2012
Kotala mpe Koteya, Mosala moko ya Lobiko
sánzá ya zómi na míbalé 2012


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Zomi na mibale 2012.

Kotala mpe Koteya, Mosala moko ya Lobiko

Yekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei.

Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Kotala mpe koteya epesaka mabaku na basi mpo na kokengela, kolendisa, mpe koteya moko na basusu—ezali solo mosala ya lobiko. Na nzela ya kotala mpe koteya, bandeko basi bazali kosala mpe na nkombo ya Mobikisi mpe bazali kosalisa mpe kolengela basi mpo na mapamboli ya bomoi ya seko.

“Tosengeli ‘kokebisa, kolimbola, kopesa toli, mpe koteya, mpe kobengisa [basusu] baya epai ya Klisto’ (tala D&A20:59), lokola elobaki Nkolo na bobimisi na ye,” elobaki Mokambi Spencer W. Kimball (1895–1985). Nsima, alobaki, “Litatoli na yo ezali nzelaya ya somo ya koteya.”1

Ntango biso lokola batali mpe bateyi tozali kobakisa boyebi na biso ya bosolo ya nsango malamu, matatoli na biso ezali kolendisa mpe kosalisa bandeko basi oyo bazali komilengela mpo na kobatisama mpe kokulisama nkotisa. Tozali kosalisa bandimi ya sika bakangama ngwi na nsango malamu. Botali mpe bolingo na biso esalisaka “kozongisa baye babungi nzela [mpe] kolamusa mitema ya baoyo bakomi malili kati na nsango malamu.”2 Mpe tozali kolendisa bandeko basi baya epai ya Klisto na kokendaka na tempelo.

“Bokobikisa milimo,” elobaki Mokambi Kimball epai ya bamama batali mpe bateyi, “mpe nani akoki koloba longola se mingi ya bato malamu oyo bazali kokoba koya na Eklezia lelo bazali ya kotelema mpamba te bozalaki na bandako na bango mpe bopesaki bango elikya ya sika, limoni ya sika. Bokangaki lido. Botandolaki kongombela na bango. …

“Bomoni, bozali kaka kobikisa bandeko basi te, kasi mbele mibali na bango mpe bandako na bango mpe lisusu.”3

Uta na Makomi

Doctrine et Alliances 20:59; 84:106; 138:56

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Ntango Profeta Joseph Smith abongisaki Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki ete basi bazalaki kaka mpo na kokengela babola te kasi mpe lisusu mpo na kobikisa milimo. Ateyaki lisusu ete kati na Eklezia basi bazali na misala ya ntina kati na mwango mwa lobiko ya Tata na Lola.4 Wana ekambami bango na mibeko miteyami na Profeta Joseph Smith, biso lokola bandeko basi na Lingomba ya Bamama Basungi tokoki kosala elongo mpo na kolengela basi mpe mabota na bango mpo na mapamboli manene ya Nzambe.

“Tika tozala na mawa ya moko mpe mosusu,” elobaki Mokambi Brigham Young (1801–77), “mpe tika [baoyo bazali] makasi baleisa na boboto bato na bolembu ete bakoma makasi, mpe tika baoyo bakoki komona bakamba bakufi miso kino bakoka komona nzela mpo na bango mei.”5

Matangi

  1. Spencer W. Kimball, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 116.

  2. Eliza R. Snow, na Daughters in My Kingdom, 83.

  3. Spencer W. Kimball, na Daughters in My Kingdom, 117.

  4. Tala Joseph Smith, na Daughters in My Kingdom,171–72.

  5. Brigham Young, na Daughters in My Kingdom, 107.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Lolenge nini Lingomba ya Bamama Basungi ezali kolengela ngai mpo na mapamboli ya bomoi ya seko?

  2. Nini ekoki ngai kosala mpo na kobakisa bondimi ya baye nazali kokengela?