2018
Bandeko ya Basi kati na Mosala ya Bosangisi ya Yisalaele
Sanza ya Zomi na Moko 2018


Elilingi
ministering

Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Moko 2018

Bandeko ya Basi kati na Mosala ya Bosangisi ya Yisalaele

Nabondeli lokola profeta na bino, basi ya Eklezia, na kosala lobi na kosungaka mpo na kosangisa Yisalaele epalangana.

Ezali esengo mpenza kozala na bino, bandeko na ngai ya basi balingami . Ntango mosusu likambo moko ya kala te ekopesa bino likanisi ya nini nazali koyoka na ntina na bino mpe makoki ya kokamwa oyo epesamela bino.

Mokolo moko ntango nazalaki koloba na lisanga moko na Amerika ya Sudi, nakomaki na esengo mingi etali likambo na ngai, mpe na ngonga moko, nalobaki, “Lokola mama ya bana 10, nakoki koloba na bino ete …” Mpe nsima nakobaki mpo na kosilisa nsango na ngai.

Nayebaki te ete nalobaka liloba mama. Mobongoli na ngai, kokanisaka nalobaki mabe, abongolaki liloba mama na tata, na yango, lisanga eyebaki ata moke te ete namizwaki ngaimei lokola mama. Kasi molongani na ngai Wendy ayokaki yango, mpe asepelaki na libunga na ngai ya Freud.

Na ntango wana, mposa makasi ya motema na ngai ya kosala bokeseni kati na mokili—lokola bobele mama asalaka—etondisaki motema na ngai. Na kolanda mibu, mbala nyonso batunaka ngai mpo na nini naponaki kokoma munganga, eyano ezalaka kaka moko: “Mpo nakokaki te kopona kozala mama.”

Bolimbisi boyeba ete ntango nyonso nalobelaka liloba mama, nalobaka bobele te na ntina ya basi oyo babota to bandima mokumba ya bana na bomoi oyo. Nazali koloba na ntina banso ya bana basi ya mikolo ya Baboti na biso ya Lola. Mwasi nyonso azali mama mpo na ntina ya lobi ya bonzambe na ye ya seko.

Boye na mpokwa ya lelo, lokola tata ya bana 10—bana ya basi libwa mpe moko mwana mobali —mpe lokola Mokambi ya Eklezia, nabondeli ete bokoka koyoka na bozindo boniboni nazali koyoka ntina na bino—ntina ya nani bozali mpe nyonso ya malamu bozali kosala. Moko te akoki kosala oyo mwasi ya bosembo akoki kosala Moko te akoki komekola nguya ya mama.

Mibali bakoki mpe mbala mingi kopesa bolingo ya Tata na Lola mpe ya Mobikisi epai ya basusu. Kasi basi bazali na likabo ya kafukafu mpo na yango—likabo moko ya bonzambe. Bozali na makoki ya koyoka nini moto asengeli na yango—mpe na ntango nini asengeli na yango. Bokoki koyamba, kobondisa, koteya, mpe kolendisa moto na ntango na ye ya bosenga.

Basi bamonaka makambo na ndenge ekeseni na mibali, mpe o, boniboni tosengeli na emoneli na bino! Ezaleli na bino ememi bino mpo na kokanisela basusu liboso, koyeba mbano oyo mosala nyonso ekoki kosala na basusu.

Lokola Mokambi Eyring alobaki, ezalaki Mama na biso ya nkembo Ewa—na emoneli na ye ya mosika ya mwango ya lobiko ya Tata ya Lola—oyo abandaki oyo tobengi ‘‘Bokwei.” Bwanya mpe boponi ya mpiko na Ye mpe mokano ya kosunga ya Adama etambwisaki liboso mwango ya esengo ya Nzambe. Basalaki yango ekokisama mpo na moko na moko na biso koya na mokili, kozwa nzoto, mpe kolakisa ete tokopona kotelama mpo na Yesu Klisto sikoyo, kaka ndenge tosalaki na bomoi yambo ya kufa.

Bandeko na ngai ya basi balingami, bozali na makabo mpe ndlenge ya molimo ya kafukafu. Na mpokwa ya lelo, nasengi bino, na elikya nyonso ya motema na ngai mobimba, kobondela mpo na kosolola makabo na bino ya molimo—kokolisa, kosalela, mpe kokolisa yango, kutu mingi kolela bosala naino te. Bokobongola mokili ntango bokosala bongo.

Lokola basi, bozali kofula basusu mpe kotia ndakisa elongobana mpo na kolanda. Tika napesa bino bansango mibale ya minene epesamaki na likita linene na biso eleki. Bino, bandeko na ngai ya basi, bozalaki ntina na moko na moko.

Yambo, kosalisa. Ndakisa monene mpo na kosalisa ezali oyo ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Mingimingi, basi bazali, mpe ntango nyonso bazalaka, penepene mingi na ndakisa wana koleka mibali. Ntango bozali kosalisa na solo, bozali kolanda mayoki na bino mpo na kosunga moto mosusu koyeba mingi bolingo ya Mobikisi. Bomipesi mpo na kosalisa ezali na kati ya basi ya bosembo. Nayebi basi oyo babondelaka mikolo nyonso, “Nani olingi nasunga lelo?”

Liboso ya lisakola ya sanza ya Minei 2018 oyo etali lolenge ya likolo mingi mpe ya bule mingi koleka ya kosunga basusu, makanisi ya mibali mingi ezalaki kotia mokoloto na mateya na bango na mabota lokola “esalema” mpe koleka na mosala mosusu.

Kasi ntango bino bozalaki komona ete ndeko mwasi bozalaki koteya asengelaki na lisungi, mbala moko boyanolaki mpe kolandelaki na sanza mobimba. Bongo, ezalaki lolenge botalaki eteyaki oyo efulaki mbongwana na biso mpo na komata na kosalisa.

Ya mibale, na likita linene eleki, tobongisaki lisusu masanga makoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke. Ntango bomitunaki lolenge nini tokoki kosunga mibali ya Eklezia kozala malamu koleka na mikumba na bango, totalaki na bokebi ndakisa ya Lingomba ya Bamama Basungi.

Na Lingomba ya Bamama Basungi, basi oyo bazali na mibu mpe na etape ya bomoi ekeseni basangani elengo. Mibu zomi nyonso yabomoi ezalaka na bitumba na yango, mpe na yango, nsima bino bozalaki wana, mposo mposo, kosanganaka elongo, kokolaka mpe koteyaka nsango malamu elongo, mpe kosalaka bokeseni ya solo na mokili.

Sikoyo, kolandisama ndakisa na bino, bakumbi Bonganganzambe ya Melekisedeke bazali banso na lisanga ya bampaka. Mibali oyo bazali na mibu kobanda 18 kino 98 (to mingi koleka), na boyebi ekeseni ya mosala ya bonganganzambe mpe ya Eklezia. Bandeko mibali oyo bakoki sika kosala nkamba makasi ya bondeko, koyekola elongo, mpe kopambola basusu koleka.

Nsanza ya motoba eleki, Ndeko Mwasi Nelson mpe ngai tosololaki na bilenge ya Eklezia. Tobiangaki bango mpo na kosangana na mampinga kati na mpampinga ya bilenge ya Nkolo mpo na kosangisa Yisalaele na bangambo nyonso ya elemba. Bosangani oyo ezali etumba “monene mpe, ntina monene, mpe mosala monene na mabele lelo oyo”!1

Ezali ntina oyo esengeli mpenza na basi, mpamba te basi batongaka lobi. Na yango na mpokwa ya lelo, nasemboli esakola ya profeta epai na bino, basi ya Eklezia, mpo na kotonga lobi na kosungaka bosangani ya Yisalaele epalangana.

Bokobandela wapi?

Napesi mabiangi minei:

Yambo, nabiangi bino kosangana kokila mikolo 10 na media sociaux mpe uta na media mosusu oyo ekopesa makanisi mabe mpe mayele mabe na makanisi. Bobondela mpo na koyeba botindiki nini bokolongola na kokila na bino. Nguya ya kokila na bino ya mikolo zomi ekoki kokamwisa bino. Bokomona nini nsima ya kokata emoneli ya mokili oyo ezokisaki molimo na bino? Ezali wana mbongwana na wapi bino bolingi sika kolekisa ntango na bino mpe bompikiliki? Bantina na bino ya esika ya liboso ebongwani te—ata moke te? Nasengi bino bokoma mpe bolanda liyoki moko na moko.

Ya mibale, nabiangi bino mpo na kotanga Buku ya Mormon katikati ya sikoyo kino nsuka ya mobu. Ntango ekosalema te lokola oyo ekomonana na nyonso bozalali kosala nabomoi na bino, soki bondimi libiangi oyo na motema mobimba, Nkolo akosunga bino kozwa nzela ya kosilisa yango. Mpe, lokola bokoyekokola na mabondeli, nalaki bino ete mapata ekofungwana mpo na bino. Nkolo akopambola binona na bokoli ya bofuli mpe bobimisi.

Ntango bozali kotanga, nakolendisa bino kotia langi na molongo nyonso oyo elobeli to ezali koloba mpo na Mobikisi. Bongo, bozala na likanisi ya kolobela Klisto, kosepela kati na Klisto, mpe koteya Klisto na mabota na bino mpe baninga na bino.2 Bino mpe bango bokopusana pene koleka na Mobikisi na nzela esaleli oyo. Mpe mbongwana, kutu makamwisi, ekobanda kosalema.

Na ntongo ya lelo esakolami esalemaki kolandisama na manaka ya boyekoli na libota, pologalami esungami na Eklezia. Bino, bandeko na ngai balingami ya basi, bozali fungola mpo na elonga ya koboma nzoto ya sika oyo, koboma nzoto na koteya nsango malamu. Nasengi boteya baoyo bino bolingi nini bino bozali koyekola uta na makomi. Boteya bango boniboni kotala epai ya Mobikisi mpo na kobikisa na Ye mpe mpo na nguya ya kopetola ntango basali masumu. Mpe boteya bango boniboni bakozwa bokasi na nguya na Ye mikolo nyonso nabomoi na bango.

Ya misato, kotia kimoninga mpo na kokota na tempelo mbala na mbala. Oyo esengi komibonza moke nabomoi na bino. Kokende mingi na tempelo ekosala ete Nkolo ateya bino boniboni bokozwa nguya ya bonganganzambe na Ye elongo dotatio na bino na tempelo na Ye. mpo na baye bafandi pene na tempelo te, nabiangi bino boyekola na mabondeli na ntina ya batempelo na makomi mpe na maloba ya baprofeta ya bomoi. Boluka mpo na koyeba mingi, mpo na kososola mingi, mpo na koyoka mingi na ntina ya batempelo koleka kutu ya liboso.

Na libondeli ya bilenge ya mokili mobimba na sanza ya motoba eleki, nalobaki na ntina ya elenge moko oyobomoi na ye ebongwanaki ntango baboti na ye babongolaki telefone na ye ya mayele na oyo ya ntina te. Mama ya elenge mobali oyo azali mwasi ya bondimi makasi. Amonaki mwana mobali na ye kokende mosika na kopona oyo ekokaki komema ya mosika na kosala misio. Amemaki kolela na ye na tempelo mpo na koyeba boniboni kosunga mwana mobali na ye malamu. Bongo alandaki nzela ya liyoki nyoso.

Alobaki: “Nayokaki molimo kokamba ngai kotala teleffone ya mwana mobali na ngai na ntango ya siki siki mpo na komona makambo mpenza. Nayebaki kosalela batelefone wana te, kasi Molimo ekambaki ngai na media sociaux nyonso oyo nano nasalelaka te! Nayebi Molimo esungaka baboti boni koluka bokambami ya mpo na kobatela bana na bango. [Yambo] mwana na ngai ya mobali asilikelaki ngai. … Kasi nsima bobele mikolo misato, atondaki ngai botondi! Akokaki koyoka bokeseni.”

Bizaleli mpe lolenge ya mwana mobali na Ye ebongwanaki mpenza. Akomaki kosunga mingi na libota, akomaki komunga mingi, mpe amipesaki mingi na eklezia. Alingaki kosala mpo na ntango na kobaisa na tempelo.

Libiangi na ngai ya mineyi, mpo na bino oyo bokomi mikolo, ezali bosangana na litondi na Lisanga ya Bamama Basungi. Nasengi bino boyekola bantina ya sika ya Lingomba ya Bamama Basungi. Ezali ya kofulama. Ekoki kokamba bino na bokolisi ntina na binomei mpo nabomoi na bino. Nasengi na bino lisusu kosepela na bosolo ezwami na esakola ya LIngomba ya Bamama Basungi epesamaki mibu 20 eleki.3 Mokanda ya esakola oyo etiami na efelo ya bilo ya Bokambi ya Yambo. Nasepelaka ntango nyonso natangaka yango. Elakisi nani bozali mpe nani Nkolo asengi na bino bozala na ntango oyo mpenza lokola bozali kosala eteni na bino mpo na kosunga kosangisa Yisalaele epalangana.

Bandeko na ngai basi balingami, tosengeli na bino! Biso “tosengeli na bokasi na bino mbongwana, na bino kondima mpenza, na bino kobongwana, na bokasi na bino mpo na kokamba, bwanya na bino, mpe mingongo na bino.”4 Tokoki kosangisa Yisalaele te na kozanga bino.

Nalingi bino mpe natondi bino mpe sikoyo napamboli bino na makoki ya kotika mokili nsima ntango bozali kosala na mosala oyo ya ntina koleka mpe ya lombango. Elongo tokoki kosala nyonso oyo Tata ya Lola asengi biso mpo na kobongisa mokili mpo na Koya ya Mibale ya Mwana na Ye.

Yesu Klisto Oyo ezali Eklezia na Ye. Ya yango natatoli na nkombo ya Nkolo na biso, Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (worldwide youth devotional, Sanza ya motoba 3, 2018), HopeofIsrael.lds.org.

  2. Tala 2 Nefi 25:26.

  3. Mpo Esakola ya Lingomba ya Bamama Basungi, tala Mary Ellen Smoot, “Rejoice, Daughters of Zion,” Liahona, Sanza ya yambo. 2000, 111–14.

  4. Russell M. Nelson, “A Plea to My Sisters,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2015, 96; nsete ebetami.

Bimisa na lokasa