2023
Kozwa Kimia na Yo Moko
Sanza ya Mitano 2023


Etinda ya sanza Liahona Sanza ya Mitano 2023

Kozwa Kimia na Yo Moko

Biteni

Elilingi
lokasa epakolama langi

Lelo nakolobela maye matali oyo nayekola na ntina ya likamwisi ya kozwa kimia na yo moko, atako mabaku na biso. …

Nayekoli babosolo mitano uta [na] liteya ya Mobikisi.

Ya yambo, likabo ya kimia epesamaka nsima ya kozala na bondimi ya kobatela mitindo na Ye. …

Ya mibale, Molimo Mosantu akoya mpe akotikala na biso. …

Ya misato, Mobikisi alaki ete ntango tozali kobatela mayokani na biso, tokoki koyoka bolingo ya Tata mpe Mwana mpo na moko na mosusu mpe mpo na biso. …

Ya minei, kobatelaka mitindo ya Nkolo esengaka mingi koleka botosi. Tosengeli kolinga Nzambe na motema, na nguya, na makanisi, mpe na molimo na biso mobimba. …

Ya mitano, etalisami polele ete Nkolo alingaki biso mpenza mpo na kofuta motuya ya masumu na biso mpo ete tokoka—na nzela ya bondimi na biso epai na Ye mpe boyamboli na biso, mpe na nzela ya bilembo ya Bomikabi na Ye—tozwa likabo ya kimia oyo “eleki bososoli nyonso ya moto” [Bafilipo 4:7], na bomoi oyo mpe na bomoi ya seko na Ye. …

Bandimi nyonso ya Eklezia bayokaki likabo ya Nkolo ya kimia ya moto ye moko. Alendisaka moto nyonso asunga basusu bazwa mabaku ya koya epai na Ye mpe balongama mpo na kimia wana ya bango moko. Bango, mpe lisusu, bakopona koluka koyeba lolenge nini bakoki kokabola likabo yango na basusu.

Nkola oyo ya sika ekokoma bandakisa mpo na nkola oyo ezali koya. Makambo ebele ekobota likamwisi. Ekopalangana mpe kokola na ntango, mpe bokonzi ya Nkolo na mabele ekolengelama mpe kobongisama mpo na koyamba Ye na mingongo ya ozana. Kimia ekozala na mabele.

Bimisa na lokasa