Libula ya Elikya ya Motuya
Ntango oponi kosala liyokani na Nzambe to kotosa yango, oponi soki okotika elikia ya libula mpo na baye basengeli kolanda ndakisa na bino.
Balingami bandeko mibali mpe basi, mingi kati na bino babengamaki na likita oyo na bamisionele ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo ya Nsuka. Ekoki kozala ete bamisionele wana basili kobengisa bino mbala mosusu kopona kosala liyokani na Nzambe na kozwaka libatisi.
Basusu kati na bino bazali koyoka mpo bondimaki libiangi ya baboti, ya molongani na yo, to ntango mosusu ya mwana, libiangi esalemi na elikia ete bokopona kotia na kati kati ya bomoi na bino mayokani oyo esi bosala na Nzambe. Basusu kati na bino oyo bazali koyoka basili kopona kozonga kolanda Mobikisi mpe koyoka lelo esengo ya boyambi na Ye.
Soki nani bozali mpe wapi bozali, bosimbi kati na maboko na bino esengo ya bato mingi oyo bokoki kokanisa sikawa te. Mikolo nyonso mpe ngonga nyonso, bokoki kopona kosala liyokani na Nzambe mpe kotosa yango.
Epai nyonso wapi bozali na nzela oyo ya kosangola libula ya likabo ya bomoi ya seko, bozali na libaku malamu ya kolakisa bato mingi nzela ya esengo monene koleka. Ntango oponi kosala liyokani na Nzambe mpe kotosa yango, oponi kotikela libula ya elikia na baye bakoki kolanda ndakisa na yo.
Bino mpe ngai tozwaki lipamboli ya elaka ya libula ya lolenge oyo. Nazwi esengo na ngai mingi na moto oyo nakutana na ye naino te na bomoi ya kufa. Azalaki etike oyo akomaki moko ya baboti ya bankonko na ngai. Atikelaki ngai libula ya elikia ya motuya. Tika nalobela bino eteni ya mosala asalaki na kokelaka libula wana mpo na ngai.
Nkombo na Ye ezalaki Heinrich Eyring. Abotamaki kati na bomengo ebele. Tata na Ye, Edward, azalaki na lopango monene na Coburg, na oyo ezali sikawa Allemagne. Mama na Ye azalaki Vicomtesse Charlotte Von Blomberg. Tata na Ye azalaki mobateli ya mabele ya mokonzi ya Prusse.
Heinrich azalaki mwana ya mobali ya liboso ya Charlotte mpe Edward. Charlotte akufaki na mibu 31, sima ya mbotama ya mwana na ye ya misato. Edward akufaki kala mingi te nsima wana, kobungisaka lopango mpe bozwi na ye na mombongo oyo elongaki te. Azalaki bobele na mibu 40. Atikaki bana bitike misato.
Heinrich, nkonkololo na ngai, abungisaki baboti na ye mpe libula monene moko ya mokili. Azangaki ata meya ya mpamba. Alobaki na lisolo na ye ete ayokaki ete elikia na ye ya malamu koleka ezalaki ya kokende na Amerika. Atako azalaki na libota to moninga kuna te, azalaki na liyoki ya elikia na ntina ya kokende na Amerika. Yambo akendaki na engumba ya New York City. Sima akendaki kofanda na St. Louis, Missouri.
Na St. Louis moko ya baninga na ye ya mosala azalaki Mosantu ya Mikolo ya Nsuka. Epai ya moninga na ye azwaki buku ya moke ekomamaki na Mpaka Parley P. Pratt. Atangaki yango mpe na sima ayekolaki maloba nyonso akokaki kozwa na ntina ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka. Asambelaki mpo na koyeba soki mpenza banzelu bazalaki kobimela bato, soki ezalaki na profeta ya bomoi mpe soki azwaki eyamba ya solo mpe oyo ebimisami.
Nsima ya basanza mibale ya boyekoli ya bozindo mpe mabondeli, Heinrich alotaki ndoto oyo wapi balobaki na ye asengeli kozwa libatisi. William Brown, moto oyo napesi longonya na makanisi mpe na bonganganzambe, akokaki kokokisa bokuli yango. Heinrich azwaki libatisi na liziba ya mayi ya mvula na Sanza ya Misato 11, 1855, na 7:30 na ntongo.
Nandimi ete Heinrich Eyring ayebaki sima ete oyo nazali koteya bino lelo ezali ya solo. Ayebaki ete esengo ya bomoi ya seko eyaka na nzela ya mikangano ya libota oyo ekokoba mpo na libela. Atako ntango azwaki sika sikawana mwango ya esengo ya Nkolo, ayebaki ete elikia na ye mpo na kosepela libela ezali se na maponi ya bonsomi ya basusu mpo na kolanda ndakisa na ye. Elikia na ye ya esengo ya libela ezalaki se na bato oyo naino babotamaki te.
Lokola eteni ya libula ya elikia na libota na biso, atikaki lisolo na bakitani na ye.
Na lisolo wana nakoki koyoka bolingo oyo azalaki na yango mpo na baye basengelaki kolanda ye. Na maloba na ye nayoki elikia oyo bakitani na ye bakopona kolanda ye na nzela ya bozongi na ndako na biso na Lola. Ayebaki ete ekozala moko ya boponi monene te mpo na kosala bongo kasi maponi mingi ya mike mike. Natangi uta na lisolo na ye ete:
“Uta mbala ya yambo nayokaki ndeko mobali Andrus koloba … Nazalaka ntango nyonso kokende na liyangani ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka mpe bangonga ya kitoko bongo ezalaki mpenza mingi te oyo ngai nazangaki yango, mpo ete ezalaki mpe mokumba na ngai ya kosala yango.
“Natangi yango na buku ya lisitwale na ngai mpo ete bana ngai balanda ndakisa na ngai mpe bamona mokumba ya ntina oyo mpamba ata moke te [ya kosangana] elongo na Basantu.”1
Heinrich ayebaki ete na mayangani ya elambo tokokakii kozongisa bilaka na biso sika mpo na kokanisa ntango nyonso Mosikoli mpe kozala na Molimo na Ye elongo na biso.
Ezalaki Molimo oyo nde esungaki ye na misio na ye mpo na oyo abiangemaki bobele mwa sanza moke sima ya kondima liyokani ya libatisi. Atikaki lokola libula ndakisa na ye ya botongono makasi na misio na ye ya mibu motoba na oyo bazalaki kobenga Mboka ya Baindia. Mpo ete azwa bopemisi na ye uta na miso na ye, atambolaki uta Oklahoma kino Salt Lake City, na ntaka ya bakilometele pene na 1.770.
Kala mingi te sima abiangemaki na profeta ya Nzambe kokende na sudi ya Utah. Uta kuna andimaki libiangi mosusu mpo na kokende na misio na Allemagne esika ya mbotama na ye. Sima Andimaki libiangi ya Apostolo ya Nkolo Yesu mpo na kosunga kotelemisa lisanga ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka na nordi ya Mexique. Kowuta kuna abiangemaki mpo na kokende na Engumba ya Mexico lisusu lokola misionele ya ntango mobimba. Amemiaki mabiangi maye. Akundamaki na mwa lilita ya moke na Colonia Juárez, Chihuahua, Mexico.
Nalobeli makambo oyo mpo na kolakisa bonene na ye to mpo na bonene ya oyo asalaki to ya bakitani na ye te. Nalobeli makambo oyo mpo na komemia ye mpo na ndakisa ya bondimi mpe elikia oyo ezalaki na motema na ye.
Andimaki mabiangi wana na ntina ya bondimi na ye ete Klisto mosekwi mpe Tata na biso na Lola babimelaki profeta Joseph na nse ya banzete na etuka ya New York. Andimaki yango na ntina ya bondimi na ye ete bafungola ya bonganganzambe na Eklezia ya Nkolo ezongisamaki elongo na nguya mpo na kokanga mabota mpo na libela, se soki bakobi na bondimi ekoka mpo na kobomba mayokani na bango.
Lokola Heinrich Eyring, nkonko na ngai, bokoki kozala bato ya yambo na libota na bino mpo na kolakisa nzela mpo na bomoi ya seko na nzela ya mayokani masantu bosali mpe kobomba na etingia mpe bondimi. Liyokani nyonso epesamaka na misala mpe bilaka. Mpo na biso banso, lokola ezalaki mpo na Heinrich, misala oyo ezali ntango mosusu pete kasi mbala mingi mpasi. Kasi bomikundola, misala yango esengeli ntango mosusu kozala mpasi mpo ntina na yango ezali ya kopusa biso na nzela mpo ete tozala na bomoi ya seko elongo na Tata na biso na Lola mpe Mwana na Ye ya bolingo, Yesu Klisto, kati na mabota.
Bokundola maloba uta na buku ya Abalayama:
“Mpe ezalaki na moko kati na bango oyo akokanaki na Nzambe, mpe alobaki na baye bazalaki na ye: Tokokita na nse, mpo ezali na esika kuna, mpe tokozwa bisaleli biye, mpe tokosala mokili likolo ya moye wapi baoyo bakoka kovanda;
“Mpe na boye tokomeka bango mpo na kotala soki bakosala makambo manso oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango;
“Mpe boayo bakobomba lolenge na bango ya yambo bakobakisama likolo, mpe baoyo bakobomba lolenge na bango ya yambo te bakozwa nkembo na bokonzi se moko elongo na baoyo babombi lolenge na bango ya yambo; mpe baoyo bakobomba lolenge na bango ya mibale bakomona nkembo kobakisama likolo ya mitu na bango mpo na libela mpe libela.”2
Kobomba lolenge na bino ya mibale etali bosali mayokani na biso elongo na Nzambe mpe kosala na botongono misala na basengisi biso. Esengeli kozala na bondimi na Yesu Klisto lokola Mosikoli mpo na kobomba mayokani mpo na bomoi mobimba.
Mpamba te Adama mpe Ewa bakweyaki, tozali na masenginia, mimekano, mpe liwa lokola libula na biso banso. Nzokande, Tata na biso ya Lola ya bolingo apesi biso likabo ya Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, lokola Mobikisi na biso. Likabo monene wana mpe lipamboli ya Bomikabi ya Yesu Klisto ememi libula ya molongo mobimba: elaka ya Lisekwa mpe makoki ya bomoi ya seko mpo na banso oyo babotami.
Lipamboli eleki monene na mapamboli manso ya Nzambe, bomoi ya seko, ekoya epai na biso bobele soki tosali mayokani epesami na Eklezia ya Klisto ya solo na basali na Ye oyo bapesami ndingisa. Na ntina ya Bokweyi, banso tosengeli kosukolama na ntina wana na libatisi mpe na botiami maboko na moto mpo na kozwa likabo ya Molimo Mosanto. Makuli maye esengeli kosalema na baye bazali na nguya elongobani ya likoki ya bonganganzambe. Sima, elongo na lisungi ya Pole ya Klisto mpe Molimo Mosantu, tokoki kobomba mayokani nyonso tosalaki na Nzambe, mingi mingi maye epesami na batempelo na Ye. Bobele na nzela oyo wana, mpe elongo na lisungi wana, nde moto nyonso akoki kotuta tolo ya libula na ye lokola mwana ya Nzambe na libota mpo na libela.
Mpo na ndambo ya bato oyo bazali koyoka ngai, oyo ekoki komonana lokola ndoto ezanga elikia.
Bomoni baboti na bondimi koyokaka mawa ya bana oyo baboyi to baponi kobuka mayokani na bango na Nzambe. Kasi baboti wana bakoki kotia motema mpe elikia uta na boyebi ya baboti mosusu.
Mwana mobali ya Alma mpe bana mibali ya Mokonzi Moziya batikaki botomboki ya makasi mpo na mayokani mpe mitindo ya Nzambe. Elenge Alma amonaki mwana na ye ya mobali Corianton kotika masumu mpo na kosalela na bosembo. Buku ya Mormon mpe elobeli lisusu likamwisi ya Balamanite kotikaka mimeseno ya likunya mpo na bosembo mpo na kosala liyokani ya kokufa mpo na kobatela kimia.
Anzelu atindamaki epai ya elenge Alma mpe bana ya Moziya. Anzelu ayaki na ntina ya bondimi mpe ya nsambo ya batata na bango mpe ya bato ya Nzambe. Uta na bandakisa oyo ya nguya ya Bomikabi kosalaka na mitema ya bato, bokoki kozwa mpiko mpe bolendisi.
Nkolo apesi biso banso liziba ya elikia lokola tokobunda kosalisa baye tolingaka kondima libula na bango ya seko. Apesi biso bilaka soki tokobi komeka kosangisela Ye bandimi, atako baboyi na libiangi na Ye ya kosala bongo. Koboya na bango eyokisi Ye mpasi, kasi Akoki kotika te, biso mpe tokoki kotika te. Atikaki ndakisa ekoka mpo na biso elongo na bolingo ya molende na Ye ete: “Mpe lisusu, mbala boni ekoki ngai kosangisa bino lokola mama soso asangisaka bana na ye na nse ya mapapu, iyo, O bino bato ya ndako ya Yisalaele, bino oyo bofandi na Yelusaleme, lokola bino oyo bokweyi; iyo, mbala boni nalingaki kosangisa bino lokola mama ya soso asangisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye kasi bolingaki te.”3
Tokoki kotia motema na mposa oyo ekokweya te ya Mobikisi mpo na komema bana nyonso ya molimo ya Tata na Lola kozonga na ndako na bango elongo na Ye. Moboti nyonso ya bondimi, nkoko, mpe nkokololo akabolaka mposa wana. Tata na Lola mpe Mobikisi bazali bandakisa na biso ebongi nie mpo na eye tokoki mpe tosengeli kosala. Basenga soki moke te bosembo na makasi mpamba te bosembo esengeli koponama. Bapesi biso nzela ya kososola bosembo, mpe batika biso komona ete bambuma na yango ezali elengi mingi.
Moto nyonso abotami kati na mokili azwi Pole ya Klisto, oyo esungaka biso kotala mpe koyoka nini ezali malamu to nini ezali mabe. Nzambe atindaki basali na bomoi ya kufa baye bakoki, na nzela ya Molimo Mosantu, kosunga biso koyeba nini Asengi biso kosala mpe nini Apekisi. Nzambe asalaki ete yango ebenda bato mpo na kopona bosembo na kotikaka biso koyoka ntina ya maponi na biso. Soki toponi bolamu, tokozwa esengo—na ntango. Soki toponi mabe, mawa mpe mpasi ekoya—na ntango na yango. Bilembo wana ezali solo. Nzokande mbala mingi bilembo yango ezali kowumela mpo na ntina moko. Soki mapamboli ezalaki ya mbalakata, koponaka bolamu ekokaki kotonga bondimi te. Mpe ntango mawa epusami mosika mpo na kosalema, esengaka bondimi mpo na koyoka bosenga ya koluka bolimbisi ya masumu na esika ete nsima toyoka mawa mingi mpe bilembo ya mpasi.
Tata Lehi azalaki na mawa likolo ya maponi masalemaki na bana na ye mpe mabota na bango. Azalaki moto moko monene mpe malamu—profeta ya Nzambe. Atatolaki mbala mingi mpo na Mobikisi, Yesu Klisto, epai na bango. Azalaki ndakisa ya botosi mpe mosala ntango Nkolo abiangaki ye kotika bozwi na ye nyonso ya mokili mpo na kobomba libota na ye uta na libebi. Na nsuka ya bomoi na ye, akobaki se kotatola epai ya bana na ye. Lokola Mobikisi—mpe atako nguya na ye mpo na kososola mitema na bango mpe komona mikolo ya sima kozala mawa mpe kitoko —Lehi abombaki maboko na ye kosembola mpo na kobenda libota na ye liboso ya libiki.
Lelo nkoto na nkoto ya bakitani ya Tata Lehi bazali kondimisa elikia na ye mpo na bango.
Nini ekoki yo mpe ngai kobelema uta na ndakisa ya Lehi? Tokoki kobelema uta na ndakisa na ye na boyekoli makomi na nzela ya losambo mpe na kotalaka.
Napesi likanisi ete bozwa nyonso bomoni ya mokuse mpe ya molai wana ezali bino komeka kopesa libula ya elikia na mabota na bino. Na mwa ntango mokuse, ekozala na mobulu mpe Satana akoganga. Mpe ezali na biloko oyo bosengeli kozela na bompikiliki, na bondimi, koyebaka ete Nkolo akosala na ntango na Ye mpe na nzela na Yemei.
Ezali na biloko oyo bokoki kosala noki noki, ntango baye olingi bazali bilenge. Mikundola ete losambo ya mokolo na mokolo na libota, boyekoli makomi na libota, mpe bokaboli litatoli na liyangani ya elambo ezali pete mpe na ntina mingi ntango bana na yo bazali bilenge. Bilenge bana bazali mbala mingi na liyoki ya Molimo koleka oyo tokoki komona.
Ntango bakokola, bakomikundola nzembo bayembaki elongo na bino. Atako mingi koleka ebengami lisusu miziki, bakokundola maloba ya mokomi mpe litatoli. Molimo Mosantu akoki kopesa biloko nyonso mpo na bomikundoli na bango, kasi maloba ya makomi mpe banzembo ekotikala ntango molai. Makundoli maye ekoki kosala bobendi oyo ekoki kozongisa bango nsima ntango bakotelengana mpo na ntango moko, ekoki kozala mpo na mibu mingi uta na nzela ya kozonga na bomoi ya seko.
Tokozala na mposa ya bomoni ya molai ntango baoyo tolingaka bayoki bobendi makasi ya mokili mpe mapata ya ntembe esali lokola mpo na kobebisa bondimi na bango. Tozali na bondimi, elikia, mpe bolingani mpo na kokamba biso mpe kolendisa bango.
Lokola mopesi toli namonaki oyo na baprofeta mibale ya bomoi ya Nzambe. Bazali bato bakeseni kasi na bomoto se moko ya moto na moto. Nzokande emonani lokola se bazali kokabola elikia se moko mpenza. Ntango moto moko amatisi mbela na ntina ya eloko songolo kati na Eklezia, eyano na bango ya mbala na mbala ezali ete “O, makambo ekobonga.” Mbala nzike bayeba mingi na ntina ya likambo koleka bato kobetaka ngonga ya mbela.
Bayebi lisusu nzela ya Nkolo, mpe solo bazali ntango nyonso na elikia na ntina ya Bokonzi na Ye. Bayebi ete Azali na moto na yango. Azali na nguya nyonso mpe Azali kokengela. Soki otiki Ye azala mokambi ya libota na yo, makambo nyonso ekobonga.
Ndambu ya bana ya Heinrich Eyring bazalaki lokola koyenga yenga. Kasi mingi ya bankokololo bazali kokende na batempelo ya Nzambe na 6:00 na ntongo kosala makuli mpo na bankoko oyo bamona naino te. Bazali kokende na libula ya elikia atikaki. Atikaki libula oyo ezali kolandana to kosengisama na mingi ya bana na ye.
Sima ya nyonso tokoki kosala na bondimi, Nkolo akolongisa elikia na biso mpo na mapamboli manene mpo na mabota na biso koleka ndenge tokoki kokanisa. Alingi bolamu mpo na bango mpe mpo na biso, lokola bana na Ye.
Tozali banso bana ya Nzambe ya bomoi. Yesu ya Nazaleti azali Mwana na Ye ya Bolingo mpe Mobikisi mosekwi. Oyo ezali Eklezia na Ye. Kati na yango nde bafungola ya bonganganzambe ezali, mpe boye mabota ekoki kozala mpo na libela. Oyo ezali libula ya elikya ya motuya na biso. Natatoli yango ezali ya solo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.
© 2014 na Intellectual Reserve, Inc. Lotomo nyonso na bakomi. Printed in USA. English approval: 6/13. Translation approval: 6/13. Bobongoli na Visiting Teaching Message, May 2014. Lingala. 10865 639