2013
bolamu
sánzá ya mwambe 2013


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya mwambe 2013

Bolamu

Yekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo bozali kotala. Bosalela mituna mpo na kosalisa bino kolendisa bandeko basi ba bino mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei. Mpo na kozwa nsango mingi, kende na www.reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Bantina ya manaka ya bosalisani ya Eklezia ezali mpo na kosalisa bandimi bakoma bato bamikoki, mpo na kosunga babola mpe bakeleli, mpe ya kopesa lisalisi. Bolamu ezali na katikati ya mosala ya Lingomba ya Bamama Basungi. Mokambi Henry B. Eyring, Mosungi ya Yambo na Bokambi ya Yambo, ateyaki:

“[Nkolo] apesi uta na ebandeli ya ntango banzela mpo ete bayekoli na Ye basalisa. Ye abiangaki bana ba Ye kobulisa ntango na bango, makoki ma bango, mpe bomoto na bango moko mpo na kosangana na Ye na kosalisaka basusu. …

“Abiangi biso mpe atindi biso tosangana na mosala mwa Ye mpo na kotombola baye bazali kokelela. Tosali liyokani ya kosala yango na mai ya libatisi mpe na batempelo esantu ya Nzambe. Tozongisaka liyokani yango sika na mikolo ya Eyenga ntango toliaka elambo.”1

Na nse ya bokambi ya episikopo to mokambi ya etape, bakambi ya esika basungaka na kopesaka lisalisi ya molimo mpe ya ntango. Mabaku ya kosalisa mbala mingi ekobanda na bamama batali mpe bateyi oyo balukaka bofuli mpo na koyanola na bamposa ya ndeko mwasi moko na moko oyo bakendeke kotala.

Uta na Makomi

Luka 10:25–37; Yakobo 1:27; Mozia 4:26; 18:8–11; Doctrine and Covenants 104:18

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Na mokolo ya 9, sanza ya motoba 1842, profeta Joseph Smith apesaki mokumba na bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi ete “basunga babola” mpe “babikisa milimo.”2 Bantina ezali se wana na katikati ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe elakisami na mokano na biso, “Bolingo ekosuka te” (1 Bakolinti13:8).

Mokambi na biso ya Lingomba ya Bamama Basungi ya mitano, Emmeline B. Wells, mpe basungi na ye babandaki mokano oyo na 1913 lokola likundoli ya mabongisi na biso ya libandeli: “Tosakoli mpenza yango ntina na biso mpo na… [kokangama] makasi na mateya efulama ya Profeta Joseph Smith ntango abimisaki moango na nzela ya maoye wapi basi basengelaki kopesama nguya na nzela ya libiangi ya bonganganzambe mpo na kosangana na kati ya masanga malongobani mpo na ntina ya kosalisaka babali, kosungaka bakeleli, kobondisaka bamikolo, kokebisaka baye bazangi bokebi, mpe kobikisaka bana etike.”3

Lelo Lingomba ya Bamama Basungi ekomi na mokili mobimba lokola bandeko basi batandoli bolingani, bolingo ya peto ya Klisto, epai ya bazalani na bango (tala Moroni 7:46–47).

Matangi

  1. { Henry B. Eyring, “Opportunities to Do Good,” Liahona mpe Ensign, Sanza ya mitano 2011, 22.

  2. Joseph Smith, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 63.

  3. Daughters in My Kingdom, 63.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Lolenge nini nazali komilengela mpo na komibatela mpe kobatela libota na ngai na molimo mpe na ntango?

  2. Lolenge nini nakoki kolanda ndakisa ya Mobikisi wana ezali ngai kosalisa mpo na kokokisa bamposa ya bandeko basi nabatelaka?

Bimisa na lokasa