2021
Bonzambe Ezali Nini?
Sanza ya Motoa 2021


“Bonzambe Ezali Nini?,” Liahona, Sanza ya motoba 2021

Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya motoba 2021

Bonzambe Ezali Nini?

Nzambe Tata, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu bazali bato basato bakabwana na ntina moko.

Elilingi
Limoni ya Yambo

Makambo uta na Limoni ya Yambo, na Jon McNaughton

Mokomi moko ya zulunale mokolo mosusu atunaki Profeta Joseph Smith maye bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bandimelaka. Na eyano, Profeta akomaki masakola 13 ya boyambi tobengi Biteni ya Bondimi. Esakola ya yambo elobi, “Tondimeli Nzambe, Tata wa Seko, mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu” ((Biteni ya Bondimi 1:1). Misato oyo esali maye tobengi Bonzambe.

Nzambe, Tata wa Seko

Nzambe azali na nzoto esekwa ya mosuni mpe mikuwa. Azali Tata ya milimo na biso. Alingaka moko na moko ya bana na Ye ne lolenge ya malamu kokoka. Nzambe abongi nie, azali na nguya nyonso, mpe ayebi makambo nyonso. Azali sembo, ngolu, mpe boboto. Tozalaki na bomoi lokola milimo elongo na Nzambe yambo ete tobotama? Atindaki biso na mabele mpo na koyekola mpe kokola. Mposa monene mpenza ya Nzambe ezali ete moko na moko ya mwana na Ye azonga kozala na bomoi elongo na Ye lisusu nsima ya liwa na biso. Nzambe ateyi biso ete tosengeli kolanda Yesu Klisto mpo na kozonga na miso ya Nzambe.

Elilingi
Yesu Klisto Azali Koteya na Mokili ya Milimo

Klisto Azali Koteya na Mokili ya Milimo, na Robert T. Barrett

Yesu Klisto

Yesu azali lisusu na nzoto moko esekwa ya mosuni mpe mikuwa. Azali Mwana mobotami ya yambo ya Nzambe. Liboso tobotama, Nzambe aponaki Ye mpo na kozala Mobikisi na biso; Oyo elingi koloba Yesu ayaki na nse mpo na kozala ndakisa mpo na biso, koteya nsango malamu na Ye, komikaba mpo na masumu na biso, mpe kobikisa biso uta na liwa. Na ntina na Yesu Klisto, tokoki kolimbisama na masumu na biso ntango toyamboli. Yesu Klisto lisusu ayokaki mpasi ya makambo mingi mpo ete Ye akokaki kososola mpe kosunga biso. Yesu Klisto akufaki mpe nsima azongaki na bomoi, kosalaka yango ekoka kosalema mpo ete moto nyonso azala na bomoi lisusu.

Elilingi
bokundami ya Klisto

Foto uta na Getty Images

Molimo Mosantu

Molimo Mosantu azali moko ya Bonzambe oyo azali na nzoto ya mosuni te. Azali molimo. Molimo Mosantu azali na makoki ya kosolola mbala moko na milimo na biso. Atatolaka epai na biso ete Nzambe azali solo mpe Yesu Klisto azali Mobikisi. Molimo Mosantu asalaka lokola motindami ya Nzambe mpo na kopesa biso mayoki ya bolingo, bokambi, to libondi. Ntango tobatisami mpe tokulisami nkotisa, tozwi likabo ya Molimo Mosantu. Nsima ya libatisi na biso, Molimo Mosantu akoki ntango nyonso kotikala elongo na biso ntango tobateli mitindo ya Nzambe.

Elilingi
Limoni ya Yambo

Limoni ya Yambo, na Walter Rane

Limoni ya Yambo ya Joseph Smith

Mibu kolekaka bato babulingisamaki na oyo etali Bonzambe. Bato bayokanaki te na oyo etali lolenge Nzambe, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu bazali. Oyo ntina moko mpo na nini Limoni ya Yambo oyo Joseph Smith amonaki ezalaki motuya mpenza. Amonaki ete Tata ya Lola mpe Yesu Klisto bazali na banzoto mpe bazali bato mibale bakabwana.

Elilingi
Koyokaka

Koyokaka, na Michael Jarvis Nelson

Kokabwana kasi Bomoko

Makomi mpe baprofeta ya sika bateyi biso ete Nzambe, Yesu Klisto, mpe Molimo mosantu bazali bato bakabwana na ntina moko: bozangi kufa na biso mpe bomoi ya seko (tala Moses 1:39). Lokola bato ya ekipi moko, Basalaka lisanga mpo na kosunga biso mikolo nyonso. Tokoki komiyoka penepene koleka na Bango ntango toyamboli masumu na biso mpe toponi malamu.

Makomi matali Bonzambe

Bimisa na lokasa