Makomi
Alma 57


Mokapo 57

Elamani asangeli bokamati ya Atipala mpe bomitiki mpe nsima bobateli ya Kumeni—Bilenge na ye ya Baamoni babundi lokola bilombe; mpe nyonso bazokisami, kasi moko te abomami—Gidi ayebisi nsango ya bobomi mpe bokimi ya Balamani bato ya boloko. Penepene na mobu 63 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete nazwaki mokanda moko ya Amoloni, mokonzi, kolobaka ete soki natiki bato wana ya boloko ya etumba baoyo tokamataki ete akotikela biso engumba ya Atipala.

2 Kasi natindaki mokanda epayi ya mokonzi, ete toyebaki malamu basoda na biso bakokaki mpo na kokamata engumba ya Atipala na bokasi na biso; mpe na kopesaka bato na biso ya boloko mpo na engumba wana tomoni biso moko tozangi bwania, mpe ete tokotika bobele bato na biso ya boloko na bokabolani.

3 Mpe Amoloni aboyaki mokanda na ngai, mpo alingaki te kakobolana bato ya boloko; boye tobandaki komilengela mpo na kokende kobundisa engumba ya Atipala.

4 Kasi bato ya Atipala batikaki engumba, mpe bakimaki na bingumba na bango mosusu, oyo bazwaki, mpo na kolendisa yango; mpe boye engumba ya Atipala ekweyaki na maboko na biso.

5 Mpe boye esilaki mobu ya ntuku mibale na mwambe ya boyangeli ya basambisi.

6 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya ntuku mibale na libwa, tozwaki bobakisi ya bilei, mpe lisusu bobakisi mpo na limpinga na biso, uta na mboka ya Zalayemila, mpe uta na mboka nzinganzinga mpembeni, na motango ya bato nkoto motoba, kobakisa na ntuku motoba ya bana mibali ya Baamoni oyo bayaki mpo na kosangana na bandeko na bango, na ngai lingomba ya moke ya nkoto mibale. Mpe sikawa tala, tozalaki makasi, iyo, mpe tozalaki lisusu na ebele ya bilei oyo bimemamaki epayi na biso.

7 Mpe esalemaki ete ezalaki mposa na biso ete tobunda etumba moko na limpinga oyo etiamaki mpo na kobatela engumba ya Kumeni.

8 Mpe sikawa tala, nakolakisa epayi na yo ete kala mingi te tokokisaki mposa na biso; iyo, elongo na basoda na biso ya makasi, soki te elongo na ndambo ya basoda na biso ya makasi, tozingaki, na butu, engumba ya Kumeni, mwa moke liboso ete bazwa bobakisi ya bilei.

9 Mpe esalemaki ete totiaki nganda nzinganzinga mpembeni na engumba mpo na butu mingi; kasi tolalaki likolo ya mipanga na biso, mpe totiaki bakengeli, ete Balamani bakoka te koya likolo na biso na butu mpe koboma biso, oyo bamekaki kosala yango mbala mingi; kasi mbala mingi lokola bamekaki yango makila na bango matangisamaki.

10 Nsima ya mwa ntango biloko na bango ya kolia biyaki, mpe bazalaki penepene na kokota na engumba na butu. Mpe biso, na esika ya kozalaka Balamani, tozalaki Banefi; boye, tokamataki bango mpe biloko na bango ya kolia.

11 Mpe atako Balamani bakatamaki uta na lisalisi na bango na lolenge oyo, bazalaki naino na mokano ya kosimba engumba; boye ekomaki likambo elongobani ete tokamata biloko ya kolia wana mpe totinda yango na mboka ya Yuda, mpe epayi ya bato na biso ya boloko na mboka ya Zalayemila.

12 Mpe esalemaki ete mikolo mingi te elekaki yambo Balamani babanda kobungisa elikya nyonso ya kozwa lisalisi; boye batikaki engumba na maboko na biso; mpe boye tokokisaki miango na biso na kozwaka engumba ya Kumeni.

13 Kasi esalemaki ete bato na biso ya boloko bazalaki na motango monene mpenza ete, ata bonene ya motango na biso, tosengisamaki kosalela mampinga na biso nyonso mpo na kokengele bango, soki te koboma bango.

14 Mpo tala, bazalaki kobima na motango monene, mpe bazalaki kobunda na mabanga, mpe na biteni ya nzete, to eloko nyonso bakokaki kozwa na maboko na bango, na lolenge ete tobomaki koleka nkoto mibale kati na bango nsima ya komitika bango moko bato ya boloko ya etumba.

15 Boye ekomaki likambo elongobani mpo na biso, ete totia nsuka na bomoi na bango, soki te tokengele bango, mompanga na loboko, kokitaka na mboka ya Zalayemila; mpe lisusu biloko na biso ya kolia ezalaki lisusu kokoka mpo na bato na biso moko, ata oyo tokamataki uta na Balamani.

16 Mpe sikawa, na bizalela wana ya kokoso, ekomaki likambo moko ya mpasi mpenza mpo na kozwa mokano mpo na oyo etali bato oyo ya boloko ya etumba; kasi, tozwaki mokano ya kotinda bango na mboka ya Zalayemila; boye toponaki ndambo ya bato na biso, mpe topesaki bango mokumba likolo ya bato na biso ya boloko mpo na kokende na mboka ya Zalayemila.

17 Kasi esalemaki ete na mokolo ya nsima bazongaki. Mpe sikawa tala, totunaki bango mpo na oyo etali bato ya boloko te; mpo tala, Balamani babandaki kobundisa biso, mpe bazongaki na ntango esengeli mpo na kobikisa biso uta na kokweya na maboko na bango. Mpo tala, Amoloni atindaki bobakisi ya sika ya bilei mpe lisusu limpinga ya bato ya motango monene mpo na kosalisa bango.

18 Mpe esalemaki ete bato wana oyo totindaki elongo na bato ya boloko bakomaki na ntango esengeli mpo na kotelemisa bango, lokola ezalaki bango penepene na kolonga biso.

19 Kasi tala, lingomba ya bato na ngai ya nkoto mibale na ntuku motoba babundaki na bozangi kobanga mingi koleka; iyo, bazalaki ngwi liboso ya Balamani, mpe bapesaki liwa epayi na bango nyonso oyo batelemelaki bango.

20 Mpe lokola ndambo etikalaki ya limpinga na biso ezalaki penepene na kozonga nsima liboso ya Balamani, tala, baye nkoto mibale na ntuku motoba bazalaki ngwi mpe molende.

21 Iyo, mpe batosaki mpe babatelaki mpo na kokokisa liloba nyonso ya etinda na sikisiki; iyo, mpe kutu esalemelaki bango engebene na bondimi na bango, mpe namikundolaki maloba oyo balobaki epayi na ngai ete bamama na bango bateyaki bango.

22 Mpe sikawa tala, ezalaki bana mibali na ngai oyo, mpe bato wana oyo baponamaki mpo na komema bato ya boloko, bango nde tosengeli kopesa elonga oyo monene; mpo ezalaki bango oyo babetaki Balamani; boye babenganamaki nsima na engumba ya Mati.

23 Mpe tosimbaki engumba na biso ya Kumeni, mpe tobebisamaki nyonso te na mompanga; nzokande, toyokaki mpasi mpo na kobungisa bato mingi.

24 Mpe esalemaki ete esilaki Balamani kokima, napesaki sasaipi mibeko ete bato na ngai oyo bazokaki bakamatama uta na kati ya bakufi, mpe nasalaki ete mpota na bango ekangisama na bilamba.

25 Mpe esalemaki ete ezalaki na basoda nkama mibale, uta na nkoto mibale na ntuku motoba ya bato na ngai, baoyo bamiyebaki lisusu te na ntina ete babungisaki makila; nzokande, engebene na bolamu ya Nzambe, mpe na bokamwi monene na biso, mpe lisusu bosepeli ya limpinga na biso mobimba, ezalaki na moto moko te na bango oyo awaki; iyo, mpe ezalaki na moto moko na kati na bango oyo azwaki mpota mingi te.

26 Mpe sikawa, bobateli na bango ezalaki likambo ya kokamwa na limpinga na biso mobimba, iyo, ete babatelamaki ntango ezalaki na nkoto moko ya bandeko na biso baoyo babomamaki. Mpe totii yango mpenza na nguya ya makamwisi ya Nzambe, na ntina ya bondimi na bango ya koleka na oyo bateyamaki na kondima—ete ezali na Nzambe moko ya boyengebene, mpe moto nyonso oyo atiaki ntembe te, ete babatelamaki na nguya na ye ya kokamwa.

27 Sikawa oyo ezalaki bondimi na bango oyo nalobelaki; bazali bilenge, mpe makanisi na bango ezali ngwi, mpe batielaki Nzambe motema na bango ntango nyonso.

28 Mpe sikawa esalemaki ete esilaki biso boye kosalisa bato na biso baoyo bazokaki, mpe kokunda lisusu bakufi na biso mpe bakufi ya Balamani, oyo bazalaki mingi, tala, totunaki Gidi mpo na oyo etali bato ya boloko oyo babandaki kokita na mboka ya Zalayemila elongo na bango.

29 Sikawa Gidi azalaki kapitene mokonzi na lingomba oyo eponamaki mpo na kokengela bango na mboka yango.

30 Mpe sikawa, oyo ezali maloba oyo Gidi alobaki epayi na ngai: Tala, tobandaki kokita na mboka ya Zalayemila elongo na bato na biso ya boloko. Mpe esalemaki ete tokutanaki na banongi ya mampinga na biso, baoyo batindamaki libanda kokengela nganda ya Balamani.

31 Mpe bagangaki epayi na biso, kolobaka—Tala, mampinga ya Balamani ezali kotambolaka kokende epayi na engumba ya Kumeni; mpe tala, bakobundisa bango, iyo, mpe bakobebisa bato na biso.

32 Mpe esalemaki ete bato na biso ya boloko bayokaki bogangi na bango, oyo esalaki ete bango bazwa mpiko; mpe babandaki kotomboka na biso.

33 Mpe esalemaki ete na ntina ya botomboki na bango tosalaki ete mipanga na biso miya likolo na bango. Mpe esalemaki ete lokola moto moko bakimaki uta na mipanga na biso, na oyo wapi, motango monene na bango babomamaki; mpe baoyo batikalaki bapanzanaki mpe bakimaki uta na biso.

34 Mpe tala, ntango ekimaki bango mpe tokokaki kokanga bango te, tokamataki botamboli na biso na lombangu epayi na engumba ya Kumeni; mpe tala, tokomaki na ntango esengeli ete tokokaki kosalisa bandeko na biso na kobatelaka engumba.

35 Mpe tala, tobikisami lisusu uta na maboko ya banguna na biso. Mpe nkombo ya Nzambe na biso epambolami; mpo tala, ezali ye oyo abikisi biso; iyo, oyo asali likambo monene oyo mpo na biso.

36 Sikawa esalemaki ete ntango eyokaki ngai, Elamani, maloba oyo ya Gidi, natondisamaki na bosepeli mingi koleka na ntina ya bolamu ya Nzambe na kobatelaka biso, ete tokokaki te nyonso kowa; iyo, mpe natie motema ete milimo na bango oyo babomamaki mikotaki kati na bopemi ya Nzambe na bango.

Bimisa na lokasa