Epona Bino Mokolo Oyo
Monene ya esengo ya libela etali na boponi ya Nzambe na bomoi mpe kosangana na Ye na mosala na Ye.
Moto ya film Mary Poppins azali lokola mokengeli bana nyonso ya Angleterre—oyo akomaki kozala lolenge ya magie1 Ye afulami na mopepe ya esti mpo na kosunga libota eningani ya Banks na motango 17, Cherry Tree Lane, na Edwardian London. Ye apesamelaki mokumba ya kobatela bana, Jane mpe Michael. Na lolenge moko ya makasi kasi ya esengo, ye abandi koteya bango mateya ya motuya na lolenge moko ya kokamwisa.
Jane mpe Michael basalaki bokobi moko monene, kasi Mary azwaki mokano ete yango ezali ntango mpo na ye kokende. Na eleko moko ya film, moninga moko Mary mokombi ebombelo ya milinga, Bert, amekaki kobondela ye mpo na bolongwi. Ye alobi na makasi, “Kasi bazali bana malamu, Mary.”
Mary azongisaki, “ebongi na ngai kotungisama na bango soki bango basali yango te? Kasi nakoki kosunga bango soki bango bapesi ngai nzela te, mpe ezali na eloko moko te ya mpasi koleka koyekolisa lokola mwana oyo ayebi nyonso.”
Bert atuni, “Ebongo?”
Mary ayanoli, “Boye basengeli kokende na litambe elandi na ndenge na bango moko.”2
Bandeko mibali mpe basi, lokola Jane mpe Michael Banks, biso tozali “bana malamu” oyo bazali komitungi na ntina. Tata na Biso ya Lola alingi kosunga mpe kopambola biso, kasi biso tolingaka ntango nyonso kopesa ya nzela Te. Ntango mosusu, tosalaka kutu lokola soki tosi toyebi makambo nyonso. Mpe biso mpe tolingi kosala “oyo elandi” na lolenge na biso moko. Yango ezali mpo na nini toyaki na mabele uta na yambo ya bokufi moko, ndako ya lola. ya biso “litambe” esengi kosala maponi.
Ntina ya Tata na Biso ya Lola na kimoboti ezali te kozala na banana Ye kosala oyo ezali sembo; yango ezali kozala na bana na Ye baponi kosala oyo ezali sembo mpe na nsuka kokoma lokola Ye. Soki Ye alingaki na pete ete biso tozala na botosi, Ye alingaki kosalela mbala moko matomba mpe bitumbu mpo na kotindika bizaleli na biso.
Kasi Nzambe azali na ntina te na bana na Ye kokomaka ba “nyama ya ndako” ya kosembolama mpe ya botosi oyo akotafunaka te mapapa na Ye na ndako ya evandeli ya bomoi ya selesitiale.3 Te, Nzambe alingi bana na Ye bakola mpe basangana na Ye na libota mpe na mosala.
Nzambe asalaki muango mokona nzela na yango tokoki kokoma ya ye na bokonzi na Ye, nzela ya liyokani oyo ekambaka biso tokoma lokola ya Ye, mpe kozala libela lokola mabota na liboso na Ye.4 Boponi ya moto ye moko ezalaki—mpe ezali—ezali motuya na mwango na ye, oyo toyekolaki na ntina ya bozali na biso yambo ya bokufi. Biso tondimaki mwango yango mpe toponaki koya na mabele.
Mpo na kondimisama ete tokosala ngalasisi ya bondimi mpe koyekola kosalela nguya biso ya boponi na malamu nyonso, elamba moko ya kobosanisa etiamaki na milimo na biso mpo ete tokanisa lisusu te mwango ya Nzambe. Longola elamba yango, batina ya Nzambe elingaki kokokisama te mpo ete tokokaki te kokoba mpe kokoma babulani ya sembo oyo Ye alingaki biso tozala.
Profeta Lehi alobaki: “Yango wana Nzambe apesaki epai ya moto ete asala mpo ya yemei. Yango wana, moto akokaki kosala mpo ya yemei te longola se soko asenginiami na moko to mosusu.”5 Na ntango moko ya motuya, lolenge moko elakisamaki na Yesu Klisto, Mwana ya Libobo ya Tata. Lolenge mosusu elakisamaki na Satana, Lusifelo, oyo alingi kobebisa nguya ya boponi mpe nguya.6
Na Yesu Klisto, “tozali na molobeli moko epai ya Tata.”7 Sima ya bokokisi ya bomiabi na Ye ya mbeka, Yesu “amataki na lola … mpo na kosenga epai ya Tata makoki na ye ya ngolu oyo apesaki epai ya bana ya bato.” Mpe, sima ya bosengi makoki na ngolu, “ye asambeleli likambo ya bana ya bato.”8
Esambeleli ya Klisto elongo na Tata na ntina na biso etemelami te. Yesu Klisto, oyo apesaki nzela ete bolingi na Ye emelama na bolingi ya Tata,9 alingaki kolonga eloko moko mosusu te kaka oyo Tata nyonso tata alingaki. Tata ya Lola na ntembe te akokumisa mpe akobetela kolonga na biso maboko.
Esambeli ya Klisto ezali, moke na kati ya eteni, kokundolisa biso ete Ye afutaki mpo na masumu na biso ete moko te abenganama uta na bokutani ya ngolu ya Nzambe.10 Mpo na baoyo badimbeli Yesu Klisto, bayamboli, babatisami, mpe bayiki mpiko kino na suka—bokobi moko oyo ememi na boyokani11—Mobokisi alimbisi, abikisi, mpe asambeleli. Ye azali mosungi na biso, mobondisi, mpe molobeli—attesting to and vouching for our reconciliation with God.12
Na ngambo mosusu, Lusifelo azali mofundi mpe moyini. Yoane Mobimisi alobelaki bakueyi ya suka ya Lusifelo: “Mpe nayokaki mongongo moko makasi kolobaka na lola, Sikawa lobiko ekomi, mpe bokasi, mpe bokonzi ya Nzambe, mpe nguya ya Klisto na ye.” Mpo na nini? Mpo ete “mofundi ya bandeko na biso akitisami, oyo afundaki bango liboso ya Nzambe na biso moyi mpe butu. Mpe balongaki ye na nzela ya makila ya Mwana na Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango.”13
Lusifelo azali mofundi yango. Ya alobaki na ntina na biso te na bozali yambo ya bokufi, mpe azali kokoba kofunda biso na bomoi oyo. Azali koluka kokitisa biso na nse. Alingi ete biso tomona moniokoli ya libela Azali moko oyo ayebisi biso ete tobongi te, moko oyo ayebisi biso ete tozali malamu mpenza te, moko oyo ayebisi ete ezali na libongi ya libunga te. Ye azali moyokisi soni monene, oyo akobeta biso ntango tozali na nse.
Soki lusifelo azalaki kolakisa mwana moko kotambola mpe mwana akueyi, alingaki kogangela mwana, kopesa ye etumbu, mpe koloba na ye atika komeka. Balolenge ya Lusifelo ememaka bolembi nzoto mpe bozangi elikia—na suka ntango nionso. Tata oyo ya balokuta azali mopesi monene ya lokuta14 mpe azali kosala na mayele nionso mpo na kokosa mpe kobungisa biso mayele, “mpo azali koluka ete bato nionso bazala na mawa lokola ye moko.”15
Soki Klisto azalaki kolakisa mwana moko kotambola mpe mwana akweyi, Ye alingaki kosunga mwana kotelema mpe kopesa makasi na matambe elandi.16 Klisto azali mosalisi mpe mobondisi. Balolenge na ye ezali komema esengo mpe elikia—na suka ntango nyonso.
Muango na Nzambe esangisi banzela mpo na biso, kolandisaka na makambo lokola mitindo. Mitindo yango ezali lisanga ya lokuta to ya kosangisa ya mibeko ezwami bongo mpe etiami na makasi oyo etali kaka mpo na kobongisa biso na botosi te. Yango ekangani na bokobi liboso yamakoki ya bosembo na biso, bozongi epai ya Tata na biso ya Lola, mpe koyambaka esengo ya libela. Botosi na mitindo na Ye ezali ya kokufa miso te, toponaki na boyebi nyonso Nzambe mpe nzela na Ye ya bozongi ndako. Nzela mpo na biso ezali ndengo moko lokola ezalaki mpo na Adama mpe Ewa, yango wana “Nzambe apesaki bango mitindo, nsima ye kosala ayebisaki bango mwango ya bosikolami.”17 Atako Nzambe alingi biso tozala na nzela ya mayokani, Y apesi biso bonsomi ya boponi.
Na bosolo, Nzambe alingi, azeli mpe atambuisi ete mwana na Ye moko na moko apona mpo na ye moko. Ye akosalisa biso na makasi te. Na nzela ya likabo ya nguya boponi, apesi nzela na bana ba Ye “kosala bango moko mpe basalela likolo na bango te.”18 Nguya ya boponi epesi biso nzela ya kopona kokende na nzela to te. Yango epesi biso nzela ya kokita to te Lokola kaka tokoki kosalisama na makasi te mpo na kotosa, tokoki kosalisama na makasi mpo na bozangi botosi. Moto moko te akoki, na kozanga boyokani, komema biso libanda ya nzela. (Sikawa, yango ezali ya kobosana te na baoyo bosembo na bango ebebisami. Bazali libanda ya nzela te; bazali bato ya makama. Bazwaka bososoli ya Nzambe, bolingo, mpe mawa.)
Kasi ntango tobimi libanda ya nzela, Nzambe azali na mawa mpo ete Ye ayebi yango na bosolo, mpe na ndenge ekokani te , ememi na esengo ya kokita mpe na mapamboli ya kobunga. Na makomi, kolongua na nzela ekokanisi na lisumu moko, mpe mbano ya kokita ya esengo mpe bobungisi ya mapamboli ebengami etumbu. Na lolenge oyo, Nzambe azali kopesa biso etumbu te; etumbu ezali mbano ya maponi na bisomei, ya Ye te.
Soki tososoli ete tozali libandaya nzela, nzokande na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto, tokoki kopona kobongola matambe mpe kozonga na nzela. Kati na makomi, bokobi ya kozwa mokanoya kobonguana mpe kozonga na nzela ekokanisami lokola koyambola. Bokweyi na bolimboli elakisi ete toponi komilongola biso moko uta na mapamboli Nzambe alingi kopesa. Soki biso tozali “na bolingi te ya kosepela na oyo [biso] tosengelaki kozwa,” biso [toko] “zonga … na [biso] esika moko, kosepela ete oyo [biso] tozali kolinga koyamba”19liponi na biso, ya Nzambe te.
Atako molayi tozalaki mosika na nzela to atako mosikaboni toyengaki yengaki, ntango tozwi mokano ya kobongwana, Nzambe akosunga biso tozonga.20 Uta na mabongisi ya Nzambe, na nzela ya boyamboli ya solo mpe kopusaka liboso na elongo na bosembo na Klisto, soki tozongi na nzela, yango ekozala lokola soki tolongwa na nzela ata mokolo moko te21 Mobikisi afuti mpo na masumu na biso mpe akangoli biso uta na ya bokitisi ya esengo mpe mapamboli. Oyo ebiangemi na makomi lokola bolimbisi. Sima ya libatisi, bandimi nyonso balalaka na nzela—basusu kati na biso basundolaka. Na yango kosalela bondimi na Yesu Klisto, koyambola, koyamba lisungi uta na Ye, mpe kozwaka bolimbisi ezali te makambo ya mbala moko kasi bokobi ya bomoi mobimba, bokobi oyo ezali ya mbala na mbala mpe kozongela. yango ezali lolenge nini biso “tokotia molende kino nsuka.”22
Tosengeli kopona nani tokosalela.23 Monene ya esengo ya libela etali na boponi ya Nzambe na bomoi mpe kosangana na Ye na mosala na Ye. Soki tosali makasi “ya kosala litambe elandi” nandenge na biso moko, tosaleli esaleli ya nguya na biso ya boponi na sembo. Lokola Bakambi mibale ya Lingomba ya Bamama Basungi balobaki, biso tosengeli te kozala “ ba bebe oyo ntango nyonso bazali na mposa ya kondelama mpe kobendama matoyi.”24 Te, Nzambe alingi biso tokola na makanisi ya mikolo mpe tomilengela biso moko.
Koponaka kolanda mwango ya Tata ezali kaka nzela moko tokoki kokoma babulami na bokonzi na Ye; kaka boye nde Ye akoki kotiela biso motema mpo na kotuna ata soki moke te wana oyo ezali kotelemela bolingi na Ye.25 Kasi tosengeli komikundola ete “ezali na eloko moko te ya mpasi koleka koyekolisa lokola mwana oyo ayebi nyonso .” Na yango tosengeli kopesa esika ya boyekoli na banzela ya Nkolo na Nkolo mpe basali na Ye. Tokoki kondima ete tozali bana ya bolingo ya Baboti na biso ya Lola26 mpe ekokaki na “komitungisa” mpe tondimisama ete “na lolenge na biso moko” ekolakisa ata mokolo moko te “yo moke.”
Lokola Buku ya Mormon profeta Yakobo alobaki, Nalobi elongo na ye:
Yango wana, bosepela mitema na bino, mpe bomikundola ete bozali bansomi mpo ya kosala mpo ya binomei---mpo ya kopona nzela ya liwa ya libela to nzela ya bomoi ya seko.
“Yango wana, bandeko na ngai ya mibali ya bolingo [mpe bandeo basi], bozongisa boyokani na bolingo ya Nzambe, mpe kasi na bolingi ya zabulu te … ; mpe bomikundola, ekosilisa bino kozongisa boyokani epai ya Nzambe, ete ezali bobele mpe na nzela ya ngolu ya Nzambe nde bobikisami.”27
Boye, bopona bondimi na Klisto, bopona boyamboli, bobpona kobatisama mpe koyamba Molimo Mosantu; bopona komibongisa na mayele nyonso mpo na kosanga na bobongi nie na elambo; bopona kosala mayokani na tempelo; mpe bopona kosalela Nzambe ya bomoi mpe bana na Ye. Maponi na biso ekolakisi nani tozali mpe nani tokokoma.
Kosukisa na lipamboli ya mosusu ya Yakobo: “Na yango, Nzambe asekwisa bino uta … na nkufa ya seko na nguya ya bomikabi, ete bokoka koyambama na bokonzi ya seko ya Nzambe.”28 Na nkombo ya Yesu Klisto.