2012
Mateya mpo na Ntango na Biso
2012


Mateya mpo na Ntango na Biso

Mateya ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe ya Lingomba ya Bamama Basungi na mokolo ya eyenga ya minei ekozala mpo na “Mateya mpo na Ntango na Biso.” Liteya moko na moko ekoki kolengelama uta na lisolo moko to masolo mingi maye mapesamaki na likita linene ya sika oyo ewuti kosalama (tala na etando na nse). Bakambi ya likonzi mpe ya disitiliki bakoki kopona masolo maye basengeli kosalela, to bakoki kopesa mokumba moye na baepisikopo mpe bakambi ya bitape. Bakambi babetaka sete ete ezali likambo ya motuya mpo na bandeko babali ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi bayekolaka masolo se moko oyo na mikolo ya eyenga se moko oyo.

Baye bakendeka na mateya ya eyenga ya minei balendisami koyekola mpe komema nimelo ya Zulunale ya likita linene oyo ebimi ya nsuka.

Makanisi mpo na Kolengela Liteya uta na Masolo

Sambela mpo ete Molimo Mosantu azala na yo wana ezali yo koyekola mpe koteya li(ma)solo yango. Okoki kosenginiama mpo na kolengela liteya yango na kosalelaka babuku mosusu, kasi masolo ya likita linene ezali manaka oyo mandimami. Mosala na yo ezali kosalisa basusu koyekola mpe kosalela nsango malamu lokola eteyami na likita linene ya Eklezia ewuti kosalama.

Tanga lisusu malamu li(ma) solo yango, kolukaka mibeko mpe malongi maye mazali kokutana na bamposa ya bato ya kelasi. Luka lisusu masapo, makomi ya kotanga, mpe maloba uta na li(ma) solo maye makosalisa yo koteya bosolo boye.

Sala mwango ya koyeba lolenge nini okoteya mibeko mpe malongi yango. Tala ete okotisa mituna miye mikosalisa bato ya kelasi:

  • Tala mibeko mpe malongi kati na li(ma) solo.

  • Kanisa eye etali ndimbola na yango.

  • Kabola bososoli, makanisi, mayele, mpe matatoli.

  • Salela mibeko mpe malongi maye na bomoi na bango.

Mateya ya Sanza Mateyami

Makambo ya Koteya na Liteya ya Mokolo ya Eyenga ya Minei

Sanza ya zomi 2012–Sanza ya minei 2013

Masolo mapesami na likita linene ya Sanza ya zomi 2012*

Sanza ya minei 2013–Sanza ya zomi 2013

Masolo mapesami na likita linene ya Sanza ya minei 2013*

  • Mpo na mateya ya eyenga ya minei ya Sanza ya minei mpe ya zomi, li(ma)solo makoki koponama uta na likita linene elekaki to uta na likita ewuti kosalema. Masolo maye mazali komonana na nkota mingi na site Interneti conference.lds.org.

Bimisa na lokasa