Masalisi mpo na Makomi
Samwele, Profeta ya Boyokani ya Kala


Samwele, Profeta ya Boyokani ya Kala

Mwana mobali ya Elekana mpe Hana, Samwele abotamaki lokola eyano na nsambo ya mama na ye (1 Sam. 1). Wana ezalaki ye mwana, apesamaki na bobateli ya Eli, nganganzambe monene na tabelenakele ya Silo (1 Sam. 2:11; 3:1). Nkolo abiangaki Samwele na mibu ya bolenge mpo na kokoma profeta (1 Sam. 3). Nsima ya liwa ya Eli, Samwele akomaki profeta monene mpe mosambisi ya Yisalaele mpe azongisaki mobeko, molongo, mpe bokumbameli kati na eyamba na lolenge esengeli kati na mboka (1 Sam. 4:15–18; 7:3–17).

1 Sam. 28:5–20 ezali na lisolo ya Samwele oyo azongisamaki na bomoi uta na bakufi na kindoki ya Ene-dolo na bosenga ya Mokonzi Saulo. Oyo ekokaki te kozala limoni uta na Nzambe, mpamba te ndoki to nganga ya molimo mosusu akoki kotinda profeta te komonana na bosenga na ye.

Buku ya 1 mpe 2 Samwele

Kati na boko Biblia, buku ya 1 mpe 2 Samwele ezali se buku moko. Kati na mosusu ezali buku mibale. Buku yango ezali kolobela makambo matandami na eleko moko ya penepene mibu 130, uta na mbotama ya Samwele kino na ntango moke yambo na liwa ya Mokonzi Dawidi.

Buku ya 1 Samwele

Mikapo 1–3 ezali kolimbola ete Nkolo alakelaki libota ya Eli mabe mpe apesaki yango etumbu mpe abiangaki Samwele lokola nganganzambe monene mpe mosambisi. Mikapo 4–6 ezali koyebisa lolenge kani sanduku ya mibeko ya liyokani ekweyaki na maboko ya Bafilisitia. Mikapo 7–8 mikundoli makebisi ya Samwele na ntina ya kozalaka na banzambe ya lokuta mpe mokonzi ya nkuna. Mikapo 9–15 milimboli bolatisami motole ya Saulo mpe boyangeli na ye lokola mokonzi. Mikapo 16–31 ezali koyebisa mambi ya kala ya Dawidi mpe nguya oyo azwaki—Samwele apakolaki Dawidi oyo abomaki Goliata. Saulo ayinaki Dawidi, kasi Dawidi aboyaki koboma Saulo atako azwaki libaku ya kosala bongo.

Buku ya 2 Samwele

Buku yango ezali na eteni moko moko ya boyangeli ya Dawidi lokola mokonzi ya Yuda mpe na nsuka ya Yisalaele nyonso. Mikapo 1–4 ezali kolakisa etumba ya ntango molai kati na balandi ya Dawidi, ntango esilaki ye kolatisama motole na Yuda, mpe balandi ya Saulo. Mikapo 5–10 ezali kolakisa Dawidi kokomaka na nguya na ntaka ya bamboka mingi. Mikapo 11–21 milakisi kokita na nse ya bokasi ya molimo ya Dawidi mpo na masumu na ye mpe botomboki kati na libota na ye moko. Mikapo 22–24 milimboli mbala boni Dawidi amekaki kozongisa boyokani na Nkolo.

Bimisa na lokasa