2022
Pona
Sanza ya Motoba 2022


“Pona,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya motoba 2022.

Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya motoba 2022

Pona

Yosua asengaki bato na ye kopona malamu—kolanda Nkolo.

pona

Likoki na biso ya kopona mpe kosala mpo na bisomoko ebengami nguya ya kopona esali eteni moko ya motuya ya moango ya Tata ya Lola. Ntina moko ya bomoi oyo ezali kolakisa ete tokopona kotosa mibeko boye ete tokoki kokoma mingi koleka lokola Ye. Tokosambisama engebene na maponi na biso. (Tala 2 Nefi 2:27; Doctrine et Alliances 101:78; Abraham 3:25.)

mokolo ya Lelo

Yosua asengaki bato naye kopona “mokolo oyo,” to kaka sikawa. Tokoki kosala maponi ya mituya kaka mpe sima tomeki kotikala ya kokangama na yango (Tala Nzembo 37:5.)

kosalela

Na eteni oyo, kosalela elakisi kosanjola, kosalisa, kotosa, mpe komipesa yomoko na moto mosusu Tosengeli kosalela Nkolo (tala Moise 1:15).

banzambe

Yisalaele azuaka motindo ya kosalela bobele Nzambe ya solo mpe ya bomoi, Yesu Klisto (tala Esode 20:2–5). Yosua apesaki bandakisa ya banzambe mosusu oyo bato na ye basengelaki te kosanjola. Banzambe misusu na babomoi ekoki kosangisa babozui, makanisi ya basusu, bantina mosusu—eloko nyonso oyo ememi biso mosika na Nkolo.

ngai mpe ndako na ngai

Yosua alobaki mpo na yemoko mpe ndako na ye. Alobaki bango bakosalela Nkolo. Ye alingaki komema libota na ye na bosembo mpe koteya bango kolanda Nkolo (tala Malongi mpe Mayokani 93:40).

Bimisa na lokasa