2022
Elambo: Lolenge moko ya Kokanisa Mobikisi.
Sanza ya Minei 2022


“Elambo: Lolenge moko ya Kokanisa Mobikisi,” Liahona, Sanza ya minei. 2022

Etinda ya Sanza Liahona Sanza ya minei 2022

Elambo: Lolenge moko ya Kokanisa Mobikisi.

Elilingi
placeholder altText

Elambo ya Nsuka, na Simon Dewey

Na butu yambo Abakama na ekulusu, Yesu Klisto akutanaki elongo na Bapostolo na Ye na Elambo ya Nsuka. Kuna Apesaki bango elambo mpo na mbala ya yambo. Alimbolaki ete ezalaki lolenge moko mpo na kokanisa Ye Elambo ezali likuli moko epayi wapi toliaka lipa mpe tomelaka mai mpo na kokanisa ya Klisto Bomikabi. Lipa elakisi nzoto ya Klisto, mpe mayi elakisi makila ma Ye.

Tozwaka elambo eyenga moko moko na liyangani ya elambo. Toyembaka loyembo moko ntango basimbi bonganganzambe babukaka limpa na biteni mikemike.

Bato basimbi bonganganzame oyo babukaki lipa balobaka nsambo ya kafukafu. Nsambo oyo ezwami kati na Doctrine et Alliances 20:77, 79. Nsambo ekundolisaka biso maye tolakaki Tata na Lola mpe maye Ye alakaki biso.

Misusu ya basimbi bonganganzambe bakabolaka elambo na bandimi ya palwasi to ya etape. Ntango tozwaka elambo, tokanisaka Mobikisi mpe libonza na Ye mpo na biso. Tomipesaka lisusu mpo na kobatela mayokani (bilaka) tosalaki na Tata na Lola.

Elilingi
elenge mwasi azali kolia lipa na liyangani ya elambo

Tozalaka na limemia ntango elambo epambolamaka mpe ekabolamaka. Ezali ngonga moko mpo na biso tokanisa ya Yesu Klisto bomoi, mateya, mpe Bomikabi. tokoki lisusu kokanisa oyo etali lolenge nini tokoki kolanda ndakisa na Ye.

Bimisa na lokasa