2015
Mabota mpe Losambo
sánzá ya libwa 2015


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Libwa 2015

Mabota mpe Losambo

Mokolo moko, lokola navandaki pembeni ya mbeto ya tata na ngai na butu, asolisaki ngai na ntina ya bomwana na ye. Alobelaki bolingo ya baboti na ye na bantango ya mpasi mpe bolingo ya Tata na Lola mpe ya Mobikisi na ye. Nayebaki ete ye azalaki pene ya kokufa na bokono ya cancer, boye ekamwisaki ngai te ete na bantango wana asangisa mayoki na ye mpo na Tata na ye ya Lola na bolingo mpe boboto ya tata na ye ya mokili. Tata na ngai azalaki mbala mingi koloba ete ntango azalaki kobondela, akanisaki akokaki na makanisi na ye komona koseka moke ya Tata na Lola.

Baboti na ye bateyaki ye na ndakisa mpo na kobondela lokola soki azalaki koloba na Nzambe mpe ete Nzambe akoyanola ye na bolingo. Asengelaki na ndakisa oyo kino na nsuka. Ntango mpasi ekomaki makasi, tokutaki ye na ntongo na mabolongo na ye pembeni ya mbeto. Akomaki na bolembu makasi mpo na kozonga na mbeto. Alobaki na biso ete azalaki kobondela mpo na kosenga na Tata na ye na Lola mpo na nini asengelaki koniokwama mingi koleka ntango azalaki ntango nionso komeka kozala malamu. Alobaki ete eyano moko ya boboto eyaki: “Nzambe azali na mposa ya bana mibali ya mpiko.”

Mpe boye akobaki kobunda kino na nsuka, kolikiaka ete Nzambe alingaki ye, ayokaki ye, mpe akoki kotombola ye likolo. Apambolamaki na koyebaka na bomwana mpe na kobosanaka te ete Nzambe moko ya bolingo azali pembeni na libondeli.

Yango wana Nkolo ateyaki baboti ete, “Mpe basengeli lisusu koteya bana na bango kobondela, mpe kotambola na bosembo liboso ya Nkolo ” (D&A 68:28).

Nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisamaki— elongo na Buku ya Mormon mpe bafungola nionso ya bonganganzambe oyo ekoki kokangisa mabota —mpamba te Joseph Smith lokola elenge mobali asambelaki na bondimi. Azwaki bondimi wana na libota moko ya bolingo mpe ya botongono.

Mibu ntuku mibale eleki Nkolo apesaki mabota toli oyo na “Libota Esakola mpo na Molongo” uta na Bakambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale: Mabala mpe mabota ya elonga etongami mpe esimbami na mabongisi ya bondimi, losambo, boyamboli, bolimbisi, limemia, bolingo, motema mawa, mosala, mpe masano ya peto ya libota mobimba.”1

Tozali na niongo moko monene ya botondi mpo na libota ya Profeta Joseph Smith mpo na ndenge bakolisaki ye. Libota na ye ezalaki bobele ndakisa ya bondimi mpe losambo te kasi lisusu boyamboli, bolimbisi, limemia, bolingo, motema mawa, mosala, mpe masano ya peto ya libota mobimba.”

Bankola oyo ekoya nsima na bino ekoki kobenga bino bapambolami mpo na ndakisa na yo ya losambo kati na mabota na yo. Okoki kobimisa mosali monene moko ya Nzambe te, kasi okoki na nzela ya mabondeli na yo mpe ndakisa na yo ya bosembo kosalisa Nkolo Yesu Klisto kobimisa bayekoli malamu mpe ya bolingo.

Na nionso oyo okoki kopona kosala mpo na kosalisa Nkolo, losambo ekozala na kati kati na yango. Wana ezali bongo momesano ya bato oyo, ntango bazali kobondela, bazali kofula basusu mpo na kofungola miso na bango mpo na komona nani azali kuna. Okoki kokoma moto ya lolenge wana.

Kanisa nini yango ekoki kolimbola na baoyo bafukamaka elongo na yo na libondeli ya libota. Ntango bayoki ete ozali koloba na Nzambe kati na bondimi, bondimi na bango ekokola mpo na koloba na Nzambe mpe lokola. Ntango ozali kobondela mpo na kotonda Nzambe mpo na mapamboli oyo bayebi ete ekomaki, bondimi na bango ekokola ete Nzambe alingi bango mpe ete Ye azali koyanola mabondeli na bino mpe akoyanola ya bango. Yango ekoki kosalema na losambo ya libota bobele ntango ozwi boyebi wana na nzela ya losambo na yo moko, mbala na mbala.

Nazali kokoba kopambolama na tata mpe mama oyo basololaki na Nzambe. Ndakisa na bango ya nguya ya losambo kati na mabota ezali kokoba kopambola bankola oyo eyaki nsima na bango.

Bana mpe bankoko na ngai bapambolami mikolo nionso na ndakisa ya baboti na ngai. Batikelaki bango bondimi ete Nzambe ya bolingo ayokaka mpe ayanolaka mabondeli. Okoki kosala libula moko ya lolenge wana kati na libota na yo. Nabondeli ete okoka kosala yango.

Matangi

  1. “Libota: Esakola na Molongo,” Liahona, Sanza ya zomi na Moko. 2010, 129.

Kundola mobu ya mbala ya 20 ya mbotama ya Esakola na ntina ya Libota

“Libota: Esakola na Molongo” eteyi mabongisi oyo emonani ya ntango ya lelo lokola kaka ya ntango elakisamaki yambo na Sanza ya Libwa 23, 1995. Zwa mbela ya moto na moto to ya mabota bozali koteya mpo na kokundola mobu ya mbotama ya mbala ya 20 ya esakola na:

  1. Kokomaka mabongisi kati na yango oyo ezali na ntina ya malonga mpo na bango. (Tala boniboni Mokambi Eyring asali yango na losambo na etinda likolo.)

  2. Sololaka boniboni libongisi moko na moko ekoki kopambola bango lelo mpe na mikolo mikoya.

  3. Tiaka bantina ya sikisiki mpo na kokotisa mabongisi wana kati na bomoi na bango mpe kokabola yango elongo na basusu.

Bimisa na lokasa