Tempelo Esantu—Mwinda Monene epai na Moikili
Mapamboli manso manene mpe ma lokumu ya kozala mondimi na Eklezia ezali maye tozwaka na batempelo ya Nzambe.
Balingami ba ngai bandeko babali mpe basi, napesi bino bolingo mpe mbote ya ngai na moko moko kati na bino mpe nasambeli ete Tata wa biso na Likolo akokamba makanisi ma ngai mpe akofula maloba ma ngai wana ezali ngai koloba na bino lelo oyo.
Tika ete nabanda na kosalaka bikoma moko to mibale mpo na ntina ya bitinda kitoko toyokaki na ntongo ya lelo uta na Ndeko mwasi Allred mpe Episikopo Burton mpe balobi basusu na ntina ya pologalami ya bolamu ya Eklezia. Lokola elobamaki, mobu moye ezali kotia elembo ya bokundoli ya mbotama ya mbala ya 75 ya pologalami efulami eye epamboli bomoi ya bato mingi mpenza. Ezali litomba mpo na ngai ya koyebaka ngai moko boko bapionie wana ya mpiko monene—bato ya mawa mpe bomoni mosika liboso.
Lokola elobamaki na banso mibale Episikopo Burton mpe Ndeko mwasi Allred mpe balobi basusu, episikopo ya palwasi apesami mokumba ya kosalisa baye bazali kokelela mpe bafandi kati na bandelo ya palwasi na ye. Eye wana ezalaki litomba lya ngai ntango nazalaki kokamba lokola elenge episikopo mpenza na Salt Lake City likolo ya palwasi moko ya bandimi 1.080, kozwaka basi bakufela babali 84. Ezalaki na mingi baye basengelaki lisalisi. Boniboni natondaki na botondi mpo na pologalami ya bolamu ya Eklezia mpe mpo na lisalisi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe ya masanga makoki ma bonganganzambe.
Nasakoli ete pologalami ya bolamu ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka efulami na Nzambe wa Bokasi bonso.
Sikawa, bandeko ba ngai babali mpe basi, likita oyo ezali kotia elembo ya mbula misato banda basungaki ngai lokola Mokambi ya Eklezia. Solo mpenza ezalaki mibu ya misala makasi, mitonda na mikakatano mingi kasi elongo na mapamboli ya kotanga te. Libaku nazwaki ya kobulisa mpe kozongela kobulisa batempelo ezalaki o ntei ya mapamboli maye ya bosepeli mpe ya bule koleka manso.
O ntango ya likita linene ya Sanza ya zomi na mobu 1902, Mokambi ya Eklezia Joseph F. Smith abimisaki na lisukulu na ye ya bofungoli maloba ma elikya ete mokolo moko “tokozala na batempelo etongami na biteni ya ndenge na ndenge ya [mokili] wapi isengelami mpo na bonkonde bwa bato.”1
O ntango ya eleko ya mibu 150 mya yambo kolandaka bobongisami bwa Eklezia, uta 1830 kino 1920, batempelo 21 etongamaki, kozwaka batempelo na Kirtland, Ohio, mpe Nauvoo, Illinois. Meka kokesenisa maye na mibu 30 banda 1980, o ntango eye wapi batempelo 115 etongamaki mpe ebulisamaki. Na mayebisi tolandaki lobi ya batempelo 3 ya sika, ezali na batempelo 26 mosusu oyo ezali kotongama to na eleko ya yambo na botongami. Mitango miye mikokoba kobakisama.
Ntina oyo Mokambi Joseph F. Smith alikyaki na mobu 1902 ezali kokoma likambo ya solo. Mposa na biso ezali ete tempelo ekoma penepene lokola ekoki na bandimi ba biso.
Moko ya batempelo oyo ezali sikawa kotongama ezali na Manaus, Brazilia. Mibu mingi mileki natangaki na ntina ya lingomba moko ya bandimi koleka nkama moko oyo balongwaki na Manaus, oyo ezwami na kati kati ya zamba ya mbula ya Amazoni, kokende na eye ezalaki o ntango wana tempelo ya penepene koleka nyonso, oyo ezwamaki na Sāo Paulo, Brazilia—penepene na bakilometele 4.000 uta na Manaus. Basantu ba botongono baye basalaki mobembo na nzela ya masuwa mpo na mikolo minei likolo ya Ebale ya Amazoni mpe mingala na yango. Nsima ya kokisa mobembo mwa bango na mai, bakotaki na mituka mpo na mikolo misato mosusu ya mobembo—na banzela ya mabulu na biloko moke mpenza ya kolia, mpe kozangaka esika ya kolala. Nsima ya mikolo sambo butu mpe moi, bakomaki na tempelo na São Paulo, wapi makuli ma seko na lolenge na mango masalemaki. Solo mpenza mobembo mwa bango ya bozongi ezalaki kaka mpasi. Nzokande, bazwaki makuli mpe mapamboli ma tempelo, mpe atako mabenga na bango mazalaki mpamba, bango moko batondisamaki na molimo mwa tempelo mpe na botondi mpo na mapamboli bazwaki.2 Sikawa, mibu mingi nsima, bandimi ba bison a Manaus bazali kosepela wana ezali bango kotala tempelo na bango moko kotelema na mabongo ya Rio Negro. Batempelo ememaka esengo na bandimi ba biso ya botongono epai nyonso wapi etongami.
Mbando ya mabonza masalemi mpo na kozwa mapamboli maye mazwami bobele na batempelo ya Nzambe ezangaka te kosimba motema mwa ngai mpe komemela ngai mayoki ya sika ma botondi mpo na batempelo.
Tika nakabola na bino lisolo ya Tihi mpe Tararaina Mou Tham mpe bana na bango 10. Libota mobimba ekotaki na Eklezia na ebandeli ya mibu 1960, ntango bamisionele bayaki na ensanga na bango penepene na kilometele 160 na ngele ya Tahiti. Kala mingi te babandaki koyoka mposa ya mapamboli ma libota likangisami mpo na seko na tempelo.
O ntango ena tempelo ya penepene koleka nyonso na Mou Tham ezalaki Tempelo ya Hamilton na Nouvelle Zelande mosika na kilometele 4.000 na sudi-westi, ya kokoma bobele mobembo ya mosolo mingi na mpepo. Libota monene ya Mou Tham, liye babombaki mwa mosolo ya libiki na bango na bozwi ya elanga ya moke, bazalaki na mosolo te mpo na kofuta tike ya mpepo, libaku ya kozwa mpe mosala na ensanga na bango ya Pasifiki ezalaki te. Boye Ndeko mobali Mou Tham mpe mwana na ye ya mobali Gerard bakamataki mokano ya mpasi ya kokende kokuta mwana mobali mosusu oyo azalaki kosala na ndeke ya nikele na Nouvelle Calédonie na kilometele 3.000 na westi. Nkolo mosala azalaki kofutela basali ba ye boleki ya kokende na ndeke kasi azalaki kofuta te mosolo ya kofuta tike ya kozonga ndako.
Babali misato ba libota ya Mou Tham basalaki mosala mibu minei na bandeke ya nikele na mokili mwa molunge, kotimbolaka mpe kotondisaka mabende ya kilo na mituka. Ndeko mobali Mou Tham abandaki kozonga ndako mpo na eleko ya mokuse mbala moko na mobu, kotikaka bana na ye na Nouvelle Calédonie.
Nsima ya mibu minei ya mosala makasi kobukaka mokongo, Ndeko Mou Tham mpe bana ba ye babombaki mwa mosolo ya kokoka mpo na komema libota na Tempelo ya Nouvelle Zélande. Banso bakendeki, longola se mwana moko ya mwasi. Bakangisamaki mpo na ntango mpe boseko, likambo moko ya esengo mpe ya kolimbola te.
Ndeko mobali Mou Tham uta na tempelo azongaki mbala moko na Nouvelle Calédonie, wapi asalaki mibu mibale misusu mpo na kofuta boleki ya mwana mwasi oyo akendaki te na tempelo elongo na bango—mwana mwasi abala, mwana mpe mobali wa ye.
Na mibu mya bango ya nsuka Ndeko mobali mpe Ndeko mwasi Mou Tham balingaki kosalela kati na tempelo. O ntango ena Tempelo ya Papeete na Tahiti esi etongamaki mpe ebulisamaki, mpe basalelaki misio mibale kuna.3
Bandeko ba ngai babali mpe basi, batempelo ezali mingi koleka se mabanga mpe sima ya makasi. Itondisami na bondimi mpe kokila. Itongami na mimekano mpe matatoli. Ibulisami na kobonzama mpe mosala.
Tempelo ya yambo oyo etongamaki na eleko oyo ezalaki tempelo ya Kirtland, Ohio. Basantu na ntango wana bazalaki babola, nzokande Nkolo atindaki ete tempelo etongama, boye batongaki yango. Mpaka Herber C. Kimball na ntina ya likambo oyo akomaki ete, “Nkolo ye moko kaka ayebi bileko ya bobola, mikakatano mpe mpasi oyo tolekaki mpo na kokisa yango.”4 Mpe boye, nsima ya nyonso oyo ekokisamaki na komonaka mpasi, Basantu batindamaki na makasi kotika na Ohio mpe tempelo elingami ya bango. Na nsuka bazwaki ekimelo—atako ekozala ya ntango moke—na mabongo ma Ebale ya Mississipi na ekolo ya Illinois. Babiangaki esika bafandaki o nkombo ya Nauvoo, mpe na bolingi ya kopesa nyonso ya bango moko mbala moko lisusu mpe na bondimi na bango ngwii, batongelaki Nzambe wa bango tempelo mosusu. Nzokande, minyoko mipelaki, mpe na Tempelo ya Nauvoo naino esilaki mpenza te, babenganaki bango uta na bandako na bango mbala moko lisusu, mpo na koluka ekimelo na esobe.
Etumba mpe kobonzama ebandaki lisusu mpo basalaki mibu 40 mpo na kotonga Tempelo ya Salt Lake, oyo etelemi na lokumu nyonso likolo ya libanga monene kaka na ngambo ya sudi ya baye bazali awa lelo oyo na Ndako ya Makita.
Boko motuya ya kobonzama esengeli ntango nyonso kosangisama na botongi tempelo mpe tempelo. Bakoki kotangama te ezali baye basalaki mpe bobundaki mpo ete bazwa mpo na bango moko mpe mpo na mabota ma bango mapamboli maye mazwami na batempelo ya Nzambe.
Mpo na nini ezali mingi bongo na bolingi ya kopesa mingi mpenza mpo na kozwa mapamboli ma tempelo? Baye basosolaka mapamboli ma seko uta na tempelo bayebi ete libonza moko te ezali monene mpenza, ezali na ntalo moko ya bozito mingi, etumba moko te ezali mpasi koleka mpo na kozwa mapamboli maye. Etikala kozala soki moke te na kilometele mingi ya kosala mobembo, pkokoso mingi ya kolonga, to mitungisi mingi ya kotiela molende. Bango nde basosoli ete makuli ma lobiko maye mazwami na tempelo maye mapesi biso nzela ya kozonga epai ya Tata wa biso na Likolo mokolo moko kati na mokangano ya libota ya seko mpe mpo na kokonzama na mapamboli mpe nguya uta na likolo mabongi na libonza nyonso mpe makasi manso.
Lelo oyo bato mingi koleka basengeli koyoka mpasi ya minyoko mingi te mpo na kokende na tempelo. Bandimi ba Eklezia ntuku mwambe na mitano na monkama bazwami nzinga nzinga ya kilometele 320 na tempelo, mpe mpo na mingi koleka kati na biso ntaka wana ezali mokuse koleka.
Soki ozalaki na tempelo mpo na yo moko mpe soki ofandi na ntaka moke nzinga nzinga na tempelo, kobonzama na yo ekoki kozala bobele ya kotia mwa ntango mpembeni na bomoi na yo ya misala mingi mpo na kokendeke na tempelo mbala na mbala. Ezali na mingi oyo tosengeli kosala na nkombo ya baye bazali kozela na ngambo mosusu ya elamba. Wana ezali biso kosala mosala mpo na bango, tokoyeba ete tokokisaki eye bakoki kosala mpo na bango mei te. Mokambi Joseph F. Smith, na esakoli moko ya nguya, alobaki ete, “O nzela ya makasi na biso na nkombo na bango minyololo ya bowumbu bwa bango mikokangolama, mpe molili moye mozali kozinga bango mokolimwa, ete pole ekoka kongenga likolo na bango mpe bakoyoka na mokili ya molimo maye etali mosala mosalemeli bango na bana na bango awa, mpe bakosepela elongo na bino na bokokisami ya misala miye.”5 Bandeko ba ngai babali mpe basi, mosala moye ya biso tosengeli kosala yango.
Na libota ya ngai moko, boko makambo ya bule mpe motuya koleka manso tokutana na yango masalemaki ntango tozwanaki banso esika moko na tempelo mpo na kokokisa makuli ma bokangisi mpo na bankoko ba biso bakufa.
Soki okoma naino na tempelo te to sokiosila kokoma kasi na mikolo miye olongobani te kopesama mokanda mopesi nzela ya kokota na tempelo, ezali na ntina monene lisusu mpo na yo kosala te longola se kozala moto oyo alongobani mpo na kokende na tempelo. Kobonzama na yo ekoki komema bomoi na yo kati na boyokani na eye esengami mpo na kozwa mokanda mopesi nzela ya kokota na tempelo, nani ayebi soki ekozala na kotikaka bizaleli biwumeli biye bizali kolongobisa yo te. Ekoki kozala ezaleli ya kozalaka na bondimi mpe botosi ya kofutaka moko na zomi. Ezala soki nini, longobana mpo na kokota na tempelo ya Nzambe. Sala ete ozwa mokanda mopesi nzela ya kokota na tempelo mpe talela yango lokola bozwi ya motuya, mpo ezali nde bongo.
Kino ekokota yo na ndako ya Nkolo mpe ekozwa yo mapamboli manso maye mazali kozela kuna, naino ozwi biloko binso biye Eklezia esengeli kopesa te. Mapamboli manso ya monene mpe lokumu ya kozala mondimi na Eklezia ezali maye tozwaka na batempelo ya Nzambe.
Sikawa, baninga ba ngai baye bozali na mibu na bino ya bolenge, bozala ntango nyonso na tempelo lokola eloko oyo miso ma bino mazali kotala. Bosala eloko moko te oyo ekopekisa yo kokota na bikuke na yango mpe kozwa mapamboli ma bule mpe ma seko maye mazwami kuna. Natindi baye kati na bino oyo bakendeke na tempelo mbala na mbala kosala mabatisi mpo na bakufi, kotelemaka na bangonga ya ntongo-ntongo mpo ete bokoka kozala na mabatisi ma lolenge lona liboso ete kelasi ebanda. Nakoki kokanisa na ntina ya nzela mosusu ya malamu koleka mpo na kobanda mokolo te.
Epai na bino baboti ba bilenge bana, tika nakabola na biso boko batoli ya bwania uta na Mokambi Spencer W. Kimball. Elobaki ye: “Ekozala eloko moko kitoko soki … baboti bakoki kotia na kisuku nyonso ya ndako na bango elilingi moko ya tempelo mpo ete [bana na bango] uta na ntango [bazali] [ba]na mike bakoka kotala mikolo nyonso [kino] ekokoma eteni moko ya [bomoi bwa bango]. Ntango [bakokoma] na mobu moye [basengeli] kokamata mokano [moko] monene [na ntina ya kokende na tempelo], ekozala esi ezwamaki.”6
Bana na biso bayembaka na Primaire ete:
Nalingaka komona tempelo.
Nakokota na kati mokolo moko.
Nakosala mayokani elongo na Tata wa ngai;
Nakolaka kotosa.7
Nabondeli bino ete boteya bana ba bino maye etali monene ya tempelo.
Mokili ekoki kozala esika ya mokakatano mpe ya mpasi mpo na kofanda. Tozingami mbala mingi na eye wana ekokitisa biso na nse. Wana ezali bino mpe ngai kokende na tempelo esantu ya Nzambe, wana ekokundola biso mayokani tosalaka na kati, tokozala na makoki koleka ya kokanga motema na mimekano minso mpe kolonga lisenginia moko moko. Kati na ndako oyo ya Nzambe tokozwa kimia; tokozongisama sika mpe kolendisama.
Sikawa, bandeko ba ngai babali mpe basi, tika natanga lisusu tempelo moko liboso ete nasukisa. Na mikolo mikoya nsima kala mingi te wana ezali batempelo ya sika kotongama nzinga nzinga na mokili, moko ekotelema na engumba moko oyo ebandamaki mibu 2.500 mileki. Nazali koloba na ntina ya tempelo oyo ezali sikawa kotongama na Rome, Italie.
Tempelo nyonso ezali ndako ya Nzambe, kokokisaka misala se moko mina na mapamboli mpe makuli ya ndenge moko. Tempelo ya Rome, na Italie, bobele yango moko, ezali kotongama na moko esika ya mambi ma kala koleka binso na mokili, engumba wapi Bapostolo Petelo mpe Paulo bateyaki nsango malamu ya Klisto mpe wapi moto na moto akufaki liwa lya martiru.
Na Sanza ya zomi eleki, wana esanganaki biso na esika moko ya kitoko mpo na mosala ya koteya na litumu ya nordi-esti ya Roma, ezalaki libaku na ngai ya kopesa losambo ya bobulisi wana ezalaki biso komilengela mpo na kotia libanga ya yambo. Nayokaki esengo ya kobenga ntoma Lucio Malam mpe Mokonzi molandi ya mboka RomabGiuseppe Ciardi kozala o ntei ya bato ya yambo mpo na kobalola pau moko ya mabele. Moto na moto azalaki kati na bato bazwaki mokano ya kopesa biso nzela ya kotonga tempelo na engumba na bango.
Mokolo yango mapata ezalaki mingi kasi molungwe, mpe atako mvula ezalaki koya, litanga moko to mibale te makweyaki. Wana ezalaki lisanga ya bayembi kitoko koyemba na lokota ya Italia mondimo mwa “Molimo mwa Nzambe,” moto na moto akokaki koyoka lokola kaka ete lola mpe mabele masanganaki na loyembo moko ya nkembo ya masanzoli mpe bozongisi matondi na Nzambe wa Bokasi bonso. Mpinzoli ekokaki kosimbama te.
Na mokolo moko ekoya, bandimi na botongono na eye, Engumba ya Seko, bakozwa makuli ma seko na lolenge na yango na ndako esantu ya Nzambe.
Nazongisi matondi ma ngai ma libela epai ya Tata wa ngai na Likolo mpo na tempelo oyo ezali kotongama sikawa na Roma mpe mpo na batempelo na biso nyonso, esika nyonso kani izali. Moko na moko ezali kotelema lokola mwinda monene epai na mokili, lokola litatoli na biso ete Nzambe, Tata na biso wa Seko, azali na bomoi, ete Alingi kopambola biso mpe, solo, kopambola bana babali mpe bana basi ba Ye ba nkola inso. Moko moko ya batempelo na biso ezali kolakisa litatoli na biso ete bomoi mosika koleka nkunda ezali likambo ya solo mpe esalemi lokola ezali bomoi na biso awa na mabele. Natatoli bongo.
Balingami bandeko ba ngai babali mpe basi, tika ete tobonza nyonso esengeli mpo na kokende na tempelo mpe kozwa molimo mwa tempelo na mitema na biso mpe na badako na biso. Tika ete tolanda matambe ma Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, oyo asalaki libonza ya nsuka mpo na biso, ete tokoka kozwa bomoi ya seko mpe bonetoli na bokonzi bwa Tata wa biso na Likolo. Oyo ezali losambo na ngai ya solo, mpe napesi yango na nkombo ya Mobikisi na biso, Nkolo Yesu Klisto, amene.
© 2011 na Intellectual Reserve, Inc. Lotomo nyonso na bakomi. Ebetami na Etazini ya Amerika. Bondimami na lokota ya Angele: 6/10. Bondimami ya bobongoli: 6/10. Bobongoli ya First Presidency Message, May 2011. Lingala. 09765 639