2013
Asekwi
sánzá ya mínei 2013


Etinda ya Bakambi ya Yambo, sanza ya Minei 2013

“Asekwi”

Elilingi
Na Mokambi Henry B. Eyring

Litatoli ya bosolo ya Bosekwi ya Yesu Klisto ezali liziba ya nyonso mibale elikya mpe mokano. Mpe ekoki kozala bongo mpo na mwana nyonso ya Nzambe. Ezalaki mpo na ngai na mokolo moko ya elanga na sanza ya motoba na 1969 ntango mama na ngai akufaki, ezali bongo uta mibu mina minso, mpe ekozala bongo kino nakomona ye lisusu.

Mawa uta na bokabwani ya ntango moke epesaki mbala moko esika na esengo. Mpo na esengo ya kosangana lisusu yango ezalaki mingi koleka elikya. Mpamba te Nkolo abimisaki mingi mpenza na nzela ya baprofeta na Ye mpe lokola Molimo Mosantu andimisaki mpenza bosolo ya Bosekwi epai na ngai, nakoki komona na mayele ma ngai lolenge nini yango ekozala kosangana lisusu elongo na balingami na biso basantisami mpe basekwi.

“Oyo ezali bango baye bakobima na bosekwi ya bayengebene. …

“Oyo ezali baye ya bango nkombo ekomami na lola, wapi Nzambe mpe Klisto bazali basambisi ya banso.

Oyo ezali bango baye bazali bato bayengebene oyo bakomisami babongi nie na nzela ya moyokanisi ya boyokani ya sika, oyo asalaki bomikabi ya bobongi nie na nzela ya bosopi ya makila na yemei” (D&C 76:65, 68–69).

Mpamba te Yesu Klisto abukaki nkanga ya liwa, bana banso ya Tata na Lola oyo babotami na mokili bakosekwa na nzoto oyo ekokufa ata mokolo moko te. Boye litatoli na ngai mpe ya bino ya bosolo ya nkembo ekoki kolongola nzube ya kobungisa ndeko moko alingama ya libota to moninga mpe epesi esika na yango na esengo ekoya mpe mokano ya ngwi.

Nkolo apesi biso banso likabo ya kosekwa, na yango milimo na biso mitiami na nzoto oyo ezanga mabunga ya mosuni (tala Alama 11:42–44). Mama na ngai akobima elenge mpe ya kongenga, mpe bilembo ya kimobange mpe ya mibu ya mpasi ya nzoto ekolongwa. Yango ekoya epai na ye mpe epai na biso lokola likabo.

Kasi baye kati na biso oyo baluki mpenza kozala elongo na ye libela basengeli kosala maponi mpo na komilongisa mpo na kozala na bosangani wana mpo na kozala wapi Tata mpe Mwana na Ye Molingami asekwa bafandi na nkembo. Yango ezali esika bobele moko wapi bomoi ya libota ekoki kokoba seko na seko. Litatoli ya bosolo ebakisi mokano na ngai mpo na kokokisa ngaimei mpe baoyo nalingaka mpo na kokoma na ndelo ya likolo koleka ya bokonzi ya selesitiale na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto oyo ezali kosala na bomoi na biso(tala D&C 76:70).

Na boluki-luki na biso ya nzela mpo na bomoi ya seko Nkolo apesi biso lisungi moko na nsambo ya elambo oyo ekosalisa ngai mpe ekoki kosalisa bino. Tobengisami mpo na kozongisa mayokani na biso ya libatisi sika na liyangani nyonso ya elambo.

Tolaki komikundola ntango nyonso Mobikisi. Bilembo ya libonza na Ye ekosalisa biso kolula bonene ya ntalo Ye afutaki mpo na kobuka nkanga ya liwa, mpo na kopesa biso ngolu, mpe kopesa biso bolimbisi ya masumu na biso manso soki toponi koyambola.

Tolaki kobatela mitindo na Ye. Kotangaka makomi mpe maloba ya baprofeta na bomoi mpe koyokaka balobi oyo bafulami na mayangani na biso ya elambo ekokundolisa biso mayokani na biso mpo na kosala yango. Molimo Mosantu akomema na mayele mpe mitema na biso mitindo tosengeli mingi koleka kobatela mokolo wana.

Na nsambo ya elambo, Nzambe alaki kotinda Molimo Mosantu kozala elongo na biso (tala Moloni 4:3; 5:2; D&C 20:77, 79). Namoni na ngonga wana ete Nzambe akoki kopesa ngai oyo ezali lokola masolo ya ngai moko na Ye. Abendi na bokebi na ngai nini nasalaki oyo esepelisaki Ye, mposa na ngai mpo na boyamboli mpe bolimbisi, mpe bankombo mpe bilongi ya bato Ye alingi ngai nasalisa mpo na Ye.

Mibu mileki se koleka, likambo wana oyo ya mbala na mbala ebongolaki elikya na ngai na mayoki ya bolingani mpe ememaki bondimi moko ete ngolu ekangolamaki mpo na ngai na Bomikabi mpe Bosekwi ya Mobikisi.

Natatoli ete Yesu azali Klisto oyo asekwi, Mobikisi na biso, mpe ndakisa mpe mosungi abonga nie na biso mpo na bomoi ya seko.

Koteya uta na Etinda Oyo

Tosengeli komeka “makomi manso epai na biso, ete ekoka kozala mpo na litomba mpe boyekoli na biso” (1 Nephi 19:23). Bokanisa kotangaka nsambo ya elambo, iye ezwami na Doctrine et Alliances 20:76–79. Nsima ya botangi mateya ma Mokambi Eyring oyo etali nsambo ya elambo, bokoki kolinga kobengisa baye bozali kotangisa bakanisa nzela oyo nsambo oyo ekoki kokamba bomoi bwa bango mpe kosalisa bango kozonga mpo na kozala lisusu elongo na Tata wa Lola mpe Yesu Klisto.

Bimisa na lokasa