2010
Ekoki biso komona Klisto?
sánzá ya zómi na míbalé 2010


Etinda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya Zomi na mibale 2010

Ekoki biso komona Klisto?

Na butu moko nkoko ya mobali moko azalaki kotangela nkoko na ye ya mwasi lisapo moko ntango atalaki likolo mpe alobaki, “Nkoko, tala minzoto!” Nkoko yango apwepaki malamu mpe alobaki, “Tozali kati na ndako, molingami na ngai. Awa minzoto ezali te.” Kasi mwana akobaki koloba, “Ozali na minzoto kati na ndako na yo! Tala!”

Nkoko mobali atalaki likolo mpe, na bokamwi na ye, amonaki ete palafo esalemaki na linzanza moko oyo ezalaki kongenga. Bongengi yango ezalaki komonana te mbala mingi, kasi ntango pole ebetaki na kati na lolenge moko to mosusu, ezalaki mpenza komonana lokola etando ya minzoto. Nakamataki miso ya mwana moke mpo na komona yango, kasi mizalaki kuna. Mpe uta ntango wana kokende liboso, ntango nkoko mobali azali kotambola na ndako oyo mpe kotala likolo, akokaki komona oyo akokaki komona liboso te.

Tozali koyingela na eleko mosusu ya Mbotama ya Yesu Klisto etonda na miziki mpe pole, biyenga ya bosepeli mpe mabonza. Kasi kati na bato banso, biso lokola bandimi ba eklezia oyo esili kokamema nkombo ya Mobikisi tosengeli kotala mosika koleka eleko yango mpe komona solo mpe kitoko ya kokamwa na ntango oyo ya mobu.

Namituni bato boni na Beteleme bayebaki ete awa mpenza, penepene na bango, Mobikisi abotamaki? Mwana mobali ya Nzambe, Masiaya oyo bazelaki mpe balakamaki ntango molai—azalaki na kati kati na bango!

Ezali bino kokundola nini anzelu ayebisaki babateli ya mpate? “O mokolo oyo Mobikisi abotameli bino na engumba ya Dawidi, oyo azali Klisto Nkolo.” Mpe bamilobelaki, “Tika tokende kutu na Beteleme, mpe komona eloko oyo ewuti kosalema” (Luka 2:11, 15).

Lokola babateli mpate ya kala, tosengeli koloba na mitema na biso, “Tika tokende kotala eloko oyo esalemi.” Tosengeli koyoka mposa na yango na mitema na biso. Tika tomona Moko Mosantu ya Yisalaele kati na eleilo, kati na tempelo, likolo ya ngomba, mpe likolo ya ekulusu. Lokola babateli mpate, tika ete tokumisa mpe tosenzola Nzambe mpo na nsango ya nsai ya bosepeli monene!

Ntango mosusu biloko ya mpasi koleka nyonso mpo na komona ezali biye wana bizalaka liboso na biso mpenza ntango nyonso. Lokola nkoko mobali oyo azangaki komona minzoto na palafo, mbala mosusu tokokaka te komona oyo ezali polele na miso.

Biso oyo tosili koyoka etinda ya nkembo ya boyei ya Mwana ya Nzambe, biso oyo tokamati nkombo na Ye likolo na biso mpe tosali liyokani mpo na kotambola na nzela na Ye lokola bayekoli na Ye—tosengeli kozanga kofungola mitema mpe mayele na biso mpe komona Ye solo mpenza.

Eleko ya Mbotama ya Yesu Klisto ezali kitoko mpenza na nzela mingi. Ezali eleko ya misala malamu ya bolingani mpe bolingo na bandeko bandimi. Ezali eleko ya kofandisa makanisi mingi mpo na oyo etali bomoi na biso mpe na ntina ya mapamboli mingi maye mazali ya biso. Ezali eleko moko ya kolimbisa mpe ya kolimbisama. Ezali eleko moko ya kosepela na miziki mpe pole, biyenga mpe mabonza. Kasi bongengi ya eleko yango esengeli soki moke te kozipa miso na biso mpo na komona mpenza Mwana mokonzi ya Kimia kati na nkembo monene na Ye.

Tika ete banso tokomisa eleko ya Mbotama ya Yesu Klisto ya mobu oyo ntango moko ya bosepeli mpe ya biyenga, ntango wapi tozali kondima ekamwiseli oyo Nzambe na biso ya Bokasi bonso atindaki Mwana Mobatami wa Ye ya Likinda, Yesu Klisto, mpo na kosikola mokili!

Makanisi mpo na koteya uta na etinda oyo

  1. “Bokebi na misala ya boyekoli ekoki kosalama na kosala litomba mpe mpo na kosalisa bayekoli kotia bokebi na bango na moto ya liteya. … Bilili ezali bisalelo ya motuya mpo na kolendisa likanisi ya liboso ya liteya mpe kosalisa bayekoli kozala kati na bokebi” (Teaching, No Greater Call [1999],160, 176). Wana ekobanda bino kokabola etinda oyo, tala lolenge nini kosalela mosala oyo, ndakisa kolakisa elili to kokabola makomi mpe kosenga na libota yango kokanisa lolenge nini makoki kosalela na kotalaka etinda oyo.

  2. “Moko ya ntina minene koleka nyonso esengeli kozala ya kosalisa basusu kosalela mibeko to mabongisi ma nsango malamu na makambo nyonso. … Salisa bayekoli kobombola mapamboli oyo eyaka ntango tozali kosalela nsango malamu na bomoi na biso” Teaching, No Greater Call, 159). Nsima ya kokabola etinda oyo, benga bato ya libota kokabola mayele bazwaki mpe makambo bakutanaki na yango wana efandisaki bango makanisi na Mobikisi na eleko ya Mbotama ya Yesu Klisto.

Bimisa na lokasa