2018
Pesa toli na ntina ya Bosenga na Bango
Sanza ya Libwa 2018.


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Libwa 2018

Pesa toli na ntina ya Bosenga na Bango

Osengeli kosala yango yo moko te. Kopesa toli ekoki kosunga yo na mposa oyo ozali na yango mpo na kosunga basusu.

Nzambe abiangisi yo osalisa moto to libota na palwasi to etape engebene na bamposa na bango. Lolenge nini omoni bamposa yango? Libongi ya toli, oyo ezalaka ntango nyonso ntina ya Eklezia, ezali fungola.

Sima ya bososoli na ntina ya nini tosengeli na yango, tokosalela:

  1. Sangana elongo na Tata ya Lola.

  2. Kutana elongo na moto otindami mpe libota.

  3. Kutana elongo na moninga na biso.

  4. Mpe kotuna elongo na basusu oyo otindami na ndeko oyo to libota.

Kutana na bakambi na biso mpe ezali ntina. Mabongi ya kosalisa ya atikele oyo ekoya kati ya Liahona ekolobela kokutana na bakambi lokola mosala ya kosalisa balobeli na mosala yango.

Tolobelaka nini

Bososoli ya bamposa ezali ntina mpo na kosalisa moko mpe mosusu. Kasi ndenge nini bamposa oyo ekoki kokokisama, mpe ezali na eloko moko ya motuya koleka bamposa oyo tokoki kokutana na yango?

Bamposa ekoki komonisama na ndenge ebele. Baoyo tosungaka bakoki kozala na mikakatano oyo ezali ya makanisi, ya mosolo, ya nzoto, ya kelasi, mpe ebele. Bamposa mosusu ezali ya likolo koleka basusu. Misusu ekosunga biso tosunga; misusu ekoki kosenga biso tosalela lokola lisungi na biso moko. Na babokasi na biso mpo na koyanola na bamposa ya nzoto, kobosana te ete libiangi na biso ya kosalisa ezali ya kosunga basusu balonga na nzela ya liyokani, kolengela mpe kozwa makuli ya bonganganzambe ya ntina mpo na bonetoli.

Na kobakisa kopesa toli na ntina ya bamposa ya moto to ya libota, tosengeli koluka koyekola babokasi na bango. Mpo na nini bazali na mposa ya lisungi te? Makoki nini mpe makabo nini bazali na yango oyo ekoki kopambola basusu? Lolenge nini balengelami mpo na kosunga botongami ya bokonzi ya Nzambe? Bokasi ya moto ekoki kozala ntina mpo na kososola mposa na ye.

Sangana elongo na Tata ya Lola.

Moko ya mabongi ya ntina ya bondimi na biso ezali ete Tata ya Lola alobelaka bana na Ye (tala Biteni ya Bondimi 1:9). Ntango tozwaka mosala ya sika ya kosalela moto moko, tosengeli kosolola elongo na Tata na Lola na losambo, kolukaka lisungi mpe bososoli na bamposa nabango mpe bokasi. Lolenge ya bosololi wana na nzela ya losambo esengeli kokoba na nzela ya mosala ya lisalisi na biso.

Bosololi na bandimi mpe Mabota

Lolenge mpe ntango nini topusanaka pene ya bandimi mpe mabota tobiangemi kosunga ekoki kotombwama engebene na mabaku, kasi bosololi miso na miso na moto to libota ezali ntina koleka mpo na botongi ya kimoninga mpe bososoli ya bamposa na bango, lisusu na lolenge nini basengelami osungama. Mwa mituna ekoki kozela kino kimoninga ya ntina koleka etongama na naino. Soki lolenge ya malamu ya kosalela yango ezali te, salela oyo elandi:

  • Tala lolenge nini mpe ntango nini basengeli na lisolo.

  • Yekola na ntina ya matomba na bango mpe masolo.

  • Mema masungi mpo na lolenge nini okoki kusunga, mpe tuna na ntina ya masungi na bango.

Ntango totongi bondimi, kotala bosololi na ntina ya mposa ya moto to ya libota. Tuna motuna na botindiki ya Molimo Mosantu.1 Na ndakisa:

  • Mitungisi nini bazali na yango?

  • Bantina ya libota to ya moto ezali nini? Na ndakisa, basalaka likita ya pokwa na libota, to bayanolaka na bosenga ya bomoi na bango?

  • Lolenge nini tokoki osunga bango na bantina ya bosenga na bango mpe na mitungisi na bango?

  • Makuli nini esengeli kosalema na babomoi na bango? Lolenge nini tokoki kosunga bango bamilengela?

Mikundola kosunga, lokola, “Mpokwa nini bolingi tomemela bino bilei na poso oyo?” Bosenga ya mbalakaka, lokola “Yebisa biso toyeba soki tokoki kosunga na eloko moko,” ezali ntina te.

Bosololi na Moninga na Biso

Mpo ete yo na moninga na yo bokozala ntnago nyonso te ntango bokutani na moto to libota, ezali ntina osolola mpe kosangana elongo mpo na kolula bofuli lokola baninga. Oyo ezali mwa mituna ya koyeba:

  • Lolenge nini bokosolola elongo na moko mpe mosusu lokola moninga?

  • Lolenge nini bokoki kosalela bokasi na bino mpo na kosalisa na libota to moto moko kati na mposa?

  • Eloko nini oyekolaki, baboyebi nini ozwaki, mpe botindiki ya molimo nini ozwaki mbala eleki uta osololaki na ntina ya moto to libota?

Bosololi na Basusu oyo Otindami

Ekoki kozala malamu mbala na mbala osolola na basusu oyo batindami kosalisa na moto to libota moko oyo otindami.

Bosolola mpo na Kosilisa Mitungisi

Mpaka Chi Hong (Sam) Wong ya Bantuku nsambo abetaki lisolo moko uta na Malako 2 na mokolo na biso mpo na kotalisa lolenge nini bosololi elongo esalaki ete bato minei bayeba lolenge nini kopesa ndingisa na moto ya maladi ya kolemba biteni ya nzoto nzela ya kokutana na Yesu.

“Esalemaki boye,” elobaki Mpaka Wong. “Bato minei bazalaki kokokisa mosala na bango kowuta na episikopo na bango ya kotala, na ndako na ye, mobali moko oyo azalaki kobela maladi ya kolemba biteni ya nzoto. … Na lisanga ya nsuka mpenza ya palwasi, nsima ya kopesanaka toli etali babosenga na palwasi, episikopo apesaka ‘bitinda’ ya bosungi. Bato minei oyo bapesamaki mosala ya kosunga mobali oyo. …

“[Ntango bakomaki na etonga epai oyo Yesu azalaki,] ndako ezalaki moke. Bakokaki koleka kati na ekuke te. Nandimisami ete bamekaki eloko nionso bakokaki kokanisa, kasi bakokaki kaka te kokota na kati. … Bapesanaki toli mpo na nini kosala nsima—lolenge nini bakokaki komema mobali wana epai ya Yesu Klisto mpo na lobiko. … Bayaki na libongisi moko—ya pete te, kasi basalaki yango.

“… ‘Balongolaki batole esika oyo azalaki: mpe ntango babukaki yango, bakitisaki mbeto moto ya maladi alalaki wana’ (Malako 2:4). …

“… ‘Ntango Yesu amonaki bondimi na bango, alobaki na mobeli ya bolema, Muana mobali, masumu na yo malimbisami yo’ (Malako 2:5).”2

Libiangi ya Kosala

Mpaka Dieter F. Uchtdorf ya Lisanga likoki ya Bapostolo zomi na mibale asengaki, “Bosolola elongo, bosalela makoki nyonso, boluka bofuli ya Molimo Mosantu, bosenga na Nkolo mpo na bokokisi na Ye, mpe sima bosalela bisalelo na bino mpe bokende na mosala.

“Napesi bino elaka: soki bosaleli bomekoli oyo, bokozwa bokambami ya solo lokola na ye, oyo, ntango, mpe wapi epesameli na lolenge ya Nkolo.”3

Matangi

  1. Tala Precher Mon Evangile: A Guide to Missionary Service (2004), 183.

  2. Chi Hong (Sam) Wong, “Rescue in Unity,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2014, 14–15.

  3. Dieter F. Uchtdorf, “Providing in the Lord’s Way,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2011, 55.

Bimisa na lokasa