2022
Tokambami na Baprofeta ya Bomoi
Sanza ya Libwa 2022


“Tokambami na Baprofeta ya Bomoi,” Liahona, Sanza ya libwa. 2022.

Etinda ya Liahona ya Sanza, Sanza ya libwa 2022

Tokambami na Baprofeta ya Bomoi

Elilingi
Bakambi ya Eklezia liboso ya ekeko ya Klisto

Baprofeta bazali mibali oyo babiangemaki na Tata ya Lola mpo na koloba mpo na Ye. Bango batatolaka na ntina na Yesu Klisto mpe bateyaka nsango malamu na Ye. Bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya basantu ba Mikolo mya Nsuka bandimelaka baprofata ya kala mpe ya sikawa lokola.

Nzambe alobaka na nzela ya Baprofeta

Baprofeta bazwaka emoniseli uta na Nzambe. Ntango baprofeta bafulamaka mpo na koteya biso, yango ezali kaka lolenge moko lokola Nzambe azalaki kolobela biso (tala Doctrine et Alliances 1:38). Tokoki kolikya ete bango bazali kolobela biso nini Nzambe akolinga biso toyeba.

Elilingi
Mormon na bapalaki ya wolo

Mormon Azali kokoma Bapalaki na mokuse, na Tom Lovell

Baprofeta Bateyaka oyo etali Yesu Klisto

Baprofeta banso batatolaka na ntina na Yesu Klisto. Bateyaka biso ete Ye azali Mwana ya Nzambe. Bateyaka biso oyo etali bomoi, ndakisa, mpe Bomikabi na Ye. Mpe balakisaka biso lolenge nini kolanda Ye mpe kotosa mitindo na Ye.

Mikumba ya Baprofeta

Baprofeta bateyaka nsango malamu ya Yesu Klisto. Balimbolaka mapamboli tozwaka ntango totosaka mitindo mpe mbano tozwaka soki totosi te. Na bantango mususu, bakoki kofulama mpo na koyebisa makambo makoya nsima.

Elilingi
Mose na bapalaki

Mose mpe Balaki, na Jerry Harston

Baprofeta ya Kala

Nzambe ateyaki bato na nzela ya baprofeta uta na ebandela. Baprofeta oyo bazalaki na ntango ya Kondimana ya Kala sangisa Adama, Noa, Abralayama, Mose, Yisaya, mpe basusu. Ezalaki lisusu na baprofeta kati ya bato ya Buku ya Mormon. Kati na baprofeta oyo ezalaki na Lehi, Mozia, Alma, mpe Moroni. Tokoki koyekola maye bango bateyaki na kotangaka makomi.

Baprofeta ya Sikawa

Joseph Smith azalaki profeta ya yambo ya bantango ya sikawa. Azongisaki Eklezia ya Yesu Klisto na mabele. Russell M. Nelson azali profeta mpe Mokambi ya Eklezia lelo. Basungi na ye na Bokambi ya Yambo mpe Bapostolo Zomi na mibale bazali lisusu baprofeta, bamoni, mpe babimisi.

Elilingi
Babalani bazali kotala likita na telefone

Koyoka Profeta

Baprofeta balobelaka biso na likita linene mpe na bantango mosusu. Ateyaka biso maye Nzambe alingi biso toyeba mpe lolenge nini kolanda Yesu Klisto lelo. Tokoki komona mateya na ye na Liahona mpe na ChurchofJesusChrist.org.

Mapamboli ya Kolandaka Profeta

Tokopambolama soki tolandi mateya ya profeta. Tango tolandi profeta, tokoki koyeba ete tozali kosala oyo Nzambe alingi biso tosala. Tokoki koyoka kimia na bomoi na biso mpe kopusana penepene ya Yesu Klisto.

Bimisa na lokasa