2016
Kokabolaka Bisengo ya Seko
sánzá ya mwambe 2016


Bilenge

Kokabolaka Bisengo ya Seko

Moko ya makambo ya ntina na ntina ya nsango malamu ezali boyebi ya mwango ya lobiko. Tozali na libaku kitoko ya kozala elongo na mabota na biso mpo na seko. Boyebi yango esungaka biso tozala na elikya ntango toyoki kozindisama na mokili. Mokambi Eyring ateyi, “Tata na biso ya Bolingo ya Lola ayebaka mitema na biso. Ntina na Ye ezali ya kopesa biso esengo (tala 2 Nefi 2:25). Mpe bongo Ye apesaki likabo ya Mwana na Ye mpo na kopesa esengo na mikangano ya mabota oyo ekokoba seko. … Ezali mosala oyo mwana nionso ya Nzambe oyo ayei na mokili akoki kozwa.”

Lipamboli yango epesameli na baoyo ya biso bazali na bomoi sikawa mpe baoyo bakufa—kasi kaka na nzela ya lisungi na biso. Bankoko na biso bazali na mokili ya molimo sikawa, bazali kozelaka biso tolengela bankombo na bango mpo ete makuli ya tempelo esalema mpo na bango. Kasi ntango mosusu ekoki kozala mpasi makasi mpo na kosalela bango. Tokoki kozala na ntango te, to tokoki kozala mosika makasi na tempelo mpo na kokendaka ntango nionso.

Libaku malamu, ezali na ndenge ebele mosusu oyo tokoki kosunga bankoko na biso, lokola kosala mosala ya masolo ya libota, kokotisaka, to bobateli ntango bankoko bazali kokenda na tempelo. Na nzela ya lisungi, tosungaka Nkolo mpe tomemaka elikya ya mabota ya seko na baoyo bazali na ngambo mosusu ya elamba.

Bimisa na lokasa