“Boyokani ya Libela,” Liahona, Sanza ya zomi. 2022.
Etinda ya sanza ya Liahona Sanza ya zomi 2022
Boyokani ya Libela
Baye banso basali boyokani na Nzambe bazali na ndingisa ya bolingo mpe ngolu ya monene.
Na mokili oyo ebebisami na bitumba mpe nungunungu ya bitumba, bosenga ya bosolo, pole mpe bolingo ya solo ya Yesu Klisto ezali monene koleka. Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali nkembo, mpe topambolami mpo na koyekola yango mpe kobika engebene na mibeko na yango. Tosepelaka na mabaku na biso ya kokabola yango—kotatola babosolo na yango bisika nyonso tozali.
Nalobelaka mbala mingi na ntina ya boyokani ya Abalayama mpe bosangisi ya Yisalaele. Ntango tondimeli nsango malamu mpe tobatisami, tozwaka likolo na biso moko nkombo ya bule ya Yesu Klisto. Libatisi ezali ekuke oyo ekambaka mpo na kokoma moto moko ya bilaka nyonso oyo epesama kala na Nkolo epai ya Abalayama, Yisaka, Yakobo mpe nkola na bango.1
“Boyokani ya sika mpe ya libela”2 (Malongi mpe Mayokani 132:6) mpe boyokani ya Abalayama ezali ntina lolenge moko—ndenge mibale ya kolobela boyokani Nzambe asalaki na mibali mpe basi ya kufa na batango ekesani.
Liloba libela elimboli ete boyokani oyo ezalaki kutu yambo ya bokeli mokili! Mwango oyo elakisamaki na Lisanga Monene ya Lola esangisaki bokeli ete tokolongolama liboso ya Nzambe. Na yango, Nzambe alakaki ete Asengelaki kopesa Mobikisi oyo asengelaki kolonga etumbu ya Bokweisami. Nzambe ayebisaki Adama nsima ya libatisi na ye:
“Ozali engebene na motindo ya ye oyo azanga ebandeli ya mikolo mpe ya nsuka ya mibu, uta seko nyonso mpe seko nyonso.
“Tala, ozali moko kati na ngai, mwana ya Nzambe; mpo ete banso bakoma bana na ngai” (Mose 6:67–68).
Adama mpe Eva bandimaki likuli ya libatisi mpe babandaki mokumba ya kozala moko na Nzambe. Bakotaki na nzela ya boyokani.
Ntango yo na ngai tokoti na nzela lisusu na nzela yango, tokomi na nzela ya sika ya bomoi. Nde tokelaka kimoninga elongo na Nambe oyo epesaka biso ndingisa Ye apambola mpe abongola biso. Nzela yango ekambaka biso tozonga epai na Ye. Soki totiki Nzambe akamba babomoi na biso, boyokani yango ekokamba biso pembeni mpenza ya Ye. Mayokani nyonso esengeli koyokana. Ekelaka mokangano na basinga ya libela.
Bolingo mpe Ngolu ya Monene
Ntango tosali boyokani na Nzambe, tobiki na bonsomi ya seko. Nzambe akotika te kimoninga na Ye na baoyo basali mokangano ya lolenge oyo na Ye. Na yango, baoyo nyonso basali boyokani na Nzambe bazali na na ndingisa ya bolingo mpe ngolu ya monene. Na lokota ya Baebele, boyokani wana abengami hesed (חֶסֶד).3
Hesed ezali na ndimbola elongobana te na Angele. Babongoli ya Biblia ya King James banyokwamaki mingi mpo na kolimbola hesed na Angele. Balimbolaki yango mbala mingi na “bolingo ya bosembo.” Yango ezali motuya mpenza kasi elimboli mpenza mpenza te hesed. Babongoli mosusu balimbolaki yango, lokola “ngolu” mpe “bolamu.” Hesed ezali liloba moko oyo elimboli boyokani ya kimoninga na oyo biteni nyonso mibale ekangisami kozala ndenge moko mpe boyengebene na moko mpe mosusu.
Libala ya selesitiale ezali moko ya boyokani ya kimoninga. Mobali mpe mwasi basalaka boyokani na Nzambe mpe moko na mosusu mpo na kozala balongani mpe bayengebene na moko mpe mosusu.
Hesed ezali lolenge moko ya ntina ya bolingo mpe ngolu oyo Nzambe ayokaka mpe alakisaka baoyo basalaki boyokani na Ye. Mpe tosalelaka hesed mpo na Ye.
Mpo Nzambe azali na hesed mpo na baoyo basali boyokani na Ye, Akolinga bango. Akokoba kosala na bango mpe kopesa bango libaku ya kobongwana. Akolimbisa bango ntango bakoyambola. Mpe soki babungi nzela, Ye akosunga bango bazonga na nzela na bango ya kozonga epai na Ye.
Ntango yo na ngai tosali boyokani na Nzambe, kimoninga na biso na Ye ekomaka makasi koleka yambo ya boyokani na biso. Sikawa tokangani elongo. Na ntina ya boyokani na biso na Nzambe, Akolemba te na babokasi na Ye mpo na kosunga biso, mpe Akolembisa te nguya na Ye likolo na biso. Moko na moko kati na biso azali na esika ya motuya na motema ya Nzambe. Azali na elikya makasi mpo na biso.
Oyebi lisakoli ya lisolo oyo Nkolo apesaki na Profeta Joseph Smith. Eyaki na emoniseli. Nkolo alobelaki Joseph, “Elaka oyo ezali mpe ya yo, mpo ozali ya Abalayama, mpe elaka esalamaki na Abalayama” (Malongi mpe Mayokani 132:31).
Na yango, boyokani ya libela oyo ezongisamaki lokola eteni monene ya Bozongisi nsango malamu na botondi na yango. Kanisa yango! Boyokani ya libala oyo esalemi na kati ya tempelo ekangisami mbala moko na boyokani ya Abalayama. Na kati ya tempelo balongani bakotisami na mapamboli nyonso oyo elengelami na nkola nyonso ya Abalayama, Yisaka; mpe Yakobo.
Lokola Adama asalaki, yo na ngai tokotaka na nzela oyo ya boyokani na libatisi. Nsima tokotaka mingi mobimba kati na yango na tempelo. Mapamboli ya boyokani ya Abalayama epesamaka na batempelo ya bule. Mapamboli oyo epesaka biso, ndingisa, ya lisekwa, ya “kolonga bangwende, babokonzi, banguya, bingumba mpe kokonza na bonetoli na biso mpe nkembo na makambo nyonso’ [Malongi mpe Mayokani 132:19].”4
Na nkoma moko ya bosukisi ya Boyokani na Kala, totangi na ntina ya elaka ya Malaki ete Eliya “akozongisa mitema ya batata epai ya bana na bango, mpe mitema ya bana epai ya batata na bango” (Malachi 4:6). Na Yisalaele ya kala, ndakisa oyo ya batata esengelaki kosangisa batata ya Abalayama, Yisaya, mpe Yakobo. Elaka oyo elimbolami malamu ntango totangi molongo oyo na lolenge mosusu oyo Moroni atangaki Profeta Joseph Smith: “Ye [Eliya] akotia na kati ya mitema ya bana bilaka oyo esalemaki epai ya batata, mpe mitema ya bana ekozonga epai ya batata na bango” (Joseph Smith—History 1:39). Batata oyo esangisi mpenza Abalayama, Yisaka; mpe Yakobo. (Tala Malongi mpe Mayokani 27:9–10.)
Yesu Klisto: Katikati ya Boyokani
Libonza ya Bomikabi ya Mobikisi epesaki ndingisa epai ya Tata akokisa bilaka na Ye oyo asalaki epai ya bana na Ye. Mpo ete Yesu Klisto azali “nzela, bosolo mpe bomoi,” elandisami ete “moto moko te akoki kokende epai ya Tata soki na [Ye] te” (Yoane 14:6). Bokokisi ya boyokani ya Abalayama ekomaka na nguya mpo na ntina ya Bomikabi ya Mobikisi na biso, Nkolo Yesu Klisto. Yesu Klisto azali na katikati ya boyokani ya Abalayama.
Boyokani na Kala ezali kaka te mokanda ya makomi; ezali lisusu buku ya lisolo. Omikundola na ntina ya botangi libala ya Sala mpe Abalayama. Mpo ete bazalaki kobota te, Sala apesaki mwana na ye ya mosala, Agala mpo na kozala mwasi ya Abalayama, ezalaki na ndingisa ya Nkolo. Agala abotaki Yisamaele.5 Abalayama alingaki Yisamaele, kasi azalaki mwana ya boyokani te. (Tala Genese 11:29–30; 16:1, 3, 11; Malongi mpe Mayokani 132:34.)
Lokola lipamboli kouta na Nzambe, na ntina ya bondimi ya Sala,6 azwaki zemi yambo ya mibu oyo esengelaki koleka mpo elaka ekokisama mwana na ye ya mobali, Yisaka (tala Genese 17:19). Abotamaki kati na boyokani.
Nzambe apesaki na Abalayama mpe Sala bankombo ya sika—Sala mpe Abalayama (tala Genese 17:5, 15). Bopesi ya bankombo oyo ya sika esalaki bobandi ya bomoi ya sika mpe lobi ekoya ya sika mpo na libota oyo.
Abalayama alingaki Yisamaele mpe Yisaka. Nzambe ayebisaki Abalayama ete Yisamaele akobakisama mpe akokoma ekolo monene (tala Genese 17:20). Na ntango moko wana, Nzambe elimbolaki yango malamu, ete boyokani ya libela esengelaki kosalema epai ya Yisaka (tala Genese 17:19).
Baye banso bandimi nsango malamu bakomaka eteni moko ya molongo ya Abalayama. Na Bagalatia totangi:
“Mpo lokola mingi na bino bobatisami na kati ya Klisto bolati Klisto.
“… Bozali banso moko kati na Klisto Yesu.
“Mpe soki bozali ya Klisto, bongo bozali bana ya Abalayama, mpe bozali basangoli ya elaka” (Bagalatia 3:27–29).
Na yango tokoki kokoma, basangoli ya boyokani na nzela ya mbotama to ya bobokoli.
Yisaka Mwana mobali ya Lebeka mpe Yakobo abotamaki na boyokani. Na kobakisa, andimaki kokota na boyokani na ye moko. Lokola boyebi, nkombo ya Yakobo ebongwanaki ekomaki Yisalaele (tala Genese 32:28), elakisi “tika Nzambe akamba” to “moto oyo azali elongo na Nzambe.”7
Na Esode totangi ete “Nzambe amikundolaka boyokani na Ye na Abalayama, na Yisaka mpe na Yakobo” (Esode 2:24). Nzambe ayebisaki bana ya Yisalaele, “soki bokotosa mongongo na ngai, mpe bobateli boyokani, nsima bokozala bomengo ya motuya epai na ngai” (Esode 19:5).
Liloba lisangoli ya motuya” elimbolamaki uta na Baebele segullah, elakisi bozwi ya motuya koleka—a “lisangoli.”8
Buku ya Dutelunume elobeli ntina ya boyokani. Bapostolo ya Boyokani na Kala bayebaki na ntina ya boyokani oyo. Nsima ya Petelo kobikisa ebosono libanda ya tempelo, Petelo alobelaki na ntina ya Yesu epai ya bato. Petelo alobaki, “Nzambe ya Abalayama, mpe Yisaka mpe ya Yakobo, Nzambe ya batata akumisi mwana na Ye ya Mobali Yesu” (Misala 3:13).
Petelo asukisaki nsango oyo na kolobaka epai ya bato na ye, “bozali bana ba baprofeta; mpe bozali ba ndako ya Yisalaele; bozali ba boyokani boye tata asalaki elongo na batata ba bino, kolobaka epai ya Abalayama: Mpe na nkona ya yo mabota manso ma mabele makopambolama” (Misala 3:25). Petelo alimbolaki yango polele epai na bango ete eteni moko ya etinda ya Klisto ezalaki ya kokokisa boyokani ya Nzambe.
Nkolo apesaki esakolola ya lolenge oyo epai ya bato ya kala ya Amelika. Kuna, Klisto mosekwi ayebisaki bato oyo bazalaki mpenza. Ye alobaki ete:
“Mpe tala, bozali bana ba baprofeta; mpe bozali ba ndako ya Yisalaele; bozali ba boyokani boye tata asalaki elongo na batata ba bino, kolobaka epai ya Abalayama: Mpe na nkona ya yo mabota manso ma mabele makopambolama.
“Tata kotelemisaka ngai epai ya bino yambo, mpe atindaki ngai mpo ya kopambola bino na kobalulaka moko na moko wa bino uta o mabe ma bino, mpe eye zambi bozali bana ba boyokani” (3 Nefi 20:25–26).
Omoni ndimbola na yango? Baye batosaka mayokani na bango na Nzambe bakokoma batelemeli masumu! Baye batosaka mayokani bakozwa bokasi ya kotelemela na bompikiliki nguya ya mokili.
Mosala ya Misionele: Kokabola Boyokani
Nkolo atindaki ete topalanganisa nsango malamu mpe tokabola boyokani. Yango wana tozali na bamisionele. Alingaka ete moto nyonso ya bana na Ye azala na libaku ya kopona nsango malamu ya Mobikisi mpe komikotisa na nzela ya boyokani. Nzambe alingaka kokangisa bato banso na boyokani Asalaki na kala na Abalayama.
Bongo, mosala ya misionele ezali eteni moko ya ntina na bosangisi ya Yisalaele. Bosangisi wana ezali mosala moko ya ntina koleka oyo ezali kosalema na mokili. Eloko moko te ya kokokanisa na bonene. Eloko moko te ya kokokanisa na motuya. Bamisionele ya Nkolo—bayekoli na Ye—bamipesi na mokumba monene, ntina monene, mosala monene na mabele lelo.
Kasi ezali kutu na ya monene—koleka. Ezali na ntina monene ya kopalanganisa nsango malamu epai ya bato na ngambo mosusu ya elamba. Nzambe alingi moto nyonso, na bangambo nyonso mibale ya elamba, asepela na mapamboli ya boyokani na Ye. Nzela ya boyokani efongwami na moto nyonso. Tosengi moto nyonso atambola na nzela oyo elongo na biso. Mosala mosusu te ezali motuya na mokili. Mpo “Nkolo ayokaka ngolu epai ya baye banso balingi, o bosolo bwa mitema mya bango, kobianga likolo lya nkombo esantu ya ye” (Elamani 3:27).
Mpo ete Bonganganzambe ezongisamaki, nyonso mibale botosi ya liyokani ya basi mpe mibali epesi ndingisa na “mapamboli nyonso ya molimo ya” nsango malamu (Mateya mpe Mayokani 107:18; nsete ebetamaki).
Na bobulisi ya Tempelo ya Kirtland na 1836, na nse ya bokambi ya Nkolo, Eliya abimaki. Ntina na Ye? “Ya kozongisa … bana epai ya batata” (Malongi mpe Mayokani 110:15). Eliasi mpe abimaki. Ntina na Ye? Ya kopesa na Joseph Smith mpe Oliver Cowdery “eleko ya nsango malamu ya Abalayama, kolobaka yango epai na biso mpe nkona na biso nkola nyonso nsima bakopambwama” (Malongi mpe Mayokani 110:12). Na yango, Molakisi apesaki likolo ya Joseph Smith mpe Oliver Cowdery likoki ya bonganganzambe mpe ndingisa ya kopesa mapamboli ya motuya ya boyokani ya Abalayama epai ya basusu.9
Na Eklezia, totambolaka na nzela ya boyokani yango biso mibale, na moto yemoko mpe na lisanga. Kaka lokola mabala mpe mabota ekabolaka mokangano ya motuya oyo ekelaka bolingo ya ntina, bongo nde kimoninga ya sika esalemaki ntango tomikangisi biso moko na boyokani semba na Nzambe na biso!
Oyo ekoki kozala oyo Nefi atalisaki yango malamu Nzambe “alingaka baoyo bakozwa ye lokola Nzambe na bango” (1 Nefi 17:40). Yango ezali mpenza mpo na nini, lokola eteni ya boyokani, ngolu mpe bolingo ya ntina koleka—to hesed—epesameli na banso oyo bakoti na mokangano oyo mpe bamipesi na kimoninga na Nzambe, atako “na bankoto ya bankola” (Dutelonume 7:9).
Kosala boyokani na Nzambe ebongolaka kimoninga na biso na Ye mpo na libela. Epambolaka biso na ndelo ya bolingo ya motuya koleka mpe ngolu.10 Epesaka nguya na oyo tozali mpe lolenge nini Nzambe akosunga biso tokoma oyo tokoki kokoma. Tolakami ete biso mpe lisusu tokoki kokoma “domengo ya motuya” epai na Ye (Nzembo 135:4).
Bilaka mpe Mabaku
Baoyo basalaka mayokani ya bule mpe babateli yango balakelami bomoi ya seko mpe bonetoli, “likabo monene koleka makabo nyonso ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 14:7). Yesu Klisto azali mobateli mayokani oyo (tala Baebele 7:22; 8:6). Babateli mayokani oyo balingaka Nzambe mpe bapesaka Ye ndingisa ya kokamba bango na makambo nyonso ya babomoi na bango Basala ete Ye azala ndakisa ya nguya makasi na bomoi na bango.
Na mikolo na biso tozali na libaku ya kozwa mapamboli ya bankoko mpe koyekola na ntina ya mokangano na bankoko ya kala. Mapamboli oyo epesaka lisusu mpifo na oyo ezali koya lobi.
Libiangi na biso lokola Yisalaela ya boyokani ezali ya kondimisama ete mondimi nyonso ya Eklezia azwa esengo mpe mabaku elongo na bosali mayokani na Nzambe. Ezali libiangi ya kolendisa mobateli boyokani nyonso ya mobali mpe mwasi, elenge mobali mpe elenge mwasi, mpo na kokabola nsango malamu na baoyo bafandi nzinganzinga na bango. Ezali lisusu mpo na kosunga mpe kolendisa bamisionele na biso, oyo batindami na makebisi ya kobatisa mpe kosunga bosangisi ya Yisalaele, mpo ete elongo tokoka kozala bato ya Nzambe mpe Ye akozala Nzambe na biso (tala Malongi mpe Mayokani 42:9).
Mobali mpe mwasi nyonso oyo azali kosala makuli ya bonganganzambe mpe oyo azali kosala mpe kobatela mayokani na Nzambe azali na ndingisa na nguya ya Nzambe. Tozwaka nkombo ya Nkolo likolo na biso moko lokola bato. Tozwaka mpe lisusu nkombo na Ye likolo na biso lokola bato. Kozala na mposa ya kosalela nkombo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali lolenge ya ntina oyo biso lokola bato tozwaka nkombo na Ye likolo na biso. Ya solo, mosala nyonso ezanga lifuti na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe bandimi na yango ezali komonisa hesedya Nzambe.
Mpo na nini Yisalaele epalanganaki? Mpo ete bato babukaki mitindo mpe babambaki baprofeta mabanga. Tata moko ya bolingo kasi ya mpasi ayanolaki na bopalangani ya Yisalaele na mosika mpe mobimba.11
Na yango Ye apalanganisaki bango na elaka ete mokolo moko Yisalaele ekosangana lisusu na bokasi na Ye.
Libota ya Yuda epesamaki mokumba ya kolengela mokili mpo na boyei ya yambo ya Nkolo. Uta na libota wana, Maliya abiangamaki mpo na kozala mama ya Mwana ya Nzambe.
Libota ya Joseph, na nzela na yango mpe ya bana ya Asenati, Efalayimi mpe Manase (tala Genese 41:50–52; 46:20), epesamaki mokumba ya kokamba na bosangisi ya Yisalaele, mpo na kolengela mokili na Boyei ya Mibale ya Nkolo.
Na boseko oyo hesed kimoninga, ezali bobele na bomoto nde Nzambe alingaka kosangisa Yisalaele. Azali Tata na biso ya Lola! Alingaka moko na moko ya bana na Ye—na bangambo nyonso mibale ya elamba—bayoka etinda ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto.
Nzela ya Bolingo
Nzela ya boyokani ezali nzela ya bolingo—oyo ya kokamwa hesed, oyo mawa epesami mpo na mpe kosungana moko na moko. Koyoka ete bolingo ezali kosikola mpe kolendisa. Esengo monene oyo okoyoka libela ezali ntango ozali kosalela bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bana na Ye nyonso.
Kolinga Nzambe mingi koleka moto to eloko songolo ezali lolenge oyo ememaka kimia ya solo, libondisi, elikya, mpe esengo.
Nzela ya boyokani ezali mingi mingi mokangano na biso na Nzambe—kimoninga na biso hesed na Ye. Ntango tokoti na boyokani na Nzambe, tosali boyokani na Ye oyo tokozala ntango nyonso kobatela liloba na Ye. Akosala makambo nyonso oyo alingi, na bozangi kobebisa nguya na biso ya boponi, mpo na kosunga biso tobatela ya biso.
Buku ya Mormon ememaka mpe esuki na ndakisa ya boyokani oyo ya libela. Uta lokasa moke na yango na bosukisi matatoli ya Mormon mpe Moroni, Buku ya Mormon epesi ndakisa na boyokani (tala Mormon 5:20; 9:37). “Bobimi ya Buku ya Mormon ezali elembo mpo na mokili mobimba oyo Nkolo abandaki kosangisa Yisalaele mpe kokokisa mayokani asalaki na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo.”12
Bandeko na ngai, tobengami na eleko oyo ya ntina ya lisitwale ya mabele mpo na koteya mokili na ntina ya bonzenga mpe nguya ya boyokani ya libela. Tata na biso ya Lola andimelaka biso na bokasi mpo na kosala mosala monene oyo.
Nsango oyo epesamaki lisusu na likita linene ya liyangani ya bakambi na Sanza ya misato 31, 2022.
© 2022 na Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na Etazini. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Liahona Message, October 2022. Lingala. 18317 639