Etinda ya Bakambi ya Yambo, sanza ya Minei 2011
Azali Awa Te, Kasi Asekwi
Lelo bobele bobukani etikali na Kapalanauma, engumba wana na ngambo ya liziba, kati kati ya mosala mwa Mobikisi na Galilea. Awa Asakolaki kati na sinagoga, ateyaki na ngambo ya mbu, mpe abikisaki bato kati na bandako.
Na ebandeli ya mosala mwa Ye, Yesu akamataki nkoma uta na Yisaya: “Molimo mwa Nkolo Nzambe ezali likolo na ngai; mpo Nkolo apakoli ngai mpo na kosakola nsango ya nsai epai ya basokemi; atindi ngai nabondisa baoyo babukami mitema, kosakola bonsomi na bakangami, mpe kofungola ndako ya boloko mpo na bango oyo bakangisami” (Yisaya 61:1; tala lisusu Luka 4:18)—lisakoli ya polele ya mwango mwa bonzambe mpo na kobikisa bana babali mpe bana basi ba Nzambe.
Kasi mateya ma Yesu na Galilea ezalaki bobele ebandeli. Mwana ya Moto asengelaki ntango nyonso kobomba elaka ya nsomo na ngomba ebiangami Gologota.
Ekangaki bango Ye na elanga ya Getesemane nsima na Elambo ya Suka, esundolaki bango Ye na bayekoli ba Ye, ebwakelaki bango ye nsoi, esambisaki bango Ye, mpe esambwisaki bango Ye, Yesu anyokwamaki o nse ya ekulusu enene na Ye na nzela ya Kalivari. Azalaki se kokende liboso uta na elonga na botekami, bonyokwami, mpe liwa likolo ya ekulusu.
Na maloba ma loyembo “Engumba Esantu”:
Makambo mabongwanaki. …
Ntongo yango ezalaki malili mpe mpio ya kolengisa,
Lokola elilingi ya ekulusu etelemaki
Likolo ya ngomba.1
Mpo na biso Tata na Likolo apesaki Mwana na Ye. Mpo na biso Ndeko na biso ya Nkulutu apesaki bomoi na Ye.
Na ntango ya nsuka Moteyi akokaki koboya. Kasi asalaki yango te. Alekaki o nse ya biloko binso mpo ete Akoka kobikisa biloko binso: bato banso, mabele, mpe biloko binso na bomoi biye bisila kozala na mabele.
Ezali na maloba te na Lisanga mobimba ya baklisto maye mazali kolobela ngai mingi koleka maye malobamaki na anzelu epai ya Malia Magadala mpe Malia mosusu kolelaka wana ezalaki bango kobelema na lilita mpo na kobatela nzoto ya Nkolo na bango te: “Mpo na nini ezali bino koluka moto na bomoi o ntei ya bakufi? Azali awa te, kasi asekwi” (Luka 24:5–6).
Na lisakoli oyo, baye bazalaki na bomoi mpe bakufaki, baye bazali na bomoi sikawa mpe bakokufa mokolo moko, mpe baye babotami mpe bakufi naino te babikisami.
Lokola mbano ya elonga ya Klisto likolo ya nkunda, tokosekwa biso banso. Oyo ezali bosikoli bwa molimo. Paulo akomaki ete:
“Ezali na … banzoto ya selesitiale, mpe banzoto ya teresitiale: kasi nkembo ya selesitiale ezali moko, mpe nkembo ya teresitiale ezali mosusu.
“Ezali na nkembo moko ya moi, mpe nkembo mosusu ya sanza, mpe nkembo mosusu ya minzoto: mpamba te monzoto moko mokeseni na monzoto mosusu na nkembo.
“Ezali mpe bongo na bosekwi ya bakufi” (1 Bakolinti 15:40–42).
Ezali nde nkembo ya selesitiale oyo tozali koluka. Ezali na miso ma Nzambe nde tolingi kofanda. Ezali kati na libota ya libela nde tolingi kozala bato na yango.
Na ntina ya Ye oyo abikisaki moko moko kati na biso uta na liwa ezanga nsuka, natatoli Azali moteyi ya bosolo—kasi Azali monene koleka moteyi. Azali ndakisa ya bomoi ya bobongi nie—kasi azali monene koleka ndakisa. Azali monganga monene—kasi azali monene koleka monganga. Azali Mobikisi mpenza ya mokili, Mwana ya Nzambe, Mwana ya mokonzi ya kimia, Moko Mosantu wa Yisalalele, kutu Nkolo mosekwi, oyo alobaki, “Nazali ya yambo mpe ya nsuka; nazali ye oyo azali na bomoi, nazali ye oyo babomaki; nazali molobeli na bino epai ya Tata” (D&A 110:4).
“Oh, boni elengi ezali liloba liye ezali kopesa: ‘Nayebi ete Mosikoli wa ngai azali na bomoi!’”2
Na ntina ya eye natatoli.
© 2011 na Intellectual Reserve, Inc. Lotomo nyonso na bakomi. Ebetami na Etazini ya Amerika. Bondimami na lokota ya Angele: 6/10. Bondimami ya bobongoli: 6/10. Bobongoli ya First Presidency Message, April 2011. Lingala. 09764 639