2012
Ntango inso o Katikati
sánzá ya nsambo 2012


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Sambo 2012

Ntango Nyonso na Katikati

Na Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Na manaka mingi ya mokili, sanza ya sambo elakisi katikati ya mobu. Wana ezali bato kosepela mpe kokundolaka makambo mingi na bibandeli mpe bansuka, mbala mingi katikati ya makambo eyebanaka te.

Bibandeli ezali bantango mpo na kozwa mikano, mpo na kosala bamwango, mpo na kobakisa makasi. Bansuka ezali bantango mpo na kopema mpe ekoki Kopesa mayoki ya bosilisi to bobungisi. Kasi soki otali malamu, komimonaka lokola na katikati ya makambo ekoki kosunga biso bobele mpo na kososola bomoi mwa malamu koleka te kasi kotambwisa yango mwa moke koleka lisusu na ntina mingi.

Katikati ya Mosala ya Misio

Ntango nalobaka na bilenge bamisionele, mbala mingi nayebisaka bango bazali na katikati ya misio na bango. Atako soki bawuti kokoma kaka mokolo eleki to etikali kaka mokolo moko mpo na kozonga ndako, nasengaka bango kokanisa ntango nyonso ete bazali na katikati.

Bamisionele ya sika bakoki koyoka lokola bazangi mayele mpenza mpo na kokokisa mosala, mpe boye bawumelaka mpo na koloba to kosala na elikya mpe mpiko. Bamisionele balenda oyo bakomi penepene na kosilisa misio na bango bakoki koyoka mawa ya komona ete misio na bango ekomi na nsuka, to bakoki kolemba ntango bazali kobanzabanza nini bakosala nsima ya misio na bango.

Ezala ntango to mpe esika nyonso wapi bazali kosala, bosolo ezali ete bamisionele ya Nkolo bazali mokolo na mokolo kolona nkona ezanga motango ya nsango malamu. Kokanisa mpo na bango moko lokola kozalaka ntango nyonso na katikati ya misio na bango ekoyikisa mpiko mpe elolendisa bantoma ba botongono baye ya Nkolo. Lokola ezali na bamisionele ya ntango mobimba, ezali mpe bongo na biso banso.

Tozali Ntango Nyonso na Katikati

Mbongwana oyo ya komona likambo ezali mingi koleka bisalela ya mpamba ya makanisi. Ezali na bosolo moko oyo eleki mayele nsima ya likanisi ete tozali ntango nyonso na katikati. Soki totali esika wapi tozwami na kalati ya mokili, tokoki komekama na koloba ete tozali na ebandeli. Kasi soki totali yango na pembeni koleka, epai nyonso tozwami tozali kaka na katikati ya etando monene.

Lokola ezali na kalati ya mokili, ezali mpe boye na ntango. Tokoki koyoka ete tozali na ebandeli to na nsuka ya Bomoi na biso, kasi ntango totali wapi tozali na kotalaka elilingi ya boseko—ntango tososoli eye molimo na biso ezalaka kala na bomoi mpo na ntango oyo eleki makoki na biso ya komeka molai na yango mpe, mpo na libonza ya bobonga nie mpe Bomikabi ya Yesu Klisto, ete molimo na biso ekozala na bomoi mpo na boseko ekoya—tokoki kososola ete tozali solo mpenza na katikati.

Kala mingi te nayokaki mposa ya kotia lisusu libanga ya nkunda ya lilita ya baboti ba ngai. Ntango ebebisaki mpenza esika ya lilita, mpe nayokaki ete kotia libanga ya nkunda ya sika ebongaki malamu mpo na bomoi na bango ya ndakisa. Ntango natangaki mikolo ya mbotama mpe kufa likolo ya libanga ya nkunda, nkomo ikangama na mwa mokoloto, mwa elembo oyo ya ntaka ya bomoi etondisaki na mbalakaka makanisi ma ngai na ebele ya makundoli manene. Moko na moko ya makundoli maye ma motuya elakisi ngonga moko na katikati ya bomoi ya baboti ba ngai mpe na katikati ya bomoi na ngai.

Ezala mibu na biso, ezala esika tozwami, ntango makambo mayaka na bomoi, tozali ntango nyonso na katikati. Lisusu, tozali na katikati mpo na libela.

Elikya ya Kozalaka na Katikati

Iyo, bomoi na biso mobimba ekozala na ngonga ya ebandeli mpe ngonga ya nsuka, kati yango ezali bobele bilembo bitiami mpembeni ya nzela monene ya katikati ya babomoi na biso ya seko. Ezala soki tozali na ebandeli to na nsuka, ezala soki tozali elenge to mokolo, Nkolo akoki kosalela biso mpo na ntina ya Ye soki bobele totii mpembeni makanisi nysonso maye mazali kosukisa makoki na biso na kosalisa mpe kopesa nzela na bolingi bwa Ye mpo na kobongisa bomoi na biso.

Moyembi alobaki, “Oyo ezali mokolo Nkolo asali; [tosengeli] kosepela mpe kozala na esengo na yango” (Nzembo 118:24). Amuleki akundolisi biso ete “bomoi boye ezali ntango mpo ya bato komilengele mpo na kokutana na Nzambe; iyo, tala mokolo mwa bomoi boye ezali mokolo mpo ya bato kosala misala mya bango” (Alama 34:32; biso nde tobeti sete). Mpe moyembi ntoki moko amaniolaki, “Libela—esalemi na sikawa.”1

Kozalaka ntango nyonso na katikati elingi koloba ete lisano esili naino te, elikya ebungi ata moke te, kokweya elakisi nsuka ata moke te. Ezala esika nyonso wapi tozwami mpe eleko nyonso wapi tozali, boseko ya bibandeli mpe boseko ya bansuka etandolami liboso lya biso.

Tozali ntango nyonso na katikati.

MATANGI

  1. Emily Dickinson, “Forever—is composed of Nows,” na The Complete Poems of Emily Dickinson, ed. Thomas H. Johnson (1960), 624.

Koteya UTA NA ETINDA OYO

Kanisa kosolola elongo na libota boniboni bazali “ntango nyonso na katikati,” ata soki bazali kobanda to kosukisa likambo moko. Lendisa bango na kosala malamu mingi koleka na misala mya bango ya sikawa, kowumelaka te na makambo maleki to kozelaka te mosala to mwango mokoya. Okoki kolinga kopesa bango likanisi ya kopona likambo moko bakoki kosala lokola libota mpo na kokokisa toli eye mpe kotia mokolo moko wapi bakolikia kokokisa ntina na bango.