Makomi
Malongi mpe Mayokani 70


Eteni 70

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Hiram, Ohio, na mokolo ya 12, sanza ya zomi na moko ya mobu 1831. Mambi ya kala ya Profeta masakoli ete makita minene minei esalemaki uta mokolo ya 1 kino ya 12, nyonso na kati, ya sanza ya zomi na moko. Na likita ya nsuka ya mayangani oyo, batalelaki ntina monene ya bimoniseli oyo ebimisamaki nsima lokola Book of Commandments (Buku ya Mitindo) mpe na nsima batalelaki Malongi mpe Mayokani. Emoniseli oyo epesamaki nsima ya likita kopona na kopona moko ete bimoniseli yango ezalaki na “motuya koleka nkita nyonso ya Mabele mobimba”. Mambi ya kala ya Joseph Smith malobeli bimoniseli yango lokola “moboko ya Eklezia na mikolo oyo ya nsuka, mpe litomba epayi ya mokili, kolakisaka ete bafungola ya mibombamo ya bokonzi ya Mobikisi na biso epesami lisusu na moto.”

1–5, Bakapita baponami mpo na kobimisa bimoniseli; 6–13, Baoyo basalaka na eteni ya makambo ya molimo babongi na lifuta na bango; 14–18, Basantu basengeli kokokana na biloko ya ntango.

1 Botala, mpe boyoka, O bino bafandi ya Siona, mpe bino nyonso bato ya eklezia na ngai baoyo bozali mosika, mpe boyoka maloba ya Nkolo oyo nazali kopesa na mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe lisusu na mosali na ngai Martin Harris, mpe lisusu na mosali na ngai Oliver Cowdery, mpe lisusu na mosali na ngai John Whitmer, mpe lisusu na mosali na ngai Sidney Rigdon, mpe lisusu na mosali na ngai William W. Phelps, na nzela ya motindo epayi na bango.

2 Mpo napesi epayi na bango motindo moko; yango wana botia bokebi mpe boyoka, mpo boye elobi Nkolo epayi na bango—

3 Ngai Nkolo nasili kopona bango, mpe kokulisa bango kozala bakapita likolo ya bimoniseli mpe mitindo napesaki epayi na bango, mpe oyo nakopesa na bango awa nsima;

4 Mpe nakosenga bango mbando ya bokapita oyo na mokolo ya bosambisi.

5 Yango wana, nasili kopona bango, mpe oyo ezali mosala na bango kati na eklezia ya Nzambe, koyangela yango mpe makambo nyonso etali yango, iyo, matomba na yango.

6 Yango wana, napesi epayi na bango motindo moko, ete basengeli te kopesa matomba oyo epayi ya eklezia, na mokili mpe te;

7 Nzokande, mbala mingi lokola bakozwa mingi koleka oyo esengeli mpo na mposa na bango mpe bozangi na bango, ekopesama na ebombelo na ngai;

8 Mpe matomba yango makobulisama mpo na bafandi ya Siona, mpe mpo na nkola na bango, mbala mingi lokola bakokoma basangoli libula engebene na mibeko ya bokonzi.

9 Tala, oyo ezali oyo Nkolo asengi na moto moko moko kati na bokapita na ye, kutu lokola ngai Nkolo, naponaki soki te nakopona epayi ya moto moko moko.

10 Mpe tala, moto moko te azangi kotangama uta na mobeko oyo ezali ya eklezia ya Nzambe ya bomoi;

11 Iyo, episikopo mpe te, ntoma mpe te oyo azali kobatela ebombelo ya Nkolo, ye oyo aponami kati na bokapita likolo ya biloko ya ntango mpe te.

12 Ye oyo aponami koyangela biloko ya molimo, se ye moko wana alongobani na lifuta na ye, kutu lokola baoyo wana baponami kati na bokapita koyangela biloko ya ntango;

13 Iyo, kutu ya kotonda mingi koleka, kotondana oyo ebakisami epayi na bango na nzela ya mamonisi ya Molimo.

14 Nzokande, na biloko na bino ya ntango bosengeli kokokana, mpe oyo bosengeli kosala yango na kopusama te, soki te kotondana ya mamonisi ya Molimo makopekisama.

15 Sikawa, napesi motindo oyo epayi ya basali na ngai mpo na litomba na bango wana ezali bango na bomoi, lokola limonisi ya mapamboli na ngai likolo ya mitu mitu na bango, mpe lokola lifuta ya etingia na bango mpe mpo na bokengi na bango;

16 Lokola bilei mpe lokola bilamba; lokola libula ya kosangola; lokola bandako mpe lokola mabele, na mabaku nyonso, ngai, Nkolo nakotia bango, mpe bipayi nyonso wapi ngai Nkolo, nakotinda bango.

17 Mpo bazalaki sembo na makambo mingi, mpe basali malamu mbala mingi lokola basumuki te.

18 Tala, ngai Nkolo, natondi na boboto mpe nakopambola bango, mpe bakokota na bosepeli ya biloko oyo. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa