Yisalaele
Nkolo apesaki nkombo ya Yisalaele na Yakobo, mwana mobali ya Yisaka mpe nkoko mobali ya Abalayama kati na Boyokani ya Kala (Gen. 32:28; 35:10). Nkombo ya Yisalaele ekoki kolobela Yakobo ye moko, eboto na ye, to bokonzi boye ezalaki ya eboto na ye kala na ntango ya Boyokani ya Kala (2 Sam. 1:24; 23:3). Nsima Mose akambaki bana ya Yisalaele libanda ya boumbu ya Ejipito (Esod. 3–14), bakonzamaki na basambisi mibu nkama misato koleka. Kobandaka na Mokonzi Saulo, bakonzi bayangelaki Yisalaele oyo esangisamaki kino na liwa ya Solomo, ntango mabota zomi matombokaki na Lehobama mpo na kosala ekolo ekabwana. Ntango bokonzi ya Yisalaele ekabwanaki, mabota ya nordi, lokola eteni monene ebombaki nkombo ya Yisalaele, nzokande bokonzi ya sudi ebiangamaki Yuda. Mabele ya Kanana mabengami lisusu Yisalaele lelo oyo. Na ndimbola mosusu, Yisalaele elingi koloba mondimi ya solo na Klisto (Lom. 10:1; 11:7; Gal. 6:16; Efe. 2:12).
Mabota zomi na mibale ya Yisalaele
Nkoko mobali ya Abalayama Yakobo, oyo kani nkombo ebongwamaki na Yisalaele, azalaki na bana mibali zomi na mibale. Eboto ya bango eyebani lokola mabota zomi na mibale ya Yisalaele to bana ya Yisalaele. Oyo ezali mabota zomi na mibale: Lubene, Simeona, Lewi, Yuda, Yisakala, mpe Zebuluna (bana mibali ya Yakobo mpe Lea); Dani mpe Nafatali (bana mibali ya Yakobo mpe Biliha); Gada mpe Asele (bana mibali ya Yakobo mpe Zilipa); Yosefe mpe Benyamina (bana mibali ya Yakobo mpe Laele) (Gen. 29:32–30:24; 35:16–18).
Yakobo apesaki mokambi moko moko lipamboli liboso ya liwa na ye (Gen. 49:1–28). Mpo na kozwa nsango mosusu, tala nkombo ya mwana mobali ya Yakobo moko moko.
Lubene, mwana mobali mobotami ya yambo na mwasi ya yambo ya Yakobo, Lea, abungisaki lipamboli ya ekoki na ye ya mbotama mpe ndambo ya makabo mibale mpo na bonsoni (Gen. 49:3–4). Ekoki ya mbotama ekendaki na Yosefe, oyo azalaki mwana mobali mobotami ya yambo ya mwasi ya mibale ya Yakobo, Laele (1 Nta. 5:1–2). Lewi, oyo kani libota Nkolo aponaki kosalela lokola basali na Ye ya bonganganzambe, azwaki libula ya kosangola te mpo na libiangi eleki malamu oyo bango babiangami kosala na ntei ya mabota nyonso. Oyo epesaki nzela ete ndambo ya makabo mibale ekabolama na bana mibali mibale ya Yosefe, Efelaima mpe Manase (1 Nta. 5:1; Yil. 31:9), baoyo batangamaki lokola mabota ekabwana ya Yisalaele (BJS, Gen. 48:5–6 [Bobakisi]).
Bato ya libota ya Yuda basengelaki kozala bakambi kino ntango Masiya ayaki (Gen. 49:10; BJS, Gen. 50:24 [Bobakisi]). Na mikolo ya nsuka libota ya Efelaima ezwi litomba ya komema etinda ya Bozongisi ya nsango malamu na mokili mpe bosangisi ya Yisalaele oyo epalanganaki (Dut. 33:13–17). Ntango ekoya wapi na nzela ya nsango malamu ya Yesu Klisto, Efelaima akozala na mokumba ya bokambi mpo na kotiaka mabota nyonso ya Yisalaele na bomoko (Yis. 11:12–13; Mal&May 133:26–34).
Bopanzani ya Yisalaele
Nkolo apanzaki mpe atungisaki mabota zomi na mibale ya Yisalaele mpo na bozangi bosembo mpe botomboki na bango. Nzokande, Nkolo asalelaki bopanzani ya baponami na Ye na ntei ya bikolo nyonso ya mokili mpo na kopambola bikolo wana.
Bosangisi ya Yisalaele
Ndako ya Yisalaele ekosangisama esika moko na mikolo ya nsuka liboso ya boyei ya Klisto (Bit. Bond. 1:10). Nkolo asangisaka bato na Ye ntango bandimi Ye mpe babombi mitindo na ye.
Mabota zomi ebunga ya Yisalaele
Mabota zomi ya Yisalaele masalaki bokonzi ya nordi ya Yisalaele mpe mamemamaki na bokangemi kati na Asulia na mobu 721 Liboso na mbotama ya Klisto. Na ntango wana bakendaki na “bikolo ya nordi” mpe babosanamaki na boyebi ya basusu. Na mikolo ya nsuka bakozonga.