2014
Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Masiya
sánzá ya mwambe 2014


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya mwambe 2014

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Masiya

Boyekola na losambo mateya oyo mpe boluka koyeba nini bosengeli kosakola. Boniboni bososoli ya bomoi mpe misala ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa bansango mingi, kende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Makomi eteyi ete tokoki kotelema liboso ya Nzambe “na nzela ya bokoki, mpe mawa, mpe ngolu ya Mosantu Masiya” (2 Nefi 2:8). Masiya ezali “nkombo moko ya Alamayika mpe Ebele elakisi ‘mopakolami.’ … Na Boyokani ya sika Yesu abengami Klisto, oyo na lokota ya bamwela elakisi Masiya. Elakisi Profeta apakolama, Nganganzambe, Mokonzi, mpe Mokangoli.”1

Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga Likoki ya bapostolo Zomi na Mibale atatolaki ete: “nayebi[Yesu Klisto] azali Mosantu Moko ya Yisalaele, Masiya oyo mokolo moko akoya lisusu na nkembo ya suka, koyangela na mabele lokola Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi na bakonzi. Nayebi ete ezali na nkombo mosusu te epesameli na nse ya lola na yango mobali [to mwasi] akoki kobikisama”2

“[Yesu Klisto] azali Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili,” elobaki Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mopesi toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo. “Ye azali Masiya oyo alakamaki. Ye atambwisaki bomoi ya kokoka mpenza mpe amikabaki mpona masumu na biso. Ye akozalaka libela na libela na ngambo na biso. Ye akobunda bitumba na biso. Ye azali elikya na biso; Ye azali lobiko na biso; Ye azali nzela.”3

Makomi ya Kobakisa

Yoane 1:38–41; 4:25–26, 40–42; 2 Nefi 6:13; 25:16–17

Uta na Makomi

Bayekoli ya Klisto ya basi bazalaki na matatoli ya mosala na Ye lokola Masiya. Malia Magadala azalaki moyekoli ya Yesu Klisto. Azalaki moto ya yambo komona “libanga elongolami uta na nkunda” na ntongo ya Lisekwa ya Klisto. Ye “atelemaki libanda ya nkunda kolelaka” na sima ya komonaka ete nzoto na Ye ezalaki lisusu na lilita te.

Nsima “abalukaki, mpe amonaki Yesu atelemi, mpe ayebaki te ete ezalaki Yesu.

“Yesu alobaki na ye, Mwasi, ozali kolela mpo na nini? Ozali koluka nani? Ye, kokanisaka ete azali mosali bilanga, alobaki na ye, Tata, soki olongoli ye awa, yebisa ngai na lombango epai otie ye, mpe nakokende kolongola ye.

“Yesu alobaki na ye, Malia Ye abalukaki, mpe alobaki na ye, Labuni, oyo elingi koloba, Molakisi.” Malia asosolaki ete Ye azalaki mosali elanga te kasi Yesu Klisto, Masiya. (Tala Yoane 20:1–17.)

Matangi

  1. Bokambi ya makomi, “Masiya”; makomi.lds.org.

  2. Jeffrey R. Holland, “The Only True God and Jesus Christ Whom He Hath Sent,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2007, 42.

  3.  Dieter F. Uchtdorf, “Nzela ya Moyekoli,” Liahona, sanza ya Mitano 2009, 78.

Bomaniola oyo.

Mpo na nini ezali na motuya kososola mosala ya Mobikisi lokola Masiya?

Bimisa na lokasa