2012
Libiangi lya Mobikisi mpo na Kosala
sánzá ya mwambe 2012


Etinda ya BAkambi ya Yambo, Sanza ya Mwambe 2012

Libiangi ya Mobikisi mpo na Kosala

Mokambi Thomas S. Monson.

Banso baye bayekoli matematiki bayebi nini ezali denominateur commun. Mpo na Basantu Ba Mikolo mya Nsuka, ezali na denominateur commun oyo ekangisi biso elongo. Denominateur commun yango ezali libiangi oyo moto na moto azwaka mpo na kosala misala na bokonzi ya Nzambe awa likolo ya mabele.

Ozali na elindo ya koyimayimaka ntango libiangi eyeli yo? To ondimaka na botondi libaku nyonso ya kosalisa bandeko ba yo babali mpe basi, koyebaka ete Tata na biso na Lola akopambola baye Ye abiangaka?

Nakotia elikya ete tokobungisa te ntina ya solo ya mabaku maye tolingaka mpo na kosalisa. Ntina wana, ntina wana ya seko, ezali yango kaka elobami na Nkolo mpe ezwami na Perle de Grand Prix: “Mpo tala, oyo ezali mosala mwa ngai mpe nkembo na ngai—kokokisa bozangi kufa mpe bomoi bwa seko mpo na moto.”1

Tika tomikundola ntango nysonso ete kazaka ya bondimi na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali kazaka ya elengi te kasi ezali nzambala moko ya mokumba. Likolo ya komibikisa bisomei lotomo na biso, ezali ya kokamema basusu na bokonzi ya selesitiale ya Nzambe.

Na kotambolaka na bolingi na nzela ya kosalelaka Nzambe, tokozala ata mokolo moko te na ebonga ya Cardinal Wolsey ya Shakespeare. Elongwaki ye na Ebonga na ye ya nguya nsima ya bomoi ya kosaleka mokonzi wa ye, amilelaki na mawa:

Soki nasalelaka Nzambe na ngai na ndambo ya mpila

Nasalelaki mokonzi wa ngai, Ye akokaki te na mibu na

Ngai kotika ngai bolumbu epai ya banguna ba ngai.2

Lola esengi biso mosala ya lolenge nini? “Nkolo asengi motema mpe mayele ma bolingi; mpe molingi mpe motosi akolia biloko ya mboka ya Siona na mikolo mya nsuka.”3

Natelemaka moke ntango nakanisi maloba ya Mokambi John Taylor (1808–87) ete: “Soki okomisi libiangi lya yo monene te, Nzambe akozwa yo moyanoli mpo na baye okokaki kobikisa soki okokisaki lotomo na yo.”4

Lokola pole kongengaka se mpo na koluka bolamu ezali bomoi ya Yesu wana ezalaki Ye kosala katikati na bato. “Nde ngai najali kati na bino lokola mosaleli,”5 Esakolaki Yesu ntango apesaki bokasi na maboko mpe makolo ya batengoli, bomoni na miso ya bakufi miso, boyoki na matoi ma bakufi matoi, mpe bomoi na nzoto ya bawei.

Na lisese ya Mosamalia malamu, Nkolo ateyaki biso kolinga bazalani na biso lokola bisomei.6 Na eyano na Ye na elenge mokambi ya bozwi, Ye ateyaki biso kolongola kimoyimi na biso.7 Na koleisaka bato 5000, Ye ateyaki biso kokanisa bamposa ya basusu.8 Mpe na esakola likolo ya Ngomba, Ye ateyaki biso koluka bokonzi bwa Nzambe yambo na nyonso.9

Na Mokili ya Sika, Nkolo mosekwi asakolaki ete, “Boyebi makambo maye bosengeli kosala kati na Eklezia na ngai; mpo misala miye bomoni ngai kosala, yango nde bokosala mpe lokola; mpo mina miye bomongai kosala yango wana nde bokosala lokola.”10

Topambolaka basusu wana ezali biso kosala na elili ya “Yesu ya Nasalete … oyo atambolaki bipai na bipai kosalaka misala malamu.”11 Nzambe apambolaka biso mpo tozwa esengo na kosalelaka Tata wa biso ya Lola ntango tozali kosalisa bana ba Ye na mabele.

Koteya uta na Etinda Oyo

“[Nkolo] akondima biso tokweya te soki tosali eteni ya biso. Ye akokomisa biso monene koleka kutu batalanta mpe makoki ma bisomei … Ezali moko ya makambo maleki kitoko maye makoki kokomela moto” (Ezra Taft Benson, na Teaching, No Greater Call [1999], 20). Kanisa kokabola likambo moko wapi yo to moto moko oyebi ayokaki Nkolo kokomisi monene batalanta mpe makoki ma ye. Bengisa libota wana mpo na kokabola boko makambo ma bangomei ntango bayanoli na “libiangi lya Nkolo mpo na kosala.”