Masalisi mpo na Makomi
Baefese, Mokanda na


Baefese, Mokanda na

Kati na Boyokani ya Sika, ezali mokanda mokomami na Apostolo Paulo epayi ya Basantu na Efese. Mokanda yango ezali ya ntina monene, mpo ezali na mateya ya Paulo mpo na oyo etali Eklezia ya Klisto.

Mokapo 1 ezali na nsako lokola momeseno. Mikapo 2–3 milimboli mbongwana oyo esalemaka na kati ya bato ntango bakomaka bandimi ya Eklezia—bakomi baninga, bana mboka elongo na Basantu, elongo na baoyo bazali Bayuda-te mpe Bayuda basangani kati na Eklezia moko. Mikapo 4–6 elimboli mikumba ya Bapostolo mpe baprofeta, mposa ya bomoko, mpe mposa ya kolata bibundeli mobimba ya Nzambe.

Bimisa na lokasa