2013
Mokili Ezali na Mposa ya Bapionie Lelo
sánzá ya nsambo 2013


Etinda ya Bakambi ya Yambo, sanza ya Sambo 2013

Mokili Ezali na Mposa ya Bapionie Lelo

Elilingi
Mokambi Thomas S. Monson

Mpo na bato mingi, mobembo ya bapionie ya mobu 1847 ebandaka na mboka Nauvoo, Kirtland, Far West, to na New York te kasi mosika kuna na mboka Angleterre, Ecosse, Scandinvie, to na Allemagne. Bana mike bakokaki te kososola mpenza bondimi monene oyo etindaki baboti na bango batika mabota, baninga, bilengi, mpe kimia na bango.

Mwana moke akokaki kotuna, “Mama, mpo na nini tozali kotika ndako? Tozali kokende wapi?”

“Yaka elongo, yo wa ngai ya motema; tozali kokende na Siona, mboka ya Nzambe na biso.”

Kati na kimia ya ndako mpe elaka ya Siona etelemaki mai ya nkanda mpe ya nsomo ya Atlantiki monene. Nani akoki lisusu kolimbola bobangi oyo ezingaki motema ya moto na ntango wana ya likama ya kokatisa? Etindamaki bango na mamimisi ya kimia ya Molimo, lokola basungamaki na bondimi ya pete kasi ya molende, bapionie wana batiaki elikya na Nzambe mpe bakatisaki ebale na mobembo na bango.

Na nsuka bakomaki na Nauvoo kaka mpo na kobanda lisusu mobembo ya komona bampasi na nzela. Mabanga ya malita mpe mabanga ya makebisi elakisaki bankunda nzela mobimba uta Nauvoo kino na Salt Lake City. Boye nde ezalaki ntalo boko bapionie bafutaki. Banzoto na bango ekundami na kimia, kasi bankombo na bango ezali na bomoi libela.

Bangombe elemba na mikumba ezalaki kotambola malembe malembe, bapine ya makalo ezalaki kolela-lela, bilombe mibali bakembaki, bambunda ya bitumba eyokanaki, bambwa ya zamba bagangaki. Kasi bapionie bafulama na bondimi mpe baoyo batindamaki kokende liboso ata na mpasi bakobaki mobembo. Mbala mingi bayembaki:

Boya, Boya, bino Basantu banso, bobanga mimekano to masala makasi te;

Kasi na esengo bokende mobembo na bino elongo.

Atako mobembo oyo ekoki komonana mpasi epai na bino,

Ngolu ekokomisa makambo pete mpe malamu koleka. …

Nyonso ezali malamu! Nyonso ezali malamu!1

Bapionie oyo bamikundolaki maloba ya Nzambe: “Bato na ngai basengeli komekama na makambo manso, mpo ete bakoka komilengela mpo na kozwa nkembo oyo nazali na yango mpo na bango, kutu nkembo ya Siona.”2

Boleki ya ntango ebungisi bokundoli na biso mpe ekitisi motuya ya matondi tosengeli kozongisa na baye batambolaki na nzela ya mpasi, kotikaka nzela nsima na mpizoli ya malita ezanga nkombo. Kasi toloba nini mpo na mikakatano ya lelo? Ezali na banzela ezanga mabanga mpo na mobembo, bangomba etelema ya komata te, balubwaku ya kokatisa te, banzela ya kopasola te, bibale ya kokatisa te? To ezali na mposa ya sikawa mpenza mpo na molimo wana ya bopionie ekamba biso mosika ya makama maye mazali kobundisa biso mpo na kozindisa biso mpe kokamba biso na Siona moko ya kimia?

Na bazomi ya mibu uta nsuka ya Bitumba ya Mokili Mobimba II, mibeko ya bolamu ekiti se kokita. Motuya ya mabe ezali komata se komata; bolamu ezali kokita. Mingi bazali na masuwa monene ya likama, kolukaka biyenga ya ntango moko na komipimelaka bisengo ya seko. Boye tozali kobungisa kimia.

Tobosani lolenge nini Bagreki mpe Baloma badondwaki mpenza na mokili ya bosenzi mpe lolenge nini elonga wana esukaki—lolenge nini goigoi mpe bolembi elongaki bango na nsuka kino libebi na bango. Na nsuka, mingi koleka balingaki bonsomi, balingaki kimia mpe bomoi ya elengi; mpe babungisaki nyonso—bokengi mpe kimia mpe bonsomi.

Bomitika na masenginia ya Satana te; kasi, botelema ngwi mpo na bosolo. Bamposa ezanga nsuka ya molimo ekosepelisama te na kolukaka ntango inso esengo o ntei ya mayoki makasi ya elengi ya nzoto mpe ya mabe. Mabe ekambaka na bolamu te. Boyini etombolaka bolingo te. Zololo epesaka mpiko te. Ntembe efulaka bondimi te.

Bato mosusu bamonaka yango mpasi kotelemela maseki mpe makebisi ezanga elengi ya bazoba baye batiolaka bopeto bwa nzoto, bosembo, mpe botosi na mitindo ya Nzambe. Kasi mokili emonaka mpamba kokangama na libongisi moko. Ntango Noa atindamaki kotonga masuwa, bato ya mokili ya bozoba batalaki likolo ezanga mapata mpe nsima basekaki mpe batiolaki—kino mvula eyaki.

Esengeli biso koyekola mateya ya motuya boye lisusu mpe lisusu? Bantango ebongwanaka, kasi bosolo etikalaka. Ntango tokoki te kozwa litomba uta na makambo ya kala, tosengeli kozongela yango na moto mpasi, bolozi, mpe nsomo nyonso na yango. Ezali biso na bwania te ya kotosa Ye oyo ayebi ebandeli uta na nsuka—Nkolo na biso, oyo aponaki mwango ya lobiko —na esika ya nioka wana, oyo amonaki kitoko na yango mpamba?

Buku ya ndimbola elimboli pionie lokola “moko oyo akendaka liboso mpo na kolengela to kofungola nzela mpo ete basusu balanda.”3 Ekoki biso komekola mpiko mpe molende ya lotomo oyo ezalaki na bapionie ya nkola ya kala? Ekoki bino mpe ngai, ya solo, kozala bapionie?

Nayebi ete tokoki kozala. O, boniboni mokili ezali na mposa ya bapionie lelo!

Matangi

  1. “Come, Come, Ye Saints,” Hymns, no. 30.

  2. Doctrine et Alliances 136:31.

  3. Oxford English Dictionary, 2nd ed. (1989), “pioneer.”

Koteya uta na Etinda Oyo

Makomi elimboli ete bateyi ya libota basengeli “kokebisa, kolimbola, kolendisa, mpe koteya, mpe kobengisa banso baya epai ya Klisto” (D&A 20:59). Kanisa kobimisa makebisi mpe mabengisi oyo ezwami na etinda ya Mokambi Monson epai ya baye bokeyi kotala. Bokoki kolinga kosolola elongo na bango banzela mpo na koyeba mpe kolanda bandakisa ya malamu, koboya lokuta, mpe koyekola uta na mabungi ya basusu. Botuna baye bozali koteya lolenge nini bakoki kozala bapionie lelo.

 

Bimisa na lokasa