2016
Nzela Ebonga Mpenza Ememaka na Esengo
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2016


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Zomi na Moko 2016

Nzela Ebonga Mpenza Ememaka na Esengo

Natatoli mpo na likabo oyo ezali mwango ya Tata na biso mpo na biso. Ezali moko ya nzela ebonga mpenza ememaka na esengo mpe kimia.

Bandeko balingami na ngai ya mibali mpe basi, awa na Ndako ya Makita mpe na mokili mobimba lokola, nazali na botondi mpenza mpo na libaku ya kokabola makanisi elongo na bino na ntongo oyo.

Mibu ntuku mitano na mibale eleki, na sanza ya nsambo 1964, nazwaki mokumba na New York City na ntango Bolakissi biloko ya koteka ya Mokili esalemaki kuna. Na ntongo mpenza nakendaki kotala Ndako ya Bamormon na bolakisi yango. Nakomaki ntango moke yambo bolakisi ya film ya Eklezia Man’s Search for Happiness, emoniseli ya mwango ya lobiko oyo uta ntango wana eyaki koyebana mingi na Eklezia. Nafandaki mpembeni ya elenge mobali oyo azalaki ntango mosusu na mibu 35. Tosololaki moke. Azalaki mondimi ya Eklezia na biso te. Bongo minda ezimamaki, mpe film ebandaki.

Toyokamelaki mongongo ya molobi ntango atunaki mituna ya ntina mpe ya mpo na bato banso: “Nawuta wapi? Mpo na nini nazali awa? Nakokende wapi ntango nakotika bomoi oyo?Tokokende wapi nsima ya bomoi oyo? Matoyi nyonso etelemaki mpo na koyoka biyano, mpe miso nyonso ebandaki kotala mpenza bilili na etando. Bolimboli ya bomoi na biso yambo ya kufa epesamaki, elongo na yango ndimbola ya ntina na biso na mabele. Tomonaki foto oyo esalaki mpasi na motema ya boleki uta na bomoi oyo ya koko mobali moko mpe bosangani na ye ya nkembo elongo na balingami na ye bakenda liboso na ye na mokili ya milimo.

Na nsuka ya bolakisi kitoko oyo ya mwango ya Tata na biso ya Lola mpo na biso, lisanga na kimia ebimaki libanda, mingi basepelaki na nsango ya film. Elenge motali mpembeni na ngai atelemaki te. Natunaki soki asepelaki na film. Ayanolaki na nguya: “Oyo ezali bosolo!”

Mwango ya Tata na biso mpo na bosepeli na biso mpe lobiko na biso ekabolami na bamisionele na mokili mobimba. Banso te oyo bayoki nsango ya bonzambe oyo bandimi mpe bayambi yango. Nzokande, mibali mpe basi bisika nyonso, kaka lokola moninga na ngai elenge na Bolakisi ya biloko ya koteka ya Mokili na New York, bazali kondima babosolo na yango, mpe bazali kotia makolo na bango na nzela oyo ekokamba bango na kimia na ndako. Bomoi na bango ebongwami libela.

Ntina ya mwango ezali Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Kozanga libonza ya bomikabi na Ye, banso bakobunga. Yango ekoki te, nzokande, ezali pete mpo na kondimela Ye mpe misio na Ye. Tozali na mposa ya kosala mpe koyekola, koluka mpe kosambela, koyambola mpe kobongisa. Tozali na mposa ya koyeba mibeko ya Nzambe mpe kosalela yango. Tosengeli kozwa makuli na Ye ya lobiko. Bobele na kosalaka bongo nde tokozwa esengo ya solo, ya seko.

Topambolami ya kozala na bosolo. Tozali na mokumba ya kokabola bosolo. Tika biso tosalela bosolo, mpo ete tokoka kozwa litomba ya nyonso oyo Tata azali na yango mpo na biso. Asalaka eloko moko te soki mpo na litomba na biso te. Alobeli biso, “Oyo ezali mosala na ngai mpe nkembo na ngai—kosala bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.”1

Uta na mizindo ya molimo na ngai, mpe na bomikitisi bonso, natatoli mpo na likabo monene oyo ezali mwango ya Tata na biso mpo na biso. Ezali moko ya nzela ebonga mpenza ememaka na kimia mpe esengo awa mpe na mokili ekoya lokola.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, natikeli bino bolingo na ngai mpe mapamboli na ngai ntango nasukisi lisukulu na ngai, mpe nasali bongo na nkombo ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso, kutu Yesu Klisto, amene.