Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Moko 2013
“Nakosundola Yo Te, Nakotika Yo Te”
Tata na biso na lola … ayebi ete tozali koyekola mpe kokola mpe kokoma makasi lokola tozali kokutana mpe kolonga mikakatano miye tosengeli koleka.
Na zulunale na ngai na mpokwa, Nakokoma, “oyo ezalaki moko ya mayangani mafulama koleka ya likita linene koleka oyo nasila kolanda. Makambo manso ezalaki na lolenge ya monene mpe ya molimo koleka nyonso.”
Bandeko ya mibali mpe ya basi, sima ya basanza motoba lokola tokutanaki na likita linene na biso, molongani na ngai wa bolingo, Frances, totikaki ye na lopitalo, kobelaka makasi sima mwa mikolo mike. Na sanza ya mitano, sima bamposo ya boluki libiki, ye alalaki mpo na libela. Liwa na ye ezalaki mpasi mpenza. Ye na ngai tobalanaki kati ya tempelo ya Salt Lake na mokolo ya 7 ya sanza ya zomi 1948. Lobi elingaki kozala mbala ya ntuku motoba na mitano ya bokundoli ya libala na biso. Azalaki bolingo ya motema na ngai, moninga ya bonkutu na ngai, mpe moninga na ngai ya motema. Kolobaka ete nazali kozanga ye ekobanda te koyebisa bino mozindo ya mayoki na ngai.
Likita liye ekokisi mibu Ntuku mitano uta nabengamaki na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale na Mokambi David O. McKay. Na nzela ya mibu nyonso miye nayokaki eloko moko te kasi litondi mpe lisalisi ya kokoka ya moninga na ngai ya bolingo. Nakoki te koloba motango ya nyonso asalaki na komipesaka ete nakokisia libiangi na ngai. Natikala koyoka mokolo moko te komilela epai na ye ntango nabandaki kolekisa mikolo mpe bamposo mosika na ye mpe ya bana na biso. Azalaki anzelu, ya solo.
Natombeli kopesa matondi na ngai mpe maye ya libota na ngai, mpo na bolingo na bango mpenza na oyo eyeli biso uta liwa ya Frances. Minkama ya bakalati mpe mikanda etindamelaki biso uta mokili mobimba kolakisaka bosepeli na ye mpe mawa mpo na na libota na biso. Tozwaki maboke ya bazomi ya bafololo ebongisama kitoko. Tozali na botondi mpo na kotia misolo oyo epesamaki na nkombo na ye na Misolo Minene ya Misio ya Eklezia. Na nkombo ya baye oyo ya biso oyo ye atiki na sima, nalakisi bolingo ya mozindo mpo na boboto na bino mpe bolingo na bino ya solo.
Na sima ya bolendisi na ngai uta ntango ya eleko ya bokabwani oyo etutisaki motema na ngai ezalaki litatoli na ngai ya nsango malamu ya Yesu Klisto mpe boyebi ete molongani na ngai azali kaka na bomoyi. Nayebi ete bokabwani na biso ezali ya ntango. Tokangamaki na ndako ya Nzambe na moto moko oyo azali na makoki ya kokanga na nse mpe na likolo. Nayebi ete tokosangana mokolo moko mpe tokokabwana lisusu te. Oyo ezali boyebi oyo esungaka ngai.
Bandeko ya mibali mpe ya basi, ezali na moto moko te oyo akoki koloba ete nano azwa mikakatano mpe mawa te, to azanga eleko ya mambi ya kala maye ezali mpasi to minyoko.
Ntango nzela ya bomoyi ezwi minyololo ya mpasi, ezali na momekano mpo na kotuna “Mpo na nini ngai?” Tango elakisi neti pole ezangi na suka ya nzela, moi ezali te mpo na kotia suka na molili ya butu. Toyokaka lokola koyokisami soni ya bobungisi ndoto mpe ya bozangi elikia ya bokeyisi elekia. Tokokoma elongo nakotangaka biblia, “Ezali wana nkisi te na Gilead ?”1 Toyokaka lokola basundola biso, motema ebukana, biso moko. Tolingaka mingi komona mikakatano na biso moko na nzela ya kitalatala epasuka ya bondimi te. Tozangaka kozela mpo na kozwa eyano na biso makambo, na kobosanaka ete mpo na kozwa bolamu ya lola tosengeli kozala na bompikiliki.
Mikakatano miye miyelaka biso mitiaka biso na momekano ya solo ya koyeba bokasi na biso mpo na koyika mpiko. Motuna ya motuya etunami na ntina ya koyanola na moko na moko na biso: Nasengeli kolemba, to nasengeli kokende kino na nsuka? Mingi balembaka ntango bamiyokaka kolemba mpo na kotelemela mikakatano na bango. Mpo na kosilisa yika mpiko kino na suka ya bomoyi yangomei.
Nakobeta sete mingi na maye makoki kokweyisa biso nyonso, tokoki koloba na Yobo ya kala, “Moto abotama mpo na komona mpasi.”2 Yobo azalaki “sembo mpe na bosolo” moto oyo “abandaki kobanga Nzambe, mpe koboya mabe.”3 Moto ya botosi na etamboli na ye, na nkita na ye, Yobo atelemelaki momekano oyo ekokaki kobebisa moto nyonso. Na bozangi nkita na ye, baninga basundolaki ye, kati ya mpasi na ye, atungisamaki na bobungisi libota na ye mobimba, atindamaki “kolakela Nzambe mabe, mpe kokufa.”4 Atelemelaki lisenginya oyo mpe alobaki uta na mozindo ya lokumu ya molimo na ye ete:
“Tala, nzeneneke na ngai azali na lola, mpe buku ya makambo na ngai ezali likolo.”5
“Nayebi ete mosikoli na ngai azali na bomoi.”6
Yobo abatelaki bondimi. Tokosala lokola Yobo ntango tokokutana na mikakatano oyo mikoyela biso?
Ntango nyonso tolingi kokweya na bozito ya mikumba na biso elongo na mipepe ya bomoi, tika tokundola ete basusu balekaki mikakatano yango mpe lokola, bayikaki mpiko, mpe balongaki yango.
Mambi ma kala ya Eklezia na eleko oyo, ya litondi ya nsango malamu ya ntango, etondi na misala ya baoyo babundaki mpe babatelaki bondimi na bango mpe basalaki yango na motema ya nsai. Ntina? Batiaki nsango malamu ya Yesu Klisto na kati ya bomoyi na bango. Oyo ezali eye ekobatela biso na nyonso ekoya na nzela na biso. Tokozala se kokutana lisusu mikakatano ya mpasi, kasi tokokoka kobunda na yango, kolonga yango, mpe kobima balongi.
Uta na mbeto ya mpasi, uta na oreiller oyo epola na mpinzoli, tokotelema na lola na kondima oyo ya bonzambe mpe elaka kitoko: “nakosundala yo te, nakotika yo te.”7 Lilendisi ya lolenge oyo ezali na motuya makasi.
Lokola nasalaki mibembo mosika na mokili mobimba na kokokisaka mosala ya libiangi na ngai, Nayekolaki makambo ebele— ya moke te ezali ete mawa mpe minyoko ezali na mokili mobimba. Nakoki te komeka molai ya mpasi ya motema mpe ya mawa natatolaki lokola natambolaki elongo na baoyo bazali na mpasi, bazali koyoka maladi, bazali kokutana na bobomi libala, bazali kobunda na mwana ya mobali to mwana mwasi motomboki, to koyoka mpasi ya malandi ya masumu. Molongo ekoki kozala mpenza, mpo ete makama mazali ebele maye makoki kokomela biso. Kozwa ndakisa moko kaka ezali mpasi, mpe na ntango nazali kokanisa mikakatano, makanisi na ngai ezongaka na ndeko Brems, moko ya bateyi ya Eteyelo ya Eyenga ntango nazalaki elenge. Azalaki mondimi monene ya Eklezia, moto ya motema malamu koleka. Ye mpe mwasi na ye, Sadie, bazalaki na bana mwambe, mingi bazalaki ya mibu se moko na baye ya libota na ngai.
Sima ya libala na ngai na Frances tolongwaki na palwasi, tomonaki Ndeko mobali mpe mwasi Brems mpe bandeko ya libota na ye na milulu ya libala mpe matanga, mpe na mayangani ya palwasi.
Na 1968, Ndeko mobali Brems abungisaki mwasi na ye, Sadie. Mibale ya bana na bango mwambe lisusu bakufaki na mibu milekaki.
Mokolo moko esali mibu Zomi na misato, nkoko ya yambo ya Ndeko mobali Brems abengaki ngai na telefone. Alimbolaki ngai ete nkoko na ye akokisaki mibu nkama moko na mitano. Alobaki, “Azali kofanda na mwa lopitalo moke kasi akutanaka na libota na ye eyenga nyonso, wapi atangisaka liteya ya nsango malamu.” Akobaki, “Eyenga oyo elekaki, Nkoko ayebisaki biso, “Balingami na ngai, nakokufa na mposo oyo. Bobengela ngai Tommy Monson. Akoyeba nini ya kosala.’”
Nakendaki kotala ndeko mobali Brems mpokwa elandaki wana na lombango. Namonaka ye te mwa ntango molai. Nakokaki koloba na ye te, mpo abandaki koyoka lisusu te. Nakokaki kokomela ye mpo atanga te, mpo ete abandaki komona lisusu te. Bayebisaki ngai ete libota esololaka na ye na kozwaka mosapi na ye ya loboko ya mobali mpe kokomaka likolo ya loboko na ye ya mwasi nkombo ya moto oyo ayei kotala ye. Nsango nyonso esengeli kopesama na lolenge wana. Nalandaki kaka ndakisa wana nakozwaka mosapi na ye mpe nakakolaki T-O-M-M-Y M-O-N-S-O-N, na lolenge ye ayebeli ngai. Ndeko Brems aninganaki mpe, azwaki maboko na ngai, atiaki yango na moto na ye. Nayebaki mposa na Ye ezalaki ya kozwa lipamboli ya bonganganzambe. Mokumbi motuka oyo amemaki ngai na lopitalo wana ayaki kokuta ngai mpe totiaki maboko likolo ya moto ya Ndeko mobali Brems mpe topesaki lipamboli azalaki koluka. Nsima, mpinzoli ebimaki na miso na ye ekufa. Asimbaki maboko na biso na kolakisaka botondi. Atako ayokaki te lipamboli liye topesaki ye, molimo ezalaki makasi, mpe kolikia ete azalaki ya kofulama na molimo mpo na koyeba topesaki ye lipamboli oyo azalaki na yango mposa. Moto malamu oyo akokaki komona te uta ntango molai. Akokaki koyoka te uta ntango molai. Butu na moi azalaki kaka ya kofinama na mwa ndako moke ya lopitalo. Mpe na yango asekaki mpe maloba alobaki etutisaki motema na ngai. “Matondi,” alobaki. “Tata na ngai na Lola Azali malamu mpenza mpo na ngai.”
Nsima ya mposo moko, lokola Ndeko Brems asakolaki, ye akufaki. Azalaki komitungisa te na ntina ya maye ye azangaki; kasi azalaki mingi na esengo na ntina mapamboli na Ye ebele.
Tata na biso na lola, oyo azali koyanola na bamposa na biso ebele, mpe ayebi lisusu ete tozali koyekola mpe kokoma makasi lokola tozali kotelemela mpe koleka mikakatano miye na nzela oyo tosengeli koleka. Toyebi ete ngonga mosusu ntango tokoki koyeba mpasi ya minyololo ya mawa, ntango tokolela, mpe ntango tokomekama na nsuka na biso. Nzokande, mikakatano ya boye ezali kopesa biso mbongwana na ntina ya bolamu, ya kotonga lisusu bomoyi na biso na nzela Tata na biso ya Lola azali kotangisa biso, mpe kokoma eloko moko ya kokesana na lolenge tozalaki—kitoko koleka ndenge tozalaki, kondimama koleka ndenge tozalaki, na litatoli makasi koleka ndenge tozalaki liboso.
Oyo esengeli kozala mosala na biso—mpo na koyika mpiko mpe kokoba, iyo, kasi kokoma na molimo koleka lokola tozali kotambola na pole ya moyi mpe mpasi. Soki ezalaki te mpo na mikakatano ya kolonga mpe makambo ya kolukela eyano malamu, tolingaki kotikala lolenge tozali, na mwa bokoli to te na nzela ya bomoyi na biso ya seko. Poeta alobaki mingi na lolenge moko na maloba maye:
Nzete kitoko ekolaka na mikakatano,
Mopepe makasi, banzete ya makasi.
Likolo mosika, molai koleka.
Mopepe makasi , makasi koleka.
Na moyi mpe malili, na mvula mpe elanga,
Kati ya banzete mpe bato malamu ya banzete ekokola.8
Bobele Molakisi nde ayebi bozindo ya mimekano na biso, mpasi na biso, mpe minyoko na biso. Ye moko nde apesaka biso kimia ya seko na ntango ya mimekano. Ye moko nde asimbaka milimo minyiokwama na biso na maloba na Ye ya malendisi:
“Boya epai na ngai, bino banso bolembi mpe bozali na mikumba, nakopesa bino kimia.
“Bozwa nkanga na ngai likolo na bino, mpe boyekola na ngai; mpo ete nazali sembo mpe motema ya kokita: mpe nakopesa kimia na milimo na bino.
Mpo nkanga na ngai ezali pete, mpe mokumba na ngai pepele.”9
Ata ezali ntango ya malamu to na ntango ya mpasi, Azali elongo na biso. Apesi biso elaka ete maloba oyo ekoki kobongwana ata moke te.
Bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, tika tozala na mokano epai ya Tata na biso na Lola, mokano oyo ekitaka te mpe esilaka te elongo na boleki ya mibu mpe na bampasi ya bomoi na biso. Tozali na ntina te ya kozwa mikakatano mpo tokanisa Ye, mpe tosengeli te komemama na komikitisa yambo topesa ye bondimi mpe boyambi na biso.
Tika ete tobunda ntango nyonso mpo na kozala pembeni ya Tata na biso ya Lola. Na kosalaka bongo, tosengeli kosambela Ye mpe koyokela Ye mikolo minso. Tozali solo na mposa na Ye ntango inso, atako na ntango ya bongengi ya moyi to ya mvula. Tika ete elaka na Ye ezala seko maloba ya kokanisa: ““Nakosundola Yo te, Nakotika Yo te”10
Na bokasi nionso ya molimo na ngai, natatoli ete Nzambe azali na bomoi mpe alingi biso, ete Mwana se Moko wa Ye azalaki na bomoi mpe akufaki mpo na biso, mpe ete sango malamu ya Yesu Klisto ezali mwinda oyo ekotaka mpe epesaka pole na nzela ya molili ya bomoi. Tika ete ezala se bongo ntango nyonso, nasambeli na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.
© 2013 na Intellectual Reserve, Inc. Lotomo nyonso na bakomi. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/13. Bondimami ya bobongoli: 6/13. Bobongoli ya First Presidency Message, November 2013. Lingala. 10671 639