Masalisi mpo na Makomi
Liyebisi ya Bakambi 2


Liyebisi ya Bakambi 2

Liloba moko ya malongi mpo na oyo etali nani akoki kozala na bonganganzambe ya Nzambe, ezwami sikawa ya konyatama na nkasa ya nsuka ya Malongi mpe Mayokani. Na ebandeli ya sanza ya motoba ya mobu 1978, Nkolo abimisaki epayi ya Mokambi Spencer W. Kimball ete bonganganzambe esengeli kopesama na bandimi mibali balongobani nyonso ya Eklezia. Oyo esalaki ete bonganganzambe epesama na mibali nyonso balongobani mpe mapamboli ya tempelo na bandimi nyonso balongobani na kozangaka kotala ekolo to mposo. Na mokolo ya 30, sanza ya libwa ya mobu 1978, lisakoli oyo etangamaki na lisanga monene ya Eklezia mpe endimamaki na banso.

Bimisa na lokasa