bilili oyo mpo na koyekola mpe koteya na libota to na eklezia. Mokanda oyo na se elimboli kombo mpo na elili moko moko lokola bankoma ya makomi masantu mpe maziba misusu oyo ekoki kosalelama mpo koyekola mpe kosolola na ntina na bilili. Koluka makomi masantu mpe maziba oyo elongobani ekozindisa bososoli na bino ya makambo mpe mibeko ya sango malamu elimbolami. Salela makanisi elandi mpo kosalela bilili mpe bankoma:

  • Bengisa bato na koluka makomi masantu to maziba misusu oyo ebalani na elili moko. Senga bango batanga to baloba na mokuse esaleli oyo ntango ya lisolo na ntina na elili yango.

  • Senga libota to bai kelasi na kolimbola oyo bamoni kati na elili to lolenge nini etindi bango bayoka. Mibeko nini ya sango malamu elili eteyi? Misala nini ekoki kosalama kati na bomoi na biso lelo?

  • Bengisa bato na kotala bilili na ndenge na bango moko. Bakoki kopona bilili mibale mpo kokokisa mpe kokesenisa. Botali mpe mituna na bango na ntina na oyo bamoni ekoki komema na masolo na ntina na makomi masantu mpe na ntina na mibeko ya sango malamu.

Bimisa na lokasa