2010
Baninga ya Elako
sánzá ya nsambo 2010


Etinda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya SAMBO 2010

Baninga ya Elako

Moko ya lokumu monene oyo Mobikisi akoki kopesa ezali kobenga biso “baninga” Toyebi ete Alingaka na bolingo moko ya malamu mpenza bana ya Tata na ye ya Likolo nyonso Bongo mpo na baye basili kobebisa elako te kati na mosala na bango elongo na ye, Abombeli bango nkombo ya lokumu oyo ya kokeseni Bokundola maloba euti na eteni ya 84 ya Mateya mpe Mayokani: “Mpe lisusu, Nalobi na bino, bandeko na ngai, mpo kobanda lelo Nakobenga bino Baninga ezali na ntina ete Napesa bino mobeko oyo, ete bokoma kutu lokola baninga na ngai na mikolo ntango nazalaki elongo na bango kosalaka mobembo mpo na koteya nsango malamu na nguya na ngai” (M&M 84:77).

Tokomi baninga na ye ntango ezali biso kosunga basusu mpo na Ye. Azali ndakisa ya malamu mpenza ya lolenge ya moninga oyo tosengeli kozala Alingi se oyo ezala malamu koleka mpenza mpo na bana ya Tata na Ye ya Likolo. Esengo na bango ezali esengo na Ye Ayokaka mpasi na bango lokola ya yemei mpo ete asili kofuta motuya ya masumu na bango nyonso kozua malali na bango nyonso likolo na yemei, komema mpasi na bango nyonso, mpe ayokaki mposa na bango nyonso Mokano na Ye ezali peto Alukaka lifuti mpo na yemei te kasi kopesa nkembo nyonso na Tata na ye ya Likolo. Moninga malamu mpenza, Yesu Klisto azali loboko makasi te mpenza na kopesaka esengo na basusu.

Moko na moko kati na biso oyo asili kosala boyokani ya batisimo asili kolaka mpo na kolanda ndakisa na ye mpo na komema mikumba ya biso na biso lokola elingaki ye kosala (tala Moziya 18:8)

Na mikolo mwa moke oyo elandi okozwa mabaku mingi mpo na kozala moninga mpo na Ye. Ekoki kozala ntango ezali yo kotambola na nzela ya mputulu. Ekoki kozala ntango ezali yo kofanda na Wago, Ekoki kozala ntango ezali yo koluka esika ya kofanda kati na likita ya Eklezia. Soki ozali kotala, okomona moto moko komemaka mokumba ya kilo. Ekoki kozala mokumba ya mpasi to ya bomoko to ya nkanda. Ekoki komona yo yango kaka soki osili kosambela mpo ete Molimo epesa yo miso mpo na komona kati ya mitema mpe osila kolaka kotombola maboko oyo elembi.

Eyano na losambo na yo ekoki kozala elongi ya moninga moko ya kala, moko oyo osili komona te mibu mileki kasi oyo mposa na ye eyeli yo na mbalakaka na moto mpe na motema na yo mpe oyoki lokola soki ezalaki ya yemei. Esili kokomela ngai. Baninga ya kala basili kosalisa ngai uta mosika mpe mibu mpo na kolendisa ngai na ntango kaka Nzambe nde akokaki kolobela bango mokumba na ngai.

Baprofeta ya bomoi ya Nzambi basili kosenga biso ete tozala baninga ya elako na baye bakoti na Eklezia lokola babongwami mpe kokenda kobikisa baye babungi nzela. Tokoki kosala yango, mpe tokosala yango soki tokundoli o motema Mobikisi mbala na mbala. Ntango tosalisaka mpo na kopesa lisungi mpe mpo na kotombola mokumba moko, Asalisaka elongo na biso. Akokamba biso tii na baye bazali kati na bonsenga. Akopambola biso mpo na koyoka nini bazali koyoka. Lokola etingami biso na bokasi na biso mpo na kosalisa bango, tokopesamela mingi mingi koloba likabo ya koyoka bolingo bwa ye mpo na bango. Wana ekopesa biso makasi mpe molende ya kosalisa lisusu mpe lisusu na bobebisi elako te.

Mpe, na ntango mpe na boseko tokoyoka esengo ya koyambama malamu na molongo moko na baninga na ye ya elako. Nazali kosambela na ntina ya lipamboli liye mpo na biso banso oyo tokosala.

Koteya na Etinda Oyo

Baye libota bakomipesaka mwa mingi koleka na ntina ntango basengami ete baluka eloko moko wana ezali bango kobeba makomi mpe maloba ya baprofeta (tala Teaching No Greater Call [1999], 55). Wana ezali yo kotanga lisolo, senga baye libota ete babimisa mateya oyo ekosunga bango bazala ya kobenga bana mpo na kobengama mwana ya Nkolo.

Bakoteya, Ebiangi Monene koleka Te elobi: “Soki ozali na bolingo lokola ya Klisto, okobelame malamu koleka mpo na koteya nsango malamu. Okozala na mayoki ya motema mpo na kosunga Mobikisi mpe kolanda Ye” (12). Bimisa uta mateya ya lisolo liye oyo ekoki kosunga yo ete ozala moteyi ya ndako malamu koleka. Kabola maye elongo na moninga na yo ya nzela, mpe kati na losambo tala lolenge nini okoki kozala “baninga ya elako” na baye bozali kosalisa.