2023
Babateli Mpate Bayei Kotala Mwana Yesu
Sanza ya Zomi na Mibale 2023


“Babateli mpate Bayei Kotala Mwana Yesu,” Moninga, Sanza ya Zomi na Mibale. 2023, 46–47.

Etinda ya sanza ya Moninga, Sanza ya Zomi na Mibale 2023

Babateli Mpate Bayei Kotala Mwana Yesu

Elilingi
Maloba mosusu

Mayemi na Apryl Stott

Butu moko, anzelu abimelaki babateli mpate na elanga. Anzelu ayebisaki bango ete mwana moko ya motuya abotamaki. Nkombo na Ye ezalaki Yesu Klisto. Akokoma Mobikisi ya bato nyonso na mokili. Banzelu misusu bayaki. Bayembaki, “Nkembo epai ya Nzambe kati na esika eleki likolo, mpe kimya na mabele, boboto na bato banso.”

Elilingi
Maloba mosusu

Babateli mpate bakendaki na lombango kotala Yesu. Bazalaki na esengo mingi komona Ye!

Elilingi
Maloba mosusu

Babateli mpate bayebisaki bato mosusu na ntina ya Yesu Klisto. Balingaki ete moto nyonso ayoka nsango malamu wana.

Kopakola Langi na Lokasa

Nakoki Koyemba na ntina ya Yesu Klisto

Elilingi
maloba mosusu awa

Liyemi na Apryl Stott

Nakoki koyemba banzembo na ntina ya Yesu mpo na kokumisa mbotama na Ye.

Bimisa na lokasa