Lingomba ya Bamama Basungi mpe Lisanga Likoki ya Bampaka
Mateya, Boyekoli, mpe Kosalela Basango ya Likita LInene


Yaka, Landa Ngai

Mateya, Boyekoli, mpe Kosalela Basango ya Likita LInene

Masanga Makoki ya bampaka mpe Mangomba ya Bamama Basungi bazali moboku monene na mosala ya lobiko mpe bonetoli. Na ntango ya makita na bango ya Eyenga, basololaka lolenge nini ya kosalela mateya ya bansango ya likita linene mpo na babokasi na bango na mosala oyo. Bakambi ya Lisanga likoki ya bampaka mpe ya Lingomba ya Bamama Basungi baponaka nsango ya likita mpo na koyekola na ntango likita ya Eyenga nyonso, engebene na babosenga ya bandimi mpe bokambi ya Molimo. Ntango mosusu, episikopo to mokambi ya etuka akoki mpe kopesa likanisi ya nsango. Mingi mingi, bakambi basengeli kopona bansango uta na bandeko ya Bokambi ya Yambo mpe ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale. Nzokande, nsango nyonso uta na likita linene oyo ewuti koleka ekoki kosololama.

Batei babetaka nsete mingi na lolenge ya kosunga bandimi basalela mateya ya bansango ya likita linene na bomoi na bango. Bakambi mpe bateyi bazwaka banzela ya kolendisa bandimi mpo bayekola bansango oyo eponama yambo ya makita.

Mpo na nsango koleka na ntina ya lisanga ya bampaka mpe makita ya Lingomba ya Bamama Basungi, tala Buku Monene ya Malako: Kosala na Eklezia ya Yezu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 8.2.1.2, 9.2.1.2, ChurchofJesusChrist.org.

Komilengele mpo na Koteya

Mituna oyo elandi ekoki kosunga bateyi ntango bazali komilengele mpo na kosalela nsango ya likita linene mpo na koteya. Ntango esengeli, batei bateyaka elongo na bokambi ya lisanga likoki ya bampaka to Lingomba ya Bamama Basungi ntango bamanyoli mituna oyo.

  • Mpo na nini bokambi ya bampaka ya lisanga likoki to Lingomba ya Bamama Basungi baponaka nsango oyo mpo na kosolola? Balikiaka nini mpo ete bandimi bayeba mpe basalela nsima ya bosololi nsango oyo?

  • Nini molobi alingi bandimi basosola? Mabongisi nini ya nsango malamu ezali ye koteya? Lolenge nini mabongi oyo esalemaka na lisanga likoki na ngai ya bampaka to Lingomba ya Bamama Basungi?

  • Makomi nini molobi asaleli mpo na kotombola nsango na ye? Ezali na makomi misusu oyo bandimi bakoki kotanga oyo ekoki kolendisa bososoli na bango? (Bokoki kozwa boko makomi na nsuka ya nsango to na kati ya Guide des Ecritures [scriptures.ChurchofJesusChrist.org].)

  • Mituna nini ekoki ngai kotuna oyo ekosunga bandimi bamanyola mpe basalela nsango ya mateya oyo? Mituna nini ekosunga bango bamona ntina ya mateya oyo na bbomoi na bango, na mabota na bango, mpe na mosala ya Nkolo?

  • Nini ekoki ngai kosala mpo na kobengisa Molimo kati na likita na biso? Nini ekoki ngai kosalela mpo na kobongisa lisolo, kobakisa mambi ya kala, masese, miziki, to misala ya ntoki? Motei asalaki nini mpo na kosunga bandimi basosola nsango na ye?

  • Molobeli apesaki boko nkasa ya libyangi? Boniboni ekoki ngai kosalisa bandimi bayoka mposa ya kosalela nkasa ya libyangi oyo?

Makanisi ya lisano

Ezali na banzela ebele oyo batei bakoki kosunga bandimi bayekola uta mpe kosalela bansango ya likita linene. Oyo ezali mwa bandakisa; batei bakoki kozala na makanisi mosusu oyo ekosalema malamu na lisanga likoki na bango ya bampaka to na Lingomba ya Bamama Basungi.

  • Tosalela babosolo na bomoi na biso. Bengisa bandimi bayekola lisusu bansango ya likita linene baluka babosolo oyo ekoki kosunga bango basilisa mosala ya Nzambe oyo apesi bango lokola moto na moto to lokola lisanga likoki ya bampaka to Lingomba ya Bamama Basungi. Ndakisa, toyekoli nini oyo ekoki kosunga biso lokola basungi? lokola baboti? lokola mondimi ya bamisionele? Lolenge nini nsango oyo epesi nguya na makanisi, mayoki mpe misala na biso?

  • Bosolola kati na masanga. Bokabola bandimi kati na masanga ya mike mike, mpe bopesa na liboke moko na moko eteni moko ekesani ya nsango ya likita mpo na kotanga mpe kosolola. Nsima tuna lisanga moko na moko bakabola bosolo oyo bazwi mpe lolenge nini esalemaka epai na bango. To okoki kokela maboke ya bato oyo ezali na bandimi oyo bayekolaki biteni ya kokesena ya nsango mpe tika ete bakabolana moko na mosusu oyo bazwaki.

  • Luka biyano ya mituna. Bosenga bandimi bayanola mituna lokola oyo elandi na ntina ya nsango ya likita: Babosolo nini ya nsango malamu tozwi na nsango oyo? Lolenge nini tokoki kosalela bosolo oyo? Mabyangi nini mpe mapamboli elakelami nini epesamaki? Liteya oyo eteyi biso nini na ntina ya mosala Nzambe alingi biso tosala? To kokela mwa mituna na yo moko mpo na kokanisa na bozindo na ntina ya nsango to kosalela babosolo oyo ezali koteya. Pesa bandimi ndingisa ya kopona moko ya mituna oyo mpe bazwa biyano na kati ya nsango.

  • Bokabola mateya uta na nsango. Bobengisa bandimi bakabola mateya uta na nsango ya liteya oyo efuli bango mpo na kokokisa mikumba na bango na mosala ya lobiko mpe ya bonetolami. Bolendisa bango bayeba lolenge nini bakoki kokabola mateya oyo mpo na kopambola moto songolo, lokola balingami mpe bato oyo bazali kosunga.

  • Bokabola liteya na nzela ya eloko. Yambo ya likita, bobengisa boko bandimi bamema biloko uta na ndako oyo bakoki kosalela mpo na koteya na ntina ya liteya ya likita. Na ntango ya likita, bosenga bandimi balimbola lolenge nini biloko wana etali nsango mpe lolenge nini nsango esalemaka na bomoi na bango.

  • Bobongisa liteya mpo na koteya na ndako. Bosenga bandimi basala mibale mibale mpo na kolengele liteya ya mpokwa na libota na ntina ya nsango ya likita. Bakoki koyanola mituna lokola oyo: lolenge nini tokoki kosala ete nsango yango elongobana na mabota na biso? Lolenge nini tokoki kokabola nsango oyo elongo na bato oyo tozali kosunga?

  • Bokabola boyebi. Botanga elongo mateya mingi uta na nsango ya likita. Bosenga bandimi bakabola bandakisa uta na makomi mpe uta na bomoi na bango oyo elakisi to elendisi malongi eteyami kati ya mateya oyo.

  • Boluka esakola moko. Bobengisa bandimi baluka nsango ya likita, kolukaka maloba oyo ezali na ntina mpo na bango. Bosenga bango bakabola maloba mpe nini bayekoli uta na yango. Bosenga bango bakabola lolenge nini mateya oyo esalisi bango tokokisa mosala ya Nkolo.

Mpo na makanisi ebele ya koyekola mpe koteya uta na bansango ya likita linene, tala “Ideas for Learning and Teaching from General Conference.” (Fina na “Ideas for Study” under “General Conference” na Gospel Library.)

Bimisa na lokasa