2017
Lokola Nalingi Bino
sánzá ya míbalé 2017


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Mibale 2017

“Lokola Nalingi Bino”

Mwa mibu eleki moninga moko babengi Louis abetelaki ngai lisolo moko kitoko etali mama na ye ya boboto, ya mongongo moke. Ntango akufaki, atikelaki bana na ye ya mibali mpe ya basi nkita moko te ya mosolo kasi na esika lisango ya bozwi na ndakisa, na komibonza, na botosi.

Nsima ya koloba maloba na lokumu ya mowei mpe ya kosala mobembo ya mawa tii na lilita, libota oyo ekolaki ebongisaki babozwi moke oyo mama atikaka. Kati na yango, Louis amonaki mokanda moko mpe fungola. Mokanda yango elobaki: “Na litumu ya lisuku ya kolala, na nse ya ebombelo ya alumwalo na ngai, ezali na mwa sanduku moko. Ezali na biloko ya motuya ya motema na ngai. Fungola oyo ekofungola sanduku yango.”

Banso bamitunaki nini mama na bango azalaki na yango ya motuya monene mpo na kokanga yango na sanduku.

Balongolaki sanduku na esika efandaki mpe bafungolaki yango na bokebi kosalelaka fungola. Ntango Louis mpe basusu basosolaki biloko ya sanduku, bamonaki foto ya mwana moko na moko yemei, na nkombo mpe mokolo ya mbotama ya mwana. Nsima Louis abimisaki cadeau ya santu valentini esalama na ndako. Na mokuse, ekomeli ya bana mike, oyo ayebaki lisusu lokola kozala ya yemei, atangaki maloba oyo akomaka mibu 60 kala: “Mama ya Bolingo, nalingaka yo.”

Bayokaki mpasi mpenza na mitema, mingongo moke, mpe miso ya mai. Eloko ya motuya ya mama ezalaki libota na ye ya seko. Bokasi na ye efandisamaki likolo ya moboko ya sikisiki ya “nalingaka yo.”

Na mokili ya lelo, esika moko te moboko ya libanga wana ya bolingo esengami mingi koleka na libota. Mpe esika moko te mokili esengeli komona ndakisa malamu ya moboko wana koleka bandako ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka oyo basali bolingo motema ya bomoi na bango ya libota.

Mpo na baye kati na biso oyo balobi kozala bayekoli ya Mobikisi Yesu Klisto, Apesi lilako ya mozindo:

“Najali kopesa bino lilako na sika ete, Bolinganaka lokola ngai nalingi bino, ete bino lisusu bolingana.

“Na eye nde bato banso bakoyeba ete bozali bayekoli ba ngai, soki bolingani moko mpe mosusu”1

Soki tobateli motindo ya kolingana moko mpe mosusu, tosengeli kosalisana moko na moko na mawa mpe limemia, kolakisaka bolingo na biso na bakosombitinia na biso ya mokolo na mokolo. Bolingo epesaka liloba ya boboto, eyano ya bompikiliki, ekela ya komipima, litoyi ya kososola, motema ya kolimbisa. Na mangomba na biso nyonso, oyo mpe bikela misusu ekosunga basusu mpo na komona bolingo kati ya mitema na biso.

Mokambi Gordon B. Hinckley (1910–2008) alobaki ete: “Bolingo … ezali mbeki ya wolo na nsuka ya monama (arc-en-ciel). Nzokande, ezali mingi koleka nsuka ya monama. Bolingo ezali na ebandeli lisusu, mpe uta na yango eboti kitoko oyo esalaka egude(vuti) na likolo mobimba mokolo ya ekumbaki. Bolingo ezali kimia oyo bana balelelaka, mposa ya bilenge, ekangisele oyo ekangaka mabala, mpe mafuta oyo epekisaka matata ya kobomaboma kati na ndako; ezali kimia ya bompaka, pole ya moi ya elikya kongengaka kati na liwa. Boniboni ya kofuluka bazali baoyo basepelaka na yango na mangomba na bango elongo na libota, baninga, eklezia mpe bazalani.”2

Bolingo ezali ntina mpenza ya nsango malamu mpe ezalela ya lokumu ya molimo ya moto. Bolingo ezali nkisi mpo na mabota ya maladi, mangomba ya bokono, mpe bikolo ya mpasi. Bolingo ezali koseka, bopepi mbote, liloba ya boboto, mpe maloba ya kokumisa. Bolingo ezali libonza, lisalisi, mpe bomipimi.

Mibali, bolinga basi na bino. Bosalela bango na limemia mpe bonkonde. Bandeko basi, bolinga mibali na bino. Bosalela bango na lokumu mpe bolendisi.

Baboti, bolinga bana na bino. Bosambela mpo na bango, boteya bango, mpe botatalo epai ya bango. Bana, bolinga baboti na bino. Bolakisa bango limemia, botondi, mpe botosi.

Soki bolingo ya mpeto ya Klisto ezali te, Mormon apesi toli, “[biso] tozali eloko moko te.”3 Losambo na gai ezali ete tokoka kolanda toli ya Mormon ya “kosambela epai ya Tata na makasi manso ma motema mwa bino, ete bokoka kotonda na bolingo boye, boye apesi epai ya baye banso bazali balandi ba solo ba Mwana wa ye, Yesu Klisto; ete [to] kokoka kokoma bana ya Nzambe; ete ntango akomilakisa tokozala lokola ye.”4

Koteya uta na Etinda Oyo

Mokambi Monson ateyi biso motuya ya kolakisa bolingo ya Boklisto ya solo, mingimingi na ndako. Bokanisa kosenga na baye bokendaka kotala basangana lokola libota mpe basolola mpo na banzela oyo bakoki kokabolela bolingo na moko na mosusu. Bokoki kolendisa bango bapona moko ya makanisi mpe basala miango mpo bakokisa yango lokola libota. Ndakisa, baye libota bakoki koluka kosala ekela ya lisalisi ya sekele na moye libota mosusu poso na poso. Bokoki kosenga bango bakanisa nsima na lolelenge nini basala makasi mpo na kokokisa ntina na bango kobutisa bolingo na ndako na bango.

Bimisa na lokasa