2021
Mambi ya kala ya Libota Esalisaka Bankoko na Biso
Sanza ya zomi na mibale 2021


“Mambi ya kala ya Libota Esalisaka Bankoko na Biso,” Liahona, Sanza ya zomi na Mibale 2021

Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya zomi na mibale 2021

Mambi ya kala ya Libota Esalisaka Bankoko na Biso

Mambi ya kala ya libota ezali kokundola mpe koyekola oyo etali bandeko ya libota na biso. Tosangisaka lisusu nsango etali bankoko na biso mpo tokoka kosala mosala mpo na bango.

Elilingi
maloba mosusu

Mabota ezali na katikati ya mwango ya esengo ya Tata na Lola. Alengelaki nzela mpo ete mabota ekoba mpo na libela. Ntango tozali kosala ya biso mambi ya kala ya libota mpe mosala ya tempelo , tozali kosalisa komema bandeko na biso ya libota, baye na bomoi mpe bakufa lokola, banso elongo. (“Mosala ya tempelo” elingi koloba kozwa makuli ya tempelo mpo na bisomei, lokola kozala ya kokangisama na molongani na biso, lokola mpe kosala makuli kati na tempelo mpo na bankoko na biso.)

Mambi ya kala ya Libota mpe Mosala ya Tempelo

Moto nyoso oyo azalaki na bomoi to oyo akozala na bomoi na mabele asengeli na makuli ya nsango malamu. Soki bankoko na biso bazwaki libaku te, tokoki kosala makuli wana mpo na bango kati na tempelo. Moko ya makuli wana ezali kokangisama na bandeko ya libota. Kozala “ya kokangisama” elingi koloba kozala na makoki ya kofanda elongo na mabota na biso kuna mpo na libela soki tozali sembo. Tokoki kokangisama na mabota na biso bobele kati na batempelo.

Mapamboli ya Mosala ya Mambi ya Kala

Elilingi
libota

Mambi ya kala ya libota ekoki kosalisa biso tolendisa mikangano na biso elongo na bato ya libota na biso na bomoi. Ntango tozali kokabola masolo, bafoto, mpe makundoli mosusu moko na mosusu, tozali kotia bansinga ya libota. Tozali lisusu kolendisa bolingo tozali na yango mpo na moko mpe mosusu. Baprofeta balakaki lisusu ete kosalaka mosala ya mambi ya kala ya libota na biso ekomema biso mpembeni koleka epai ya Yesu Klisto.

Komona Bankoko na biso

Elilingi
makundoli na lokota ya Chine

Tata na Lola alingi biso tokangisama na mabota na biso ya mikolo oyo mpe na bankoko na biso. Liboso tokoka kokangisama na bankoko na biso, tosengeli komona mpe nsima kobomba nsango oyo etali bango. Kasi mambi ya kala ya libota ezali mingi koleka kolukaka kaka bankombo, mikolo, mpe bisika. Ntango tozali koyekola oyo etali bankoko na biso, tokomiyoka ya kokangana mingi epai na bango.

Bimisa na lokasa