Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya mitano 2016
Akotia Yo na Mapeka na Ye mpe Akomema Yo na Ndako
Kaka lokola Mobateli Mpate Malamu amonaki mpate na Ye ebunga, soki okotombola motema na yo epai ya Mobikisi ya mokili, Akomona yo.
Moko ya masolo na ngai ya bomwana oyo nalingaka mingi ebandi na kolela ya loseba ya mosika ya bitumba ya mpepo oyo elamusaki ngai na mpongi. Mosika liboso, lokito mosusu, makelele mpe nungunungu moke ya bamotele, mokemoke ezali kobuta kino eningisa mopepe nionso. Kolakisama malamu na mama na biso, biso bana moko na moko tozwaki saki na biso mpe tokimaki na ngomba ya moke epai ya ebombamelo ya bombi. Wana ezali biso kotambola mbango na katikati ya butu makasi, mwinda ya langi ya pondu mpe pembe ezali kokweya uta na likolo mpo na kotia bilembo na biloko ya kobwakela bombi. Na kokamwa mpenza, moto nionso azali kobenga mwinda oyo banzete ya Noel.
Nazali na mibu minei, mpe nazali nzeneneke ya mokili oyo ezali na bitumba.
Dresden
Mosika te na esika oyo libota na ngai efandaki ezalaki na engumba babengi Dresden. Baoyo bazalaki kuna bamonaki ntango mosusu mbala nkoto maye namonaki. Moto ebele, oyo esalamaki na bankoto ya batoni ya babombi, epanzanaki na Dresden, kobebisaka mingi koleka 90% ya engumba mpe kotikaka kaka koleka biteni mpe putulu nsima na yango…
Na ngonga moke mpenza, engumba oyo ebengamaka kala “Jewel Box” ezalaki lisusu te. Erich Kästner, mokomi ya Alemand, akomaki na ntina ya libebi yango, “Na mibu nkoto, etongamaki kitoko na ye, na mobu moko ebebisamaki nionso.”1 Na bomwana na ngai nakokaki kobanza te boniboni libebi esalami na bitumba oyo bato na biso babandaka ekokaki kosilisama. Mokili nzinganzinga na biso emonanaki lokola ya kozanga elikia mpenza, mpe na lobi moko te.
Mobu moleki, nazwaki libaku ya kozonga na Dresden. Mibu ntuku nsambo nsima ya bitumba, ezali, mbala moko lisusu, “Jewel Box” ya engumba. Bitikali ya ndako elongolamaki, mpe engumba ezongisami mpe kutu ebongisami.
Na kotala na ngai ya nsuka namonaki eklezia kitoko ya Balutherien, Frauenkirche, Eklezia ya Mama na Biso. Ntango etongamaka na ba 1700, ezalaki moko ya bapauni ya kongenga ya Dresden, kasi bitumba ekomisaki yango liboke ya bitenibiteni. Mibu mingi etikalaki lolenge wana, kino na nsuka mokano ezwamaki ete Frauenkirche ekotongama lisusu.
Mabanga oyo euta na eklezia ebukana ebombisamaka mpe ebongisamaka, mpe soki ekoki na yango, esalelamaki na kotonga lisusu. Lelo okoki komona mabanga oyo eyindisama na moto kotikaka bilembo na bifelo ya libanda. “Bilembo” oyo ezali kaka likundoli ya lisolo ya etumba ya etonga oyo te kasi ekeko mpo na elikia—elembo kitoko ya makoki ya moto mpo na kokela bomoi ya sika uta na putulu.
Wana ezalaki ngai komaniola lisolo ya Dresden mpe nazalaki kosepela na mayele mpe mokano ya baoyo bazongisaki oyo ebukanamaka mobimba mpenza, namiyokaki nguya kitoko ya Molimo Mosantu. Solo, nakanisaki, soki moto akoki kozwa motango ya bitikali ya ndako, biteni biteni, mpe libomi ya engumba ebukana mpe kotonga lisusu mpe ndako moko ya kokamwa oyo ekotelema na lola, boniboni Tata na biso ya Nguya Nionso azali na makoki ya kozongisa bana na Ye oyo bakwei, bazali kobunda, to babungisami?
Atako boniboni bomoi na biso ekokaki kotikala biteni. Atako boniboni motane ya masumu na biso, boniboni mozindo ya bololo na biso, boniboni komiyoka yo moko, ya kobwakisama, to ya kobukana mitema na biso ezali. Kutu baoyo bazangi elikia, oyo bafandi na elikia te, oyo bateki elikia, batiki bosembo na bango, to bakomaki mosika na Nzambe bakoki kotongama lisusu. Longola se mpo na bana mibali ya libungi, ezali na bomoi moko ya kobeba mpenza te oyo ekoki kozongisama te.
Nsango ya esengo ya nsango malamu yango oyo: mpo na mwango ya seko ya esengo oyo epesami na Tata na biso ya kolingama na Lola mpe na nzela ya libonza ezanga nsuka ya Yesu Klisto, tokoki bobele kosikolama te uta na ezalela na biso ya kokweya mpe kozongisama na bopeto, tokoki koleka likolo ya makanisi ya bato mpe kokoma basangoli ya bomoi ya seko mpe bakaboli ya nkembo ya Nzambe ezanga ndimbola.
Lisese ya Mpate Ebunga
Na eleko ya mosala ya Mobikisi, bakambi ya biyamba ya ntango wana bandimaki Yesu te kolekisaka ntango na bato oyo babengaka “basumuki.”
Ntango mosusu mpo na bango ezalaki komonana lokola ete Ye azalaki koyamba to kutu kondima bizalela ya masumu. Ntango mosusu bazalaki kondima ete nzela ya malamu mingi mpo na kosalisa basumuki koyambola ezalaki na kokweisaka, kotiolaka, mpe koyokisaka bango nsoni.
Ntango Mobikisi ayebaki maye bafalisao mpe bato na mayele bazalaki kokanisa, Alobaki lisolo moko:
“Nani kati na bino, oyo azali na bameme nkama, soki abungisi moko kati na bango, mpe atika te ntuku libwa na libwa kati ya esobe, mpe akende koluka oyo abungi, kino azwa yango?”
“Esili ye kozwa yango akotia yango na mapeka na ye na kosepela.”2
Mibu nkama eleki, lisese oyo esosolamaki na banso lokola libiangi na mosala mpo na biso tozongisa mpate ebunga mpe tosembola loboko na baoyo babungi. Ntango oyo ezali solo malamu, nakokamwa soki ezali na mingi kati na yango.
Ekoki kosalama ete ntina ya Yesu, ntina mingi koleka, ezalaki koteya oyo etali mosala ya Mpate Malamu?
Ekoki kosalema ete Azalaki kotatola na ntina ya bolingo ya Nzambe mpo na bana na Ye bazanga botosi?
Ekoki kosalema ete etinda ya Mobikisi ezalaki ete Nzambe ayebi mpenza baoyo babungi—mpe ete akomona bango, kosembola loboko epai na bango, mpe kobikisa bango?
Soki yango ezali bongo, nini mpate esengeli kosala mpo na kolongobana mpo na lisalisi na ye ya bonzambe?
Bampate basengeli koyeba boniboni kosalela sextant mpo na koyeba bisika nini azali? Mwango ezali na mposa ya kosalela GPS mpo na kolimbola esika na ye? Esengeli kozala na boyebi ya kokela bongo ya ordinatele oyo ekoluka lisalisi? Mpate ezali na mposa ya masungi na moto ayebana liboso Mobateli Mpate Malamu aya kobikisa?
Te. Mpenza te. Mpate elongobani ya libiki kaka mpamba te elingami na Nzambe.
Mpo na ngai, lisese ya mpate ebunga ezali moko ya matangi ya elikia mingi kati na makomi nyonso.
Mobikisi na biso, Mobateli Mpate Malamu, ayebi mpe alingi biso. Ayebi mpe alingi yo.
Ayebi ntango obungi, mpe Ayebi bisika nini ozali. Ayebi mpasi na yo. Libondeli na yo ya nse. Babobangi na yo. Mpinzoli na yo.
Likambo te boniboni okomi ya kobunga—atako soki mpo na boponi ya yomei ya mabe to mpo na makambo oyo elekeli yo.
Nionso oyo ezali na ntina mpenza ezali ozali mwana na Ye. Mpe Ye aingi yo. Alingi bana na Ye.
Mpamba te Alingi yo, Akomona yo. Akotia yo likolo ya mapeka na Ye, kosepelaka. Mpe ntango Amemi yo na ndako, Akoloba na moto nyonso, “Sepela na ngai; mpo ete nazwi mpate na ngai oyo esilaki kobunga.”3
Nini Ekoki Biso Kosala?
Kasi, bokokaki kozala kokanisa, motambo ezali wapi? Solo nasengeli kosala mingi koleka kaka kozela kobikisama.
Atako Tata na biso ya bolingo azali na mposa ete banso ya bana na Ye bazonga epai na Ye, Akozwa moko te na makasi mpo na kozongisa na lola.4 Nzambe akobikisa biso te soki biso tolingi te.
Bongo nini esengeli biso kosala?
Libengisi na Ye ezali pete:
“Botala … epai na ngai.”5
“Boya liboso na ngai.”6
“Bopusana pembeni na ngai mpe nakopusana pembeni na bino.”7
Oyo ezali lolenge ya kolakisa Ye ete tolingi kobikisama.
Esengaka mwa bondimi. kasi kobungisa elikia te. Soki bokoki kobota bondimi te sasaipi, bobandela na elikia.
Soki okoki koloba te ete Nzambe azali kuna, okoki kolikia ete Azali. Okoki koyoka mposa ya kondima.8 Yango ekoki mpo na kobanda.
Nde, kosalaka likolo ya elikia wana, sembola loboko epai ya Tata ya Lola. Nzambe akosembola bolingo na Ye epai na yo, mpe mosala na Ye ya kobikisa mpe kobongwanisa ekobanda.
Nsima ya ntango, okoyeba lisusu loboko na Ye na bomoi na yo. Okoyoka bolingo na Ye. Mpe mposa ya kotambola kati na pole na Ye mpe kolanda nzela na Ye ekokola na litambe nionso ya bondimi ozali kotia.
Tobengaka matambe oyo ya bondimi “botosi.”
Oyo ezali liloba eyebani mingi mikolo oyo te. Kasi botosi ezali liloba ya motuya kati na nsango malamu ya Yesu Klisto, mpo ete toyebi ete “Bomikabi ya Klisto, bato banso bakoki kobikisama, na kotosaka mibeko mpe makuli ma Nsango elamu.9
Ntango tobuti kati na bondimi, tosengeli lisusu kobuta na botongono. Liboso natangaki mokomi ya Almangne oyo alelaki libebi ya Dresden. Akomaki lisusu maloba oyo: “Es gibt nichts Gutes, ausser Man tut es.” Mpo na baoyo balobaka lokota ya selestiale te, oyo ebongolami lokola “Ezali na eloko moko malamu te soki osali yango te.”10
Bino mpe ngai tokoki koloba na nguya mpenza na ntina ya makambo ya molimo. Tokoki kokamwisa bato na bososoli na biso ya mayele mpenza ya makambo ya biyamba. Tokoki koloba na esengo na ntina ya Nzambe mpe “kolota ndako [na biso] na likolo.”11 Kasi bondimi na biso ebongwanaka te lolenge tozaleleli na bomoi—Soki boyambi na biso ezali kotindika mikano na biso ya mokolo na mokolo te—Eyamba na biso ezali mpamba, mpe bondimi na biso, soki ya kokufa te, ezali solo malamu te mpe ezali na likama ya kokufa na nsuka.12
Botosi ezali makila ya bomoi ya bondimi. Ezali na nzela ya botosi nde tozwaka bosolo mpe nkembo.
Kasi ntango mosusu nakanisaka ete tososolaka botosi malamu te. Tokoki komona botosi lokola nsuka na yangomei, na esika ete ezala nzela ememaka na nsuka. To tokoki kotuta malato ya lisese ya botosi na ebende ya mitindo kolukaka kosembola baye tolingaka, na kobetaka ntango nionso mpe kobukaka mbala na mbala, mpo na kokoma eloko esantu koleka, ya lola.
Ntembe te mpo na yango, ezali na bangonga oyo tozali na mposa ya libiangi makasi mpo na koyambola. Solo, ezali na basusu oyo bakoki kosalisama kaka na lolenge oyo.
Kasi ntango mosusu ezali na lisese ekeseni oyo ekoki kolimbola mpo na nini totosaka mitindo ya Nzambe. Ntango mosusu botosi ezali mpenza te nzela ya kongumbaka, kokamolaka, mpe kotutaka milimo na biso mpo na kokomisa yango eloko oyo tozali te. Na esika wana, ezali nzela na yango tomonelaka tosalelama mpenza na nini.
Tokelami na Nzambe ya Nguya Nionso. Nzambe Azali Tata wa Biso na Lola Tozali mpenza bana ba Ye ba molimo. Tosalami na biloko ya lola oyo ezali kitoko ya motuya mpe likolo, mpe boye tomemaka kati na bisomei biloko ya bonzambe.
Nzokande, awa na mabele, makanisi mpe misala na biso etondisami na maye ezali ya kobeba, esantu te, mpe peto te. Putulu mpe mbindo ya mokili ya kanda ebebisi milimo na biso kosalaka yango mpasi mpo na koyeba lisusu mpe komikundola libula mpe ntina na biso.
Kasi nionso oyo ekobongola te banani tozali mpenza. Bonzambe na biso ya ebandeli ya ezalela na biso etikalaka. Mpe ntango toponi kotombola mitema na biso epai ya Mobikisi na biso ya bolingo mpe totie lokolo na nzela ya kimoyekoli, eloko moko ya kokamwa esalamaka. Bolingo ya Nzambe etondisaka mitema na biso; pole ya bosolo etodisaka milimo na biso; tobandi kobungisa mposa ya kosumuka; mpe tolingi kotambola na molili lisusu te.13
Tokoya komona botosi lokola etumbu te kasi lokola nzela ya kokangolama ememi na lobi na biso ya bonzambe. Mpe mokemoke, mabe, putulu, mpe bandelo ya mabele oyo ebandi kokweya. Na nsuka, molimo ya ntalo mpenza, seko ya lola kozalaka kati na biso ebimisami, mpe bongengi ya bolamu ekomi ezalela na biso.
Bolongobani na Lobiko
Bandeko mibali mpe basi, natatoli ete Nzambe amonaka biso lokola tozali solo mpenza—lokola tozali solo—mpe Amonaka biso tolongobani na lobiko.
Okoki komiyoka ete bomoi na yo ezali ya kokweya. Okoki kosumuka. Okoki kobanga, kokanga nkanda, kozala na mpasi, to kotungisama na ntembe. Kasi kaka lokola Mobateli Mpate Malamu amonaki mpate na Ye ebunga, soki okotombola motema na yo epai ya Mobikisi ya mokili, Akomona yo.
Akobikisa yo.
Akotombola yo mpe kotia yo na mapeka na Ye.
Akomema yo na ndako.
Soki maboko ya kufa ekoki tobongola bitinka mpe biselenginia na ndako ya kitoko ya kokumbamela, nsima tokoki kondima ete bolingo ya Tata na Lola ekoki kotonga biso lisusu. Mwango na Ye ezali ya kotonga biso mpo tokoma eloko moko monene mpenza koleka nini tozalaka kala—monene koleka oyo tokoki naino kokanisa. Na litambe moko na moko ya bondimi na nzela ya kimoyekoli, tozali kokola mpo na kokoma bikelamu ya nkembo ya seko mpe esengo ezanga ndelo oyo totangamaki kokoma.
Oyo ezali litatoli na ngai, lipamboli na ngai, mpe losambo na ngai na nkombo ya bule ya Nkolo na biso, na nkombo ya Mobikisi: “Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.”
© 2006 na Intellectual Reserve, Inc. Lotomo nyonso na bakomi. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/15. Bobongoli endimami: 6/15. Bobongoli ya Visiting Teaching Message, May 2016. Lingala. 12865 639