Masalisi mpo na Makomi
Alamagedo


Alamagedo

Nkombo Alamagedo ewuti na Ebele Hala Megidono, elingi koloba “ngomba ya Megido.” Lobwaku ya Megido ezali na ngambo ya westi ya esobe ya Esidalela, bakilometele ntuku mwambe na nordi ya Yelusaleme, mpe ezali esika ya bitumba minene ebele na ntango ya Boyokani ya Kala. Etumba ya monene mpe ya nsuka oyo ekosalema penepene na ntango ya Boyei ya Mibale ya Nkolo ebiangami etumba ya Alamagedo mpamba te ekobanda na esika se moko wana. (Tala Ejek. 39:11; Zek. 12–14, mingi mingi, 12:11; Emon. 16:14–21).

Bimisa na lokasa