2019
Lolenge nini Kokabola Litatoli na Pete Nyonso
Sanza ya misatu 2018


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya misato 2019

Lolenge nini Kokabola Litatoli na Pete Nyonso

Kosalisa ezali nde kotatola. Pete ya kosalisa ekoki kobutisa mabaku na biso ya kokabola litatoli na ndenge ebongi mpe ya pete.

Toyokani “kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe na ntango nyonso mpe na makambo nyonso mpe na bisika nyonso” (Moziya 18:9). Kokabolaka matatoli na biso ezali eteni ya kotelemaka lokola nzeneneke mpe ezali nzela ya nguya ya kobengisa Molimo Mosantu mpo na kosimba motema ya moto moko mpe kobongola bomoi na bango.

“Litattoli—litatoli ya solo, ebotami na nzela ya Molimo mpe endimisami na Molimo Mosantu—ebongolaka bomoi,” elobi Mokambi M. Russell Ballard, Mokambi ya sikawa ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale.1

Kasi kokabolaka litatoli na biso ekoki kobangisa to koyokisa malamu te mpo na basusu kati na biso. Wana ekoki kozala mpo ete tokanisaka ete kokabolaka litatoli na biso ezali likambo moko tosalaka na liyangani ya kokila mpe litatoli to ntango tozali koteya liteya moko. Kati na bisika edimama wana tosalelaka mbala mingi maloba moko boye oyo emonanaka lokola ezali na esika na yango te na lisolo ya mikolo nyonso.

Kokabolaka matatoli na biso ekoki kokoma lipamboli moko ya ntango nyonso koleka na bomoi na biso mpe bomoi ya basusu ntango tososoli boniboni pete ekoki kozala kokabola nini tozali kondimela na bisika ya mikolo nyonso. Oyo ezali mwa makanisi mpo na kosalisa yo obanda:

Sala Yango na Pete

Litatoli ezali na mposa te obanda na maloba, “Nalingi kopesa litatoli na ngai,” mpe ezali na mposa te osukisa na, “Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.” Litatoli ezali liloba moko ya maye tondimi mpe toyebi kozala solo. Yango wana kosolola na moto ya penepene na yo na balabala na ntina ya likambo azali na yango mpe koloba, “Nayebi ete Nzambe ayanolaka nsambo,” ekoki kozala mpe na nguya lokola litatoli kani ekabolami uta na elobelo na ndakonzambe. Nguya eyaka uta na lokota ebongisami malamu malamu te; eyaka uta na Molimo Mosantu kondimisaka solo (tala Doctrine et Alliances 100:7–8).

Solola na Lolenge moko ya Pete

Soki ozali na bolingi ya kokabola, ezali na mabaku ebele nzinganzinga na biso mpo na litatoli ebongi kati na masolo na mikolo nyonso. Na ndakisa:

  • Moto moko atuni yo na ntina ya nsuka ya poso na yo. “Ezalaki malamu mpenza,” eyanoli yo. “Nazalaki na mposa kaka ya Eklezia.”

  • Moto moko elakisi bolingo nsima ya koyebaka na ntina ya bomoi na yo: “Nayoki mawa mpenza.” Oyanoli: “Botondi mpo na kotungisama na yo. Nayebi ete Nzambe akosunga ngai. Asila kozala wana mpo ngai.”

  • Moto moko alobi: “Nalikii eleko mabe oyo ebongwana noki,” to “Bisi ezali solo kowumela koya,” to “Tala mituka mitondi na nzela.” Okoki koyanola: “Nandimi ete Nzambe akosalisa makambo nyonso ebonga.”

Bokabola Boyebi na Bino

Tosololaka mbala migi moko na mosusu na ntina ya mikakatano na biso. Ntango moto moko ayebisi yo nini bazali kokutana na yango, okoki kokabola ngonga moko ntango Nzambe asalisaki yo kati na mimekano na yo mpe otatoli ete oyebi Ye akoki kosalisa bango mpe. Nkolo alobaki Ye alendisaka biso na mimekano na biso mpo “ete bokoka koteleme lokola banzeneneke mpo ya ngai nsima, mpe ete bokoka koyeba na ntembe te ete ngai, Nkolo Nzambe, nakobimela bato ba ngai o matungisi ma bango” (Moziya 24:14). Tokoki kotelema lokola banzeneneke na Ye ntango totatoli na ntina ya lolelenge Ye asalisaki biso na mimekano na biso.

Bozala ya Komilengela

Mpo na basusu kati na biso, kokabola litatoli na kozanga komilengela ekoki kobangisa. Ezali na ndenge ebele oyo tokoki komilengela yambo mpe “komilengela ntango nyonso mpo na koyanola moto nyonso oyo akotuna [biso] ntina ya elikia oyo ezali kati na [biso]” (1 Petelo 3:15).

Yambo, kozala ya komilengela ekoki kolinga koloba kotalaka lolenge nini tozali kobika. Ezali biso kobengisa Molimo Mosantu kati na bomoi na biso mpe kolendisaka matatoli na biso mokolo moko na moko na nzela ya kozalaka na bomoi ya bosembo? Ezali biso kopesa Molimo mabaku ya kolobela biso mpe kopesa biso maloba tozali na yango mposa na nzela ya losambo mpe boyekoli makomi? Lokola Nkolo apesaki toli na Hyrum Smith, “Koluka kosakola liloba na ngai te, kasi yambo luka kozwa liloba na ngai, mpe nsima lolembo na yo ekokangolama” (Doctrine et Alliances 11:21).

Ya mibale, kozala ya komingela ekoki kolinga koloba kotalaka liboso mpe kozwaka mabaku okoki kozala na yango mokolo wana to poso wana mpo na kokabola litatoli na yo. Okoki komilengela mpo na mabaku wana na kokanisaka na ntina ya lolenge nini ekoki kopesa yo libaku malamu ya kokabola nini ondimeli.

Tikala ya kokangama na Mobikisi mpe Malongi na Ye

Mokambi Ballard ateyaki, “Atako tokoki kozala na matatoli ya makambo mingi lokola bandimi ya Eklezia, ezali na babosolo ya ebandeli oyo tosengeli koteyana ntango nyonso mpe kokabola.” Lokola ndakisa, atangaki : “Nzambe azali Tata na biso mpe Yesu azali Klisto. Mwango mwa lobiko efandisami likolo ya Bomikabi ya Mobikisi. Joseph Smith azongisaki bofuluki ya nsango malamu ya seko ya Yesu Klisto, mpe Buku ya mormon ezali elembo emonani na miso ete litatoli na biso ezali solo.” Wana ezali biso koloba babosolo wana euti na motema, tosengi Molimo atatola ete maye tolobi ezali solo. Mokambi Ballard abeti sete ete “Molimo ekoki kopekisama te ntango litatoli ya peto ya Klisto ebotami.”2

Ndakisa ya Mobikisi

Kozalaka ya kolemba nsima ya mobembo na Samaliya, Mobikisi atelemaki mpo na kopema na libulu ya mayi mpe akutanaki na mwasi moko kuna. Abandaki lisolo na ntina ya kotokaka mayi uta na libulu. Kosalelaka mokumba ya mikolo nyonso oyo mwasi amipesaki epesaki Yesu libaku ya kotatola na ntina ya mayi na bomoi mpe bomoi ya seko oyo ezalaki mpo na baoyo bandimeli Ye (tala Yoane 4:13–15, 25–26).

Lipamboli ya Pete Ekoki Kobongola Babomoi

Mokambi Russell M. Nelson alobeli lifulumi oyo atunaki na ntango wana-Dr. Nelson motuna moko nsima ya mosala ya lopaso ya mpasi. “Mpo na nini ozali lokola minganga mopasoli misusu te?” Minganga mopasoli misusu ayebaki bakoki kozala nkanda nkanda mpe bazangi bonzambe wana ezalaki bango kosala misala ya motema likolo ya boye.

Dr. Nelson akokaki koyanola na ndenge ebele kani. Kasi ayanolaki na pete, “Mpo nayebi Buku ya Mormon ezali solo.”

Eyano na ye etindikaki lifulumi mpe mobali na ye bayekola Buku ya Mormon. Mokambi Nelson nsima abatisaki lifulumi yango. Mibu bazomi nsima, wana ezalaki ye kokamba likita ya etuka moko na Tennessee, USA, lokola Apostolo abulisami sika, Mokambi Nelson asepelaki na bokutani moko akanaki te na lifulumi kaka yango. Abetaki lisusu lisolo ete mbongwana na ye, oyo etumbolamaki na nzela ya litatoli ya pete mpe botindiki ya Buku ya Mormon, esalisaki mpo na kokamba epai ya bongwana ya bato 80 mosusu.3

Libiangi ya Kosala

Kozala na bobangi ya kokabola litatoli na yo te. Ekoki kopambola baye epai ozali kosalisa. Lolenge nini okosalela makanisi oyo to ya yomei mpo na kokabola litatoli na yo lelo?

Matangi

  1. M. Russell Ballard, “Pure Testimony,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2004, 40.

  2. M. Russell Ballard, “Pure Testimony,” 41.

  3. Na Jason Swensen, “Be Ready to Explain Your Testimony Using the Book of Mormon, Mokambi Nelson alobi,” eteni ya Nsango ya Eklezia ya LDS.org, Sanza ya mibale 6, 2018, news.lds.org.

Bimisa na lokasa