2010
Mosala Monene ya Nzambe
sánzá ya mínei 2010


Etinda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya Minei 2010

Mosala Monene ya Nzambe

Sanza ya Minei, 1830

Bambula nkama moko na zomi na mwambe, Joseph Smith, Oliver Cowdery, mpe liboko ya basusu basanganaki elongo mpo kobongisa Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka. Na masolo nyonso ezalaki liyangani ya pete kasi ya molimo. Joseph akomi oyo elandaki elambo, “Molimo Mosantu esopanaki likolo na biso na lolenge ya monene mpenza—boko basakolaki, na ntango wana biso nyonso tokumisaki Nkolo, mpe tosepelaki makasi mpenza.”1

Makambo ya mokolo oyo ekomamaki na mokili te; ekomamaki na bazolonale te. Nzokande, lolenge nini likolo esengeli kosepela mpe kokumisa Nzambe—mpo na mokolo wana, Eklezia ya Yesu Klisto ezongaki na mabele!

Solomon Chamberlain

Uta mokolo wana kino oyo lelo, bankoto ya bana mibali mpe basi ya Tata ya Likolo balandi banungunungu ya Molimo Mosantu mpe bakotaki na bamai esantu ya libatisi. Moko ya bato ya boye ezalaki Solomon Chamberlain.

Solomono azalaki moto ya molimo mpe abebisaki bangonga ebele na losambo, kolukaka bolimbisi ya masumu na ye mpe kobondelaka Tata ya Likolo na kokamba ye na bosolo. Ntango mosusu penepene na mbula 1816, Solomon alakelamaki na ndoto ete akobika mpo komona mokolo ntango Eklezia ya Klisto ekozongisama elongobana na motindo esakolamaki etiama mbala moko lisusu na mabele.

Bambula eleki Solomon azalaki kokende mobembo na masuwa na Kanada ntango masuwa na ye etelemaki na mboka moke ya Palmyra, na New York. Kuna ayokaki makasi moko etindaki ye na kokita. Ayebaki te mpo na nini azalaki wana, abandaki koloba na bai engumba. Ewumelaki te yambo ayoka balobela “Biblia ya wolo.” Ye alobaki maloba mibale wana etindaki “nguya lokola lotiliki [oyo] elongwaki na likolo ya moto na ngai kino na suka ya misapi na ngai.”

Babosenga na ye ekambaki ye na ndako ya ba Smith, epai wapi asololaki na baoyo bazalaki wana na ntina na sango kitoko ya sango malamu ezongisami. Sima ya kolekisa mikolo minei wana mpe kozwa litatoli ya bosolo, Solomon abomaki mobembo na ye na Kanada, komemaka bankasa ntuku motoba na minei ya Buku ya Molomoni. Bisika nyonso azalaki kokende, ateyaki bato, “ya likolo to ya nse nyonso mibale, bazwi to babola, …na komilengele mpo na mosala monene ya Nzambe oyo ebandaki sasaipi koya liboso.”2

Mosala Monene ya Nzambe

Uta mokolo wana na sanza ya Minei ya mbula 1830, bankoto ya bato bakundolaki bosolo ya sango malamu ezongisami mpe bakoti na bamai ya libatisi. Natatoli ete “mosala monene ya Nzambe” oyo ezali na nse lelo. Napesi litatoli ete Nkolo abateli Eklezia na Ye mpe akambi yango na nzela ya profeta na Ye, Mokambi Thomas S. Monson. Ezali lipamboli ya kokamwa te na kobika na mikolo oyo ya suka. Oyo ezali bantango ya lokumu, emonisamaki na baprofeta ya kala mpe basalisamaki na banzelu batonda bokebi. Nkolo akebaka Eklezia na Ye. Ye akebaka lisusu baoyo, lokola Solomon Chamberlain, kolanda banungunungu ya Molomo Mosantu mpe kokutana na bandeko na bango mibali mpe basi na mokili mobimba mpo kosalisa kotindika liboso mosala monene oyo ya Nzambe.

Bankoma

  1. Joseph Smith, kati na Lisolo ya Eklezia, 1:78.

  2. “Lisapo Mokuse ya Bomoi ya Solomon Chamberlain,” typescript, Church History Library (on the Internet at www.boap.org/LDS/Early-Saints/SChamberlain.html); tala lisusu William G. Hartley, “Every Member Was a Missionary,” Ensign, sanza ya Libwa. 1978, 23. Mikolo moke sima ya libongisi ya Eklezia, Solomon Chamberlain abatisamaki na Joseph Smith kati na bamai ya Etima Seneca, na New York.

Koteya na Etinda Oyo

Ndakisa ya moto yemei ezali moko ya bisalele ya nguya mpenza ya boteyi” (Botangisi, Libiangi Monene Te [1999], 18). Lokola bokaboli lisolo ya Solomon Chamberlain, bengisa libota na koluka bantango oyo ye alandaki banungunungu ya Molimo. Bosolola lolenge nini ndakisa na ye ekoki kosalisa basusu. Bengisa bai libota na kokabola ntango oyo ndakisa malamu ya moto songolo esalisa bango.

Bimisa na lokasa