2016
Elikya ya Libota ya Seko ya Bolingo
sánzá ya mwambe 2016


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya mwambe 2016

Elikya ya Libota ya Seko ya Bolingo

Na makabo nionso oyo Tata na biso ya bolingo apesaki biso bana na Ye, ya motuya koleka ezali bomoi ya seko (tala D&C 14:7). Likabo yango ezali kozala na bomoi na miso ya Nzambe Tata mpe Mwana na Ye ya Bolingo mpo na libela kati ya mabota. Bobele na babokonzi ya likolo koleka ya Nzambe, selesitiale, mikangano ya bolingo ya mabota ekokoba kuna.

Banso kati na biso tolikii na esengo ya kozala na mabota ya bolingo. Mpo na bayike kati na biso, ezali liyoki oyo naino tomoni te—liyoki toyebi ezali solo kasi naino esalemi te. Tokoki komona yango na babomoi ya basusu. Mpo na basusu kati na biso, bolingo ya libota emonisami kozala solo koleka mpe ntina koleka ntango kufa ekabolaki biso na mwana moko, mama, tata, ndeko mwasi, to moko ya bolingo mpe nkoko ya bolingo.

Toyokaki banso elikya ete mokolo moko tokoki koyoka lisusu esengo ya baye libota wana oyo tolingaki mingi mpe mpasi sikawa mpo na koyamba lisusu.

Tata na biso ya bolingo ya Lola ayebi mitema na biso. Ntina na Ye ezali ya kopesa biso esengo (tala 2 Nephi 2:25). Mpe bongo Apesaki likabo ya Mwana na Ye ezala ntina ya esengo ya mikangano ya mabota oyo ekokoba libela. Mpo Mobikisi akataki singa ya kufa, banso tokosekwa. Mpo Amikabaki na ntina ya masumu na biso, tokoki, na nzela ya bondimi na biso mpe boyamboli, kokoma babongi nie na bokonzi ya selesitiale, esika mabota esangani elongo na bolingo ya libela.

Mobikisi atindaki Profeta Eliya epai ya Joseph Smith mpo na kozongisa bafungola ya bonganganzambe (tala D&C 110). Na bafungola yango nguya ya bokangisi eyaki, kopesaka likabo ya bokasi ya Nzambe na bana na Ye—bomoi ya seko kati ya mabota ekangisami mpo na libela.

Ezali mosala oyo mwana nionso ya Nzambe oyo ayei na mokili oyo akoki kozwa. Moko ya misato ya bana na Ye ya molimo abwakisaki mosala na Ye na mokili ya molimo. Na bozangi bondimi ekoka mpe sima afungoli botomboki, baponi atako moke te koyeba esengo ya likabo ya Tata na Lola ya mabota ya seko.

Mpo na baoyo ya biso balekaki momekano ya ntina na mokili ya molimo ya yambo ya nkufa mpe bapesameli ndingisa ya kozwa likabo banzoto ya nkufa, liponi monene ya bomoi ya seko ezali kino sikawa eloko tosengeli kozala na yango. Soki topambolami mpo na kozwa nsango malamu ezongisama, tokoki kopona kosala mpe kobatela mayokani na Nzambe oyo epesi biso ndingisa ya bomoi ya seko. Ntango toyiki mpiko na bondimi yango, Molimo Mosantu ekondimisa elikya na biso mpe bondimami ete tozali na nzela oyo ememi na bomoi ya seko, mpo na kozala elongo na mabota mpo na seko kati ya bokonzi ya selesitiale.

Mpo na bayike, esengo ya seko wana ekoki komonisama kosila to kutu kosila ngala ya elikya. Baboti, bana, bandeko mibali, mpe bandeko basi bakoki kozala basala maponami oyo elongola bango na bomoi ya seko. Bokoki kutu komitungisa soki boponami kozala na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Profeta moko ya Nzambe mokolo moko ateyaki ngai oyo epesaki ngai kimia. Nayokaki mpasi ete maponami ya basusu ekokaki kopesa bango ndingisa te mpo na libota na biso ezala elongo mpo na libela. Alobaki ete, “ozali koyoka mpasi mpo na likambo ya mpamba. Ozali bobele na bomoi ebonga nie ya bokonzi ya selesitiale, mpe bolengeli ya mabota ekozala malamu mingi koleka makanisi.”

Na oyo nionso azali koleka na boyebi na yemei to na libala mpe bana—to bozangi na yango—epesi molili likolo ya elikia na ye, napesi litatoli na ngai: Tata na Lola ayebi mpe alingaka yo lokola mwana na Ye ya molimo. Na ntango ozalaki na Ye mpe Mwana na Ye ya Bolingo yambo ya bomoi oyo, Batiaki kati ya motema na yo elikya ozali na yango ya bomoi ya seko. Elongo na nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto kosalaka mpe elongo na bokambami ya Molimo Mosanto, bokoki koyoka sikawa mpe bokoyoka na mokili ekoya bolingo ya libota ya Tata na bino mpe Mwana na Ye ya Bolingo balingi bino mingi bozwa.

Natatoli ete lokola bozali na bomoi ya kobonga nie ya bokonzi ya selesitiale, elikya ya profeta oyo “babolengeli ya libota ekozala malamu koleka koleka bokoki kokanisa te” ekozala ya bino.

Koteya uta na Etinda oyo

Botala na ebandeli na koyebisaka baoyo bozali koteya na ntango oyo bozalaki na esengo mpo na elikya ya mabota ya seko. Bobengisa bango bamaniola bantango oyo bayokaki botondi mpo na mabota ya seko. Botuna bango soki basepelaki kokabola. Bokoki sima kobengisa bango kokanisa ndenge ya kobongisa mpe kozala na bomoi ya kobonga nie koleka ya bokonzi ya selesitiale oyo profeta alaki ya “babolengeli ya libota … malamu mingi koleka bokoki kokanisa te” ekoki kozala ya bango.